< Barome 7 >
1 Bandeko—nazali koloba na bato oyo bayebi Mobeko— bobosani ete Mobeko ezalaka na nguya likolo ya moto kaka na tango oyo azali na bomoi?
Olkhueng ka thui vaengah aka ming maanuca rhoek te na mangvawt uh nama? Te olkhueng loh hlang te a hing tue khuiah a buem ta.
2 Ndakisa: Mobeko ekangisaka mwasi ya libala na mobali na ye, wana mobali yango azali na bomoi. Kasi soki mobali akufi, mwasi akangolami na mobeko oyo ezalaki kokangisa ye na mobali.
Rhukom nu te a va a hing vaengah olkhueng neh a pinyen dae a va a duek atah a va kah olkhueng lamloh a hmil coeng.
3 Boye soki, wana mobali na ye azali nanu na bomoi, akomi mwasi ya mobali mosusu, bakoloba ete asali ekobo. Kasi soki mobali na ye akufi, akangolami libela na mobeko yango mpe akoki kokoma mwasi ya mobali mosusu; boye bakoloba te ete asali ekobo.
Te dongah a va a hing vaengah va tloe sa koinih samphaih la n'thui ni. Tedae a va te duek koinih olkhueng lamkah aka loeih la om tih va tloe a sak te a samphaih la om pawh.
4 Ndenge wana mpe mpo na bino bandeko na ngai: bosila mpe kokufa mpo na Mobeko na nzela ya nzoto ya Klisto mpo ete bokoma bato ya moto mosusu, ya Ye oyo asekwaki kati na bakufi, mpo ete tobota bambuma mpo na Nzambe.
Te dongah ka manuca rhoek nangmih khaw Khrih kah pum rhangneh olkhueng ham na duek coeng dongah nangmih tah Pathen taengah thaihtak hamla duek lamkah aka thoo tangtae hlang tloe ham na om uh.
5 Pamba te wana tozalaki nanu kotambola kolanda baposa ya nzoto, Mobeko ezalaki kotindika biso na baposa ya mabe oyo ezalaki kosala mosala na yango kati na biteni ya banzoto na biso mpo ete tobota bambuma oyo ememaka na kufa.
Pumsa la n'om uh vaengah olkhueng rhangneh tholhnah kah patangnah loh mamih kah pumrho ah tueng tih dueknah la thaihtak.
6 Kasi sik’oyo, lokola tokufi mpo na nguya oyo ezalaki kokanga biso na bowumbu, tokangolami na nguya ya Mobeko mpo ete tosalela Nzambe na lolenge ya sika ya Molimo, kasi na lolenge ya kala ya mokanda ya Mobeko te.
Tedae olkhueng lamloh m'hmil uh coeng. Aka duek rhoek tah te nen te n'khoh. Te dongah mamih loh sal m'bi ham he mueihla thai dongah tih cabu rhuem dongah moenih.
7 Boye toloba nini? Mobeko ekomi nde lisumu? Soki moke te! Soki Mobeko ezalaki te, nalingaki mpe koyeba lisumu te. Pamba te soki Mobeko elobaki te: « Okolulaka te, » nalingaki mpe koyeba te soki kolula ezali penza nini.
Te koinih balae n'thui eh? Olkhueng te tholhnah a? Tlam te om mahpawh. Tedae olkhueng lamkah pawt koinih tholhnah te ka ming mahpawh. Olkhueng loh nai boeh ti pawt koinih hoehhamnah khaw ka ming mahpawh.
8 Nzokande, lokola lisumu ezwaka nguya na esika oyo mitindo ezali, lisumu ebotaki kati na ngai lolenge nyonso ya baposa ya mabe. Pamba te soki Mobeko ezali te, lisumu mpe ezali na nguya te.
Tedae olpaek lamloh tholhnah te rhoidoengnah la a loh tih ka khuiah hoehhamnah boeih ha thoeng. Te dongah olkhueng mueh atah tholhnah loh duek.
9 Na kala, tango Mobeko ezalaki te, nazalaki na bomoi; kasi tango mitindo eyei, lisumu mpe ezwi nguya, mpe ngai nakufi.
Kai khaw hnukbuet ah olkhueng muehla ka hing dae olpaek ha pawk neh tholhnah te koe hing.
10 Bongo mitindo oyo esengelaki komema na bomoi ememi ngai na kufa.
Te dongah kai ka duek tih hingnah ham tila ka hmuh olpaek tah dueknah la poeh.
11 Pamba te lokola lisumu ezwaka nguya na esika oyo mitindo ezali, lisumu ekosaki ngai mpe ememaki ngai na kufa na nzela ya mitindo.
Tholhnah tah olpaek neh a rhoidoeng tih kai n'hoilae phoeiah n'ngawn.
12 Boye, Mobeko ezali bule, mpe mitindo ezali bule, sembo mpe malamu.
Te dongah olkhueng tah cim, olpaek khaw cim tih dueng tih then.
13 Boni, eloko ya malamu ekoki solo komemela ngai kufa? Soki moke te! Nzokande, mpo ete lisumu eyebana ete ezali lisumu, mpe mpo ete elakisa mabe na yango na nzela ya mitindo, esalelaki eloko oyo ezali malamu mpo ete lisumu yango epesa ngai kufa.
Te koinih aka then te kai ham dueknah la coeng a? coeng rhoerhoe mahpawh. Tedae tholh te tholhnah la hmat ham a then lamloh kai ham dueknah ha thoeng. Te dongah tholhnah tah olpaek lamloh a puehkan la tholh ha coeng.
14 Toyebi ete Mobeko epesamaki na nzela ya Molimo na Nzambe; kasi ngai nazali kaka moto, natekama mpo na kozala mowumbu ya lisumu.
Olkhueng tah mueihla ni tila m'ming uh dae pumsa la ka om dongah tholhnah hmuila n'yoih coeng.
15 Nasosolaka te makambo oyo nasalaka: oyo nalingaka kosala, nasalaka yango te; kasi oyo nayinaka, yango nde nasalaka.
Te dongah ka thoeng sak te khaw ka ming pawh. Ka ngaih te ka saii pawt tih ka hmuhuet vik te ka saii.
16 Mpe soki nasalaka makambo oyo naboyaka kosala, wana nandimi ete Mobeko ezali malamu.
Tedae ka ngaih pawt te ka saii atah olkhueng te then tila ka paipuei.
17 Lokola ezali bongo, emonani ete ezali ngai te moto nasalaka yango, kasi ezali nde lisumu oyo evandaka kati na ngai.
Tahae kah tholh aka thoeng te kai voel pawt tih ka khuikah aka kol tholhnah long ni a saii.
18 Pamba te nayebi malamu ete bolamu evandaka kati na ngai te, elingi koloba: evandaka kati na nzoto na ngai te. Nazalaka na posa ya kosala bolamu, kasi nazangaka nguya ya kokokisa yango.
Ka pumsa ah aka om te ka khuiah kol pawh tila ka ming. A then ngaih ham tah ka khuiah om dae a then tah ha thoeng laklo pawh.
19 Nasalaka te bolamu oyo nalingaka kosala, kasi nasalaka nde mabe oyo naboyaka kosala.
A then saii ham ka ngaih te ka saii pawt tih ka ngaih pawh a thae te ka saii.
20 Soki sik’oyo nasali makambo oyo naboyaka kosala, ezali lisusu ngai te moto nasali yango, kasi ezali nde lisumu oyo evandaka kati na ngai.
Ka ngaih pawt te ka saii atah te te ka thoeng sak pawt dae ka khuiah aka kol tholhnah long ni a saii.
21 Boye, namonaka mobeko oyo kosala kati na ngai: soki nalingi kosala bolamu, ezali mabe kaka nde nakosala.
Te dongah a then saii ka ngaih vaengah kai taengah a thae te om tila a olkhueng he ka hmuh.
22 Pamba te kati na motema na ngai, nasepelaka na Mobeko ya Nzambe;
A khuikah hlang te Pathen kah olkhueng ah ni ka hmae.
23 kasi kati na biteni ya nzoto na ngai, namonaka mobeko mosusu kobundisa mobeko ya makanisi ya motema na ngai mpe kokomisa ngai mowumbu ya mobeko ya lisumu oyo ezali kosala kati na biteni ya nzoto na ngai.
Olkhueng tloe te ka pumrho ah om tih ka lungbuei kah olkhueng te a vathoh thil. Te dongah ka pumrho ah aka om tholh kah olkhueng neh kai n'sol te ka ming.
24 Oh ngai moto na mawa! Nani akokangola ngai na nzoto oyo ya kufa?
Kai tah ngaidaeng ngaikha hlang ni. U long nim he dueknah pumsa dong lamloh kai n'hlawt ve.
25 Tika ete matondi epesamela Nzambe oyo akangolaka ngai na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso! Na mokuse, nakoki koloba ete, na nzela ya mayele na ngai, nazali mowumbu ya Mobeko ya Nzambe, kasi na nzela ya bomoto na ngai ya masumu, nazali mowumbu ya mobeko ya lisumu.
Tedae mamih kah Boeipa Jesuh Khrih rhangneh Pathen te ka lungvatnah. Te dongah kai kamah khaw lungbuei cungvang loh Pathen olkhueng kah sal ka bi dae ka pumsa tah tholhnah olkhueng neh om.