< Barome 8 >

1 Yango wana sik’oyo, etumbu ezali lisusu te mpo na bato oyo bazali kati na Yesu-Klisto.
Nihil ergo nunc damnationis est iis qui sunt in Christo Jesu: qui non secundum carnem ambulant.
2 Pamba te kati na Yesu-Klisto, Mobeko ya Molimo oyo apesaka bomoi ekangoli ngai na bowumbu ya mobeko ya lisumu mpe ya kufa.
Lex enim spiritus vitæ in Christo Jesu liberavit me a lege peccati et mortis.
3 Pamba te likambo oyo Mobeko ekokaki kosala te mpo ete bomoto ezangisaki yango nguya, Nzambe asalaki yango na kotinda Mwana na Ye, na nzoto oyo ekokani na nzoto ya bato ya masumu, mpo ete akoma likabo mpo na lisumu. Boye, akatelaki masumu etumbu kati na nzoto ya bato.
Nam quod impossibile erat legi, in quo infirmabatur per carnem: Deus Filium suum mittens in similitudinem carnis peccati et de peccato, damnavit peccatum in carne,
4 Asalaki bongo mpo ete bosembo oyo Mobeko esengaka ekokisama kati na biso oyo totambolaka te kolanda baposa ya nzoto, kasi kolanda Molimo.
ut justificatio legis impleretur in nobis, qui non secundum carnem ambulamus, sed secundum spiritum.
5 Bato oyo batambolaka kolanda baposa ya nzoto batiaka makanisi na bango na makambo ya nzoto, kasi ba-oyo batambolaka kolanda Molimo batiaka makanisi na bango na makambo ya Molimo.
Qui enim secundum carnem sunt, quæ carnis sunt, sapiunt: qui vero secundum spiritum sunt, quæ sunt spiritus, sentiunt.
6 Baposa ya nzoto ememaka na kufa, kasi baposa ya Molimo ememaka na bomoi mpe na kimia.
Nam prudentia carnis, mors est: prudentia autem spiritus, vita et pax:
7 Baposa ya nzoto etombokelaka Nzambe, etosaka Mobeko ya Nzambe te mpe ekotikala kotosa yango ata moke te.
quoniam sapientia carnis inimica est Deo: legi enim Dei non est subjecta, nec enim potest.
8 Bato oyo batambolaka kolanda baposa ya nzoto bakoki kosepelisa Nzambe te.
Qui autem in carne sunt, Deo placere non possunt.
9 Nzokande bino, botambolaka te kolanda baposa ya nzoto, kasi kolanda baposa ya Molimo, mpo ete Molimo ya Nzambe azali kati na bino. Mpe soki moto azangi Molimo ya Klisto azali mpe moto na Ye te.
Vos autem in carne non estis, sed in spiritu: si tamen Spiritus Dei habitat in vobis. Si quis autem Spiritum Christi non habet, hic non est ejus.
10 Kasi soki Klisto azali kati na bino, atako nzoto na bino ekokufa mpo na lisumu, kasi Molimo azali bomoi kati na bino, pamba te bokoma bato ya sembo.
Si autem Christus in vobis est, corpus quidem mortuum est propter peccatum, spiritus vero vivit propter justificationem.
11 Mpe soki Molimo ya Ye oyo asekwisaki Yesu kati na bakufi azali kovanda kati na bino, Ye oyo asekwisaki Klisto kati na bakufi akopesa mpe bomoi epai na banzoto na bino, oyo ebengami na kokufa, na nzela ya Molimo na Ye, oyo avandaka kati na bino.
Quod si Spiritus ejus, qui suscitavit Jesum a mortuis, habitat in vobis: qui suscitavit Jesum Christum a mortuis, vivificabit et mortalia corpora vestra, propter inhabitantem Spiritum ejus in vobis.
12 Yango wana bandeko na ngai, tozali na niongo—kasi ezali niongo ya nzoto te mpo ete totambola te kolanda baposa ya nzoto.
Ergo fratres, debitores sumus non carni, ut secundum carnem vivamus.
13 Pamba te soki botamboli kolanda baposa ya nzoto bokokufa; kasi soki bobomi, na nzela ya Molimo, misala mabe oyo bosalaka kati na banzoto na bino, bokozala na bomoi.
Si enim secundum carnem vixeritis, moriemini: si autem spiritu facta carnis mortificaveritis, vivetis.
14 Pamba te bato oyo batambolisamaka na Molimo ya Nzambe bazali bana na Nzambe.
Quicumque enim Spiritu Dei aguntur, ii sunt filii Dei.
15 Solo, bozwaki te Molimo oyo akomisaka bino bawumbu mpo ete bozala na kobanga, kasi bozwaki Molimo oyo akomisaka bino bana na Nzambe, mpe ezali na nzela ya Molimo yango nde togangaka: « Tata! »
Non enim accepistis spiritum servitutis iterum in timore, sed accepistis spiritum adoptionis filiorum, in quo clamamus: Abba (Pater).
16 Molimo Ye moko atatolaka na molimo na biso ete tozali bana na Nzambe.
Ipse enim Spiritus testimonium reddit spiritui nostro quod sumus filii Dei.
17 Mpe soki tozali bana, tozali mpe bakitani ya libula: tozali bakitani ya libula ya Nzambe, mpe bakitani ya libula elongo na Klisto, soki penza tozali komona pasi elongo na Ye mpo ete tozwa mpe nkembo elongo na Ye.
Si autem filii, et hæredes: hæredes, quidem Dei, cohæredes autem Christi: si tamen compatimur ut et conglorificemur.
18 Nakanisi ete pasi ya tango oyo ekokani te na motuya ya nkembo oyo ekomonisama mpo na biso.
Existimo enim quod non sunt condignæ passiones hujus temporis ad futuram gloriam, quæ revelabitur in nobis.
19 Pamba te bikelamu nyonso ezali kozela na posa makasi ete bana na Nzambe bamonisama.
Nam exspectatio creaturæ revelationem filiorum Dei exspectat.
20 Pamba te bikelamu nyonso ezali na se ya bokonzi ya nguya oyo esukaka na pamba; na mokano na yango moko te, kasi na mokano ya Ye oyo atiaki bikelamu yango na se ya bokonzi yango, na elikya ete
Vanitati enim creatura subjecta est non volens, sed propter eum, qui subjecit eam in spe:
21 bikelamu nyonso mpe ekokangolama na bowumbu ya libebi na yango mpo na kozwa bonsomi ya nkembo oyo bana na Nzambe bakozwa.
quia et ipsa creatura liberabitur a servitute corruptionis in libertatem gloriæ filiorum Dei.
22 Toyebi malamu ete kino sik’oyo, bikelamu nyonso ezali kolela pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.
Scimus enim quod omnis creatura ingemiscit, et parturit usque adhuc.
23 Ezali yango moko kaka te nde ezali kolela; kasi biso ba-oyo mpe tozwaki Molimo lokola mbuma ya liboso tozali mpe komona pasi kati na mitema, wana tozali kozela na posa makasi ete Nzambe akomisa biso bana na Ye penza mpe asikola banzoto na biso.
Non solum autem illa, sed et nos ipsi primitias spiritus habentes: et ipsi intra nos gemimus adoptionem filiorum Dei exspectantes, redemptionem corporis nostri.
24 Pamba te tosila kobika, kasi kobika yango ezali nanu elikya. Nzokande soki tozali komona eloko oyo tozali kotiela elikya, wana ezali lisusu elikya te, pamba te nani akoki kotia elikya na eloko oyo azali komona?
Spe enim salvi facti sumus. Spes autem, quæ videtur, non est spes: nam quod videt quis, quid sperat?
25 Kasi soki tozali kotia elikya na eloko oyo tozali komona te, solo tokozela yango na molende.
Si autem quod non videmus, speramus: per patientiam exspectamus.
26 Ndenge moko mpe Molimo ayaka kosunga biso kati na bolembu na biso; pamba te toyebi te kosambela na lolenge oyo esengeli, kasi Molimo Ye moko abondelaka mpo na biso na maloba oyo moto akoki koloba te.
Similiter autem et Spiritus adjuvat infirmitatem nostram: nam quid oremus, sicut oportet, nescimus: sed ipse Spiritus postulat pro nobis gemitibus inenarrabilibus.
27 Mpe Nzambe oyo akundolaka mozindo ya mitema ayebi makanisi ya Molimo, pamba te Molimo abondelaka mpo na basantu kolanda mokano ya Nzambe.
Qui autem scrutatur corda, scit quid desideret Spiritus: quia secundum Deum postulat pro sanctis.
28 Mpe toyebi malamu ete kati na makambo nyonso, Nzambe asalaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Ye, ba-oyo babengama kolanda mabongisi na Ye.
Scimus autem quoniam diligentibus Deum omnia cooperantur in bonum, iis qui secundum propositum vocati sunt sancti.
29 Pamba te bato oyo Nzambe ayeba wuta kala, abongisa mpe bango wuta kala mpo ete bakokana na Mwana na Ye, mpo ete azala Mwana ya liboso kati na bandeko ebele.
Nam quos præscivit, et prædestinavit conformes fieri imaginis Filii sui, ut sit ipse primogenitus in multis fratribus.
30 Mpe ba-oyo abongisa wuta kala, abenga mpe bango; ba-oyo abenga, akomisa bango bato ya sembo; mpe ba-oyo akomisa bato ya sembo, apesa bango mpe nkembo na Ye.
Quos autem prædestinavit, hos et vocavit: et quos vocavit, hos et justificavit: quos autem justificavit, illos et glorificavit.
31 Boye, toloba lisusu nini? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso?
Quid ergo dicemus ad hæc? si Deus pro nobis, quis contra nos?
32 Ye oyo aboyaki te kopesa Mwana na Ye se moko, kasi akabaki Ye mpo na biso nyonso, ndenge nini azanga kopesa biso biloko nyonso elongo na Ye na nzela ya ngolu?
Qui etiam proprio Filio suo non pepercit, sed pro nobis omnibus tradidit illum: quomodo non etiam cum illo omnia nobis donavit?
33 Nani akofunda bato oyo Nzambe apona? Ezali Nzambe nde akomisaka sembo.
Quis accusabit adversus electos Dei? Deus qui justificat,
34 Nani akokatela bango etumbu? Moko te! Yesu-Klisto akufaki; kutu, asekwaki, azali na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe, mpe azali kobondela mpo na biso.
quis est qui condemnet? Christus Jesus, qui mortuus est, immo qui et resurrexit, qui est ad dexteram Dei, qui etiam interpellat pro nobis.
35 Nani akokabola biso na bolingo ya Klisto? Pasi, somo, minyoko, nzala, kozanga bilamba, likama to mopanga?
Quis ergo nos separabit a caritate Christi? tribulatio? an angustia? an fames? an nuditas? an periculum? an persecutio? an gladius?
36 Kolanda ndenge ekomama: « Ezali mpo na Yo nde balukaka koboma biso mikolo nyonso; bazwaka biso lokola bameme ya koboma. »
(Sicut scriptum est: Quia propter te mortificamur tota die: æstimati sumus sicut oves occisionis.)
37 Kasi kati na makambo oyo nyonso, tozali penza balongi na nzela ya Ye oyo alinga biso.
Sed in his omnibus superamus propter eum qui dilexit nos.
38 Pamba te nandimisami ete ezala kufa to bomoi, ba-anjelu to milimo mabe, makambo ya mikolo oyo to makambo oyo ekoya, banguya ya ndenge na ndenge,
Certus sum enim quia neque mors, neque vita, neque angeli, neque principatus, neque virtutes, neque instantia, neque futura, neque fortitudo,
39 banguya ya likolo to ya se ya mabele to eloko mosusu oyo Nzambe akela, eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
neque altitudo, neque profundum, neque creatura alia poterit nos separare a caritate Dei, quæ est in Christo Jesu Domino nostro.

< Barome 8 >