< Rite 2 >
1 Naomi azalaki na ndeko moko kati na libota ya mobali na ye; ndeko yango azalaki ya etuka ya Elimeleki, azalaki penza na bozwi mingi; kombo na ye ezalaki « Boazi. »
Now Naomi was related through her husband to a very wealthy man of the family of Elimelech named Boaz.
2 Rite, moto ya Moabi, alobaki na Naomi: — Okoki kopesa ngai nzela ya kokende na bilanga mpo na kolokota mito ya ble, oyo bato oyo bakataka ble batiki. Nakozala na sima ya moto oyo akosalela ngai ngolu. Naomi alobaki na ye: — Mwana na ngai, kende.
Ruth the Moabite said to Naomi, “Let me now go into the fields and gather leftover grain behind anyone who will allow me.” “Go, my daughter,” she replied.
3 Rite akendeki mpe abandaki kolokota ble na bilanga, na sima ya bato oyo bakataka ble. Akutanaki na libaku ya malamu, pamba te ayaki kososola ete azali kosala kati na elanga ya Boazi, moto ya etuka ya Elimeleki.
So she went to glean in the field after the reapers. As it happened, she was in that part of the field which belonged to Boaz, who was of the family of Elimelech.
4 Sima na mwa tango, Boazi awutaki na Beteleemi; ayaki ye moko, apesaki mbote na bato oyo bakataka ble na koloba: — Tika ete Yawe azala elongo na bino! Bazongiselaki ye: — Tika ete Yawe apambola yo!
When Boaz came from Bethlehem and said to the reapers, “The Lord be with you,” they answered him, “May the Lord bless you.”
5 Boazi atunaki mokambi ya bato oyo bakataka ble: — Elenge mwasi wana azali ya nani?
“Whose girl is this?” Boaz asked his servant who had charge of the reapers.
6 Mokambi ya bato oyo bakataka ble azongisaki: — Azali elenge mwasi ya Moabi; ayaki elongo na Naomi wuta na mboka Moabi.
The servant who had charge of the reapers replied, “It is the Moabite girl who came back with Naomi from the territory of Moab.
7 Asengaki biso nzela ya kolokota mito ya ble, oyo etikalaka tango bakangaka maboke, na sima ya bato oyo bakataka ble. Na tongo ya lelo, akotaki na bilanga mpe azali kosala na molende nyonso; kino sik’oyo, apemi kaka tango moke.
She asked to be allowed to glean and gather sheaves after the reapers. So she came and has continued to work until now and she has not rested a moment in the field.”
8 Boazi alobaki na Rite: — Yoka ngai malamu, mwana na ngai ya mwasi: « Kokende kolokota ble na bilanga mosusu te mpe kokende mosika ya elanga oyo te, kasi vanda awa elongo na basali na ngai ya basi.
Then Boaz said to Ruth, “Listen, my daughter. Do not go to glean in another field nor leave this place, but stay here with my girls.
9 Tala malamu bilanga oyo epai wapi bato bazali kokata ble mpe zala na sima ya bana basi oyo bazali kolokota ble. Nalobi na mibali ete basimba yo te. Tango nyonso ozali na posa ya mayi, kende mpe mela na bambeki oyo mibali batondisi. »
Watch where the men are reaping and follow the gleaners. I have told the young men not to trouble you. When you are thirsty, go to the jars and drink of that which the young men have drawn.”
10 Tango Rite ayokaki bongo, agumbamaki, elongi kino na mabele. Alobaki: — Mpo na nini nazwi ngolu ya boye na miso na yo? Mpo na nini ozali kopesa ngai lokumu ya boye, ngai oyo nazali mopaya?
Then she bowed low and said to him, “Why are you so kind to me, to take interest in me when I am just a foreigner?”
11 Boazi azongisaki: — Bayebisaki ngai makambo nyonso oyo osalaki mpo na mama-bokilo na yo wuta tango mobali na ye akufaki, ndenge otikaki tata mpe mama na yo, mboka epai wapi obotama, mpe oyaki kovanda elongo na bato oyo oyebaki liboso te.
Boaz replied, “I have heard what you have done for your mother-in-law since the death of your husband, and how you left your father and mother and your native land to come to a people that you did not know before.
12 Tika ete Yawe afuta yo mpo na makambo oyo osalaki. Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, afuta yo koleka, lokola oyaki kobombama na se ya mapapu na Ye!
May the Lord repay you for what you have done, and may you be fully rewarded by the God of Israel, under whose wings you have come to take refuge.”
13 Rite alobaki: — Tika ete nakoba kozwa ngolu na miso na yo, nkolo na ngai. Obondisi motema na ngai, osololi na mwasi mosali na yo na boboto nyonso. Nzokande, nakokani te ata na moko ya basali na yo ya basi.
Then she said, “I trust I may please you, my lord, for you have comforted me and spoken kindly to your servant, although I am not really equal to one of your own servants.”
14 Na tango ya kolia, Boazi alobaki na ye: « Pusana awa mpe kamata eteni ya lipa, zindisa yango na vino. » Tango avandaki elongo na bato oyo bakataka ble, Boazi apesaki ye ndambo ya bambuma bakalinga. Aliaki ndenge alingaki mpe atikaki mosusu.
At mealtime Boaz said to Ruth, “Come here and eat some of the food and dip your piece of bread in the vinegar.” So she sat beside the reapers, and he passed her some roasted grain. She ate until she was satisfied and had some left.
15 Tango atelemaki mpo na kolokota lisusu ble, Boazi apesaki mitindo epai ya basali na ye: « Botika ye kolokota ata oyo ezali na kati-kati ya maboke, botungisa ye te.
When she rose to glean, Boaz gave this order to his young men: “Let her glean even among the sheaves and do not disturb her.
16 Bokoki mpe kokweyisa bambuma mpo na ye, mpo ete alokota na ye, mpe bozomela ye te. »
Also pull out some for her from the bundles and leave for her to glean, and do not find fault with her.”
17 Boye Rite alokotaki ble na elanga kino na pokwa, aningisaki oyo alokotaki mpe azwaki bakilo pene tuku minei ya bambuma ya orje.
So she gleaned in the field until evening, then beat out what she had gleaned. It was about a bushel of barley.
18 Amemaki yango na engumba, mpe mama-bokilo na ye amonaki bambuma oyo alokotaki. Rite abimisaki lisusu biloko oyo atikaki tango atondaki mpe apesaki yango epai ya mama-bokilo na ye.
Then she took it up and went into the town and showed her mother-in-law what she had gleaned. She also brought out and gave her that which she had left from her meal after she had had enough.
19 Naomi atunaki Rite: — Lelo, olokotaki ble na esika nini? Osalaki na esika nini? Tika ete moto oyo apesi yo lokumu ya boye apambolama! Bongo Rite ayebisaki mama-bokilo na ye makambo oyo etali nkolo ya esika epai wapi asalaki. Alobaki: « Kombo ya moto yango ezali Boazi. »
“Where did you glean today, and where did you work?” asked her mother-in-law. “A blessing on him who took notice of you!” So she told her mother-in-law where she had worked. “The name of the man with whom I worked today,” she said, “is Boaz.”
20 Naomi alobaki na bokilo na ye ya mwasi: « Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo atiki te kotalisa bolamu na Ye epai na biso bato ya bomoi mpe epai na bakufi. Mobali wana azali ndeko na biso ya pembeni, azali kati na molongo ya bato oyo bakoki kosikola biso. »
Naomi said to her daughter-in-law, “May the blessing of the Lord rest on this man who has not ceased to show his loving-kindness to the living and to the dead. The man,” she added, “is a near relation of ours.”
21 Rite, moto ya Moabi, alobaki: — Alobaki na ngai kutu: « Vanda elongo na basali na ngai kino bakosilisa kobuka bambuma na ngai nyonso. »
“He told me,” Ruth said, “that I must keep near his young men until they have completed all his harvest.”
22 Naomi azongiselaki Rite, bokilo na ye ya mwasi: — Ekozala malamu mpo na yo kotambolaka elongo na basali na ye ya basi; pamba te soki okeyi na elanga ya moto mosusu, okoki komona pasi.
Naomi said to Ruth, “It is best, my daughter, that you should go out with his girls because you might not be as safe in another field.”
23 Boye Rite avandaki pembeni ya basali ya Boazi mpo na kolokota mito ya ble, kino tango ya kobuka bambuma ya orje mpe ya ble, esilaki. Awumelaki kovanda elongo na mama-bokilo na ye.
So she gleaned with the girls of Boaz until the end of the barley and wheat harvest; but she lived with her mother-in-law.