< Barome 9 >
1 Nazali koloba solo kati na Klisto, nazali kokosa te mpe motema na ngai ezali koyebisa ngai solo na nzela ya Molimo Mosantu:
I tell the truth in Christ. I do not lie, and my conscience bears witness with me in the Holy Spirit,
2 motema na ngai etondi na mawa mpe na pasi oyo ezali kosila te.
that for me there is great sorrow and unceasing pain in my heart.
3 Mpo na yango, eleki kutu malamu mpo na ngai kolakelama mabe mpe kokabwana na Klisto mpo na bandeko na ngai, bato ya ekolo na ngai,
For I could wish that I myself would be cursed and set apart from Christ for the sake of my brothers, those of my own race according to the flesh.
4 oyo bazali bana ya Isalaele. Nzambe akomisa bango bana na Ye, apesa bango nkembo, asala boyokani elongo na bango, apesa bango Mobeko, alakisa bango kosambela na solo, apesa bango bilaka
They are Israelites. They have adoption, the glory, the covenants, the gift of the law, the worship of God, and the promises.
5 mpe bakoko. Ezali na nzela ya bakoko yango nde Klisto, oyo azali na likolo ya nyonso, ayaki na mokili lokola moto. Tika ete Nzambe apambolama libela na libela! Amen! (aiōn )
Theirs are the ancestors from whom Christ has come with respect to the flesh—he who is God over all. May he be praised forever. Amen. (aiōn )
6 Elingi koloba te ete Liloba na Nzambe ebimaki na pamba, pamba te bakitani nyonso ya Isalaele bazali bana ya Isalaele te,
But it is not as though the promises of God have failed. For it is not everyone in Israel who truly belongs to Israel.
7 mpe bakitani nyonso ya Abrayami bazali bana na ye te. Pamba te Nzambe alobaki na Abrayami: « Ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani. »
Neither are all Abraham's descendants truly his children. But, “It is through Isaac that your descendants will be called.”
8 Elingi koloba ete bana nyonso oyo Abrayami abotaki bazali bakitani na ye te, kasi ezali kaka bana oyo abotaki kati na elaka ya Nzambe nde batangamaka lokola bakitani na ye.
That is, the children of the flesh are not the children of God. But the children of the promise are regarded as descendants.
9 Pamba te, tala ndenge Nzambe alakaki Abrayami: « Kaka na eleko oyo, nakozonga, mpe Sara akozala na mwana mobali. »
For this is the word of promise: “At this time I will come, and a son will be given to Sarah.”
10 Esukaki kaka wana te: Rebeka mpe abotaki bana mibali mibale na nzela ya tata moko, Izaki, koko na biso.
Not only this, but after Rebekah also had conceived by one man, our father Isaac—
11 Nzokande, liboso ete mapasa yango babotama mpe basala likambo moko ya malamu to ya mabe, mpo ete mabongisi ya lolenge Nzambe aponaka ekokisama,
for the children were not yet born and had not yet done anything good or bad, so that the purpose of God according to choice might stand, not because of actions, but because of him who calls—
12 kolanda misala ya bato te kasi kolanda mokano ya Ye oyo abengaka, Nzambe alobaki na Rebeka: « Kulutu akosalela leki, »
it was said to her, “The older will serve the younger.”
13 kolanda ndenge ekomama: « Nalingaki Jakobi, kasi nayinaki Ezawu. »
It is just as had been written: “Jacob I loved, but Esau I hated.”
14 Boye toloba nini? Mabe ezali kati na Nzambe? Soki moke te!
What then will we say? Is there unrighteousness with God? May it never be.
15 Pamba te alobaki na Moyize: « Nakotalisa ngolu epai ya moto oyo Ngai nasepeli kosalela ngolu, mpe nakoyokela mawa moto oyo Ngai nasepeli koyokela mawa. »
For he says to Moses, “I will have mercy on whom I will have mercy, and I will have compassion on whom I will have compassion.”
16 Boye, yango ewuti te na posa to na makasi ya moto, kasi ewuti na Nzambe oyo asalaka ngolu.
So then, it is not because of him who wills, nor because of him who runs, but because of God, who shows mercy.
17 Pamba te, tala ndenge Makomi elobaki na tina na Faraon: « Nakomisaki yo mokonzi mpo na kotalisa nguya na Ngai kati na yo, mpe mpo ete lokumu ya Kombo na Ngai epanzana na mokili mobimba. »
For the scripture says to Pharaoh, “For this very purpose I raised you up, so that I might demonstrate my power in you, and so that my name might be proclaimed in all the earth.”
18 Boye Nzambe asalaka ngolu na moto oyo Ye asepeli kosalela ngolu, mpe ayeisaka motema libanga moto oyo Ye asepeli koyeisa motema libanga.
So then, God has mercy on whom he wishes, and whom he wishes, he makes stubborn.
19 Bato bakoki koloba: « Mpo na nini Nzambe apamelaka biso, pamba te moto moko te akoki kotelemela mokano na Ye? »
You will say then to me, “Why does he still find fault? For who has ever withstood his will?”
20 Oh moto, ozali nani mpo ete obeta tembe na Nzambe? Mbeki ya mabele ekoki solo koloba na moto oyo asali yango: « Mpo na nini osali ngai na lolenge oyo? »
On the contrary, man, who are you who answers against God? Will what has been molded say to the one who molds it, “Why did you make me this way?”
21 Mosali mbeki azali na bokonzi te ya kosala nzungu ya lokumu mpe nzungu oyo ezanga lokumu na nzela ya potopoto kaka moko?
Does the potter not have the right over the clay to make from the same lump a container for special use, and another container for daily use?
22 Okoloba nini soki Nzambe, mpo na kolakisa kanda mpe nguya na Ye, ayikelaki mingi mpiko mbeki oyo etumbolaka kanda na Ye, mbeki oyo ebongisami mpo na kobebisama?
What if God, who is willing to show his wrath and to make his power known, endured with much patience containers of wrath prepared for destruction?
23 Okoloba lisusu nini, soki Nzambe asalaki bongo mpo na kolakisa bomengo ya nkembo na Ye mpo na bolamu ya bato oyo asepeli kosalela ngolu, ba-oyo abongisa wuta kala mpo na nkembo?
What if he did this in order that he might make known the riches of his glory upon containers of mercy, which he had previously prepared for glory?
24 Ezali biso nde Nzambe abengaki, kaka kati na Bayuda te kasi mpe kati na Bapagano,
What if he did this also for us, whom he also called, not only from among the Jews, but also from among the Gentiles?
25 kolanda ndenge azali koloba kati na mokanda ya Oze: « Nakobenga bato oyo bazalaka ya Ngai te bato na Ngai, mpe nakobenga ye oyo azalaka molingami na Ngai te molingami na Ngai. »
As he says also in Hosea: “I will call my people who were not my people, and her beloved who was not beloved.
26 Mpe, « kaka na esika oyo balobaki na bango: ‹ Bozali bato na ngai te, › bakokoma kobenga bango ‹ bana na Nzambe na bomoi. › »
Then it will be that where it was said to them, 'You are not my people,' there they will be called 'sons of the living God.'”
27 Ezayi agangaki na tina na Isalaele: « Ata soki motango ya bana ya Isalaele ezalaki lokola zelo ya ebale monene, ndambo kaka nde bakobika.
Isaiah cries out concerning Israel, “Though the number of the children of Israel were as the sand of the sea, it will be a remnant that will be saved,
28 Pamba te Nkolo akokokisa Liloba na Ye na mobimba na yango mpe na lombangu kati na mokili. »
for the Lord will carry out his sentence on the earth, completely and without delay.”
29 Ezali ndenge kaka Ezayi amisakolelaki: « Soki Nkolo, Mokonzi ya mampinga, atikelaki biso bakitani te, tolingaki kokoma lokola engumba Sodome, tolingaki kokokana na engumba Gomore. »
As Isaiah had said previously, “If the Lord of hosts had not left us descendants, we would be like Sodom, and we would have become like Gomorrah.”
30 Boye, toloba lisusu nini? Bapagano oyo bazalaki koluka te kokoma bato ya sembo bakomi sembo na nzela ya kondima,
What will we say then? That the Gentiles, who were not pursuing righteousness, obtained righteousness, the righteousness by faith.
31 kasi Isalaele oyo azalaki koluka kokoma sembo na nzela ya kotosa Mobeko atikali kokoma sembo te.
But Israel, who did pursue a law of righteousness, did not arrive at it.
32 Mpo na nini? Pamba te balukaki te kokoma sembo na nzela ya kondima, kasi na nzela ya misala. Yango wana babetaki libaku na libanga oyo ekweyisaka,
Why not? Because they did not pursue it by faith, but by works. They stumbled over the stone of stumbling,
33 kolanda ndenge ekomama: « Tala, nazali kotia kati na Siona libanga oyo ebetisaka bato mabaku, libanga monene oyo ekweyisaka bato; moto oyo akotiela yango motema akotikala koyokisama soni te. »
as it has been written, “Look, I am laying in Zion a stone of stumbling and a rock of offense. He who believes in it will not be ashamed.”