< Barome 6 >

1 Boye, toloba nini? Tosalaka na biso masumu mpo ete ngolu efuluka koleka?
Τί οὖν ἐροῦμεν; ἐπιμενοῦμεν τῇ ἁμαρτίᾳ ἵνα ἡ χάρις πλεονάσῃ;
2 Soki moke te! Biso oyo tosila kokufa mpo na lisumu, ndenge nini tozongela lisusu kotambola kati na masumu?
μὴ γένοιτο. οἵτινες ἀπεθάνομεν τῇ ἁμαρτίᾳ, πῶς ἔτι ζήσομεν ἐν αὐτῇ;
3 Boni, boyebi te ete biso nyonso oyo tosila kobatisama kati na Yesu-Klisto tozwaki nde libatisi kati na kufa na Ye?
ἢ ἀγνοεῖτε ὅτι ὅσοι ἐβαπτίσθημεν εἰς Χριστὸν Ἰησοῦν, εἰς τὸν θάνατον αὐτοῦ ἐβαπτίσθημεν;
4 Bakundaki biso elongo na Ye na nzela ya libatisi kati na kufa na Ye mpo ete, lokola Klisto asekwaki kati na bakufi na nzela ya nkembo ya Tata, biso mpe totambola na bomoi ya sika.
συνετάφημεν οὖν αὐτῷ διὰ τοῦ βαπτίσματος εἰς τὸν θάνατον, ἵνα ὥσπερ ἠγέρθη Χριστὸς ἐκ νεκρῶν διὰ τῆς δόξης τοῦ πατρός, οὕτω καὶ ἡμεῖς ἐν καινότητι ζωῆς περιπατήσωμεν.
5 Pamba te soki tosanganaki elongo na Ye kati na kufa na Ye, solo tokosangana mpe elongo na Ye kati na lisekwa na Ye.
εἰ γὰρ σύμφυτοι γεγόναμεν τῷ ὁμοιώματι τοῦ θανάτου αὐτοῦ, ἀλλὰ καὶ τῆς ἀναστάσεως ἐσόμεθα,
6 Pamba te toyebi malamu ete bomoto ya kala ebakamaki na ekulusu elongo na Klisto mpo ete nzoto na biso lokola esalelo ya lisumu ekufa mpe tozala lisusu bawumbu ya lisumu te.
τοῦτο γινώσκοντες, ὅτι ὁ παλαιὸς ἡμῶν ἄνθρωπος συνεσταυρώθη ἵνα καταργηθῇ τὸ σῶμα τῆς ἁμαρτίας, τοῦ μηκέτι δουλεύειν ἡμᾶς τῇ ἁμαρτίᾳ·
7 Moto nyonso oyo asilaki kokufa atangamaki lokola moto ya sembo: azali lisusu te na se ya bokonzi ya lisumu.
ὁ γὰρ ἀποθανὼν δεδικαίωται ἀπὸ τῆς ἁμαρτίας.
8 Nzokande, lokola tosila kokufa elongo na Klisto, tozali kondima ete tokozala mpe na bomoi elongo na Ye.
εἰ δὲ ἀπεθάνομεν σὺν Χριστῷ, πιστεύομεν ὅτι καὶ συζήσομεν αὐτῷ,
9 Pamba te toyebi malamu ete Klisto oyo asekwaki kati na bakufi akokufa lisusu te; kufa ezali lisusu na bokonzi te likolo na Ye.
εἰδότες ὅτι Χριστὸς ἐγερθεὶς ἐκ νεκρῶν οὐκέτι ἀποθνήσκει, θάνατος αὐτοῦ οὐκέτι κυριεύει.
10 Akufaki mpo na lisumu mbala moko mpo na libela; kasi sik’oyo azali na bomoi, mpe azali na bomoi mpo na Nzambe.
ὃ γὰρ ἀπέθανε, τῇ ἁμαρτίᾳ ἀπέθανεν ἐφάπαξ, ὃ δὲ ζῇ, ζῇ τῷ Θεῷ.
11 Boye bino mpe, bomimona lokola bakufi mpo na lisumu, kasi lokola bato ya bomoi mpo na Nzambe kati na Yesu-Klisto.
οὕτω καὶ ὑμεῖς λογίζεσθε ἑαυτοὺς νεκροὺς μὲν εἶναι τῇ ἁμαρτίᾳ, ζῶντας δὲ τῷ Θεῷ ἐν Χριστῷ Ἰησοῦ τῷ Κυρίῳ ἡμῶν.
12 Yango wana, tika ete lisumu ezala lisusu na bokonzi te kati na banzoto na bino, oyo ekokufa; mpe bosengeli lisusu te kotosa baposa na yango ya mabe.
Μὴ οὖν βασιλευέτω ἡ ἁμαρτία ἐν τῷ θνητῷ ὑμῶν σώματι εἰς τὸ ὑπακούειν αὐτῇ ἐν ταῖς ἐπιθυμίαις αὐτοῦ,
13 Bokaba biteni ya banzoto na bino te na lisumu lokola bisalelo mpo na mabe, kasi bomikaba bino moko epai na Nzambe lokola bato oyo basekwa kati na bakufi mpe bazali na bomoi; mpe bokabela Ye biteni ya banzoto na bino lokola bisalelo mpo na bosembo.
μηδὲ παριστάνετε τὰ μέλη ὑμῶν ὅπλα ἀδικίας τῇ ἁμαρτίᾳ, ἀλλὰ παραστήσατε ἑαυτοὺς τῷ Θεῷ ὡς ἐκ νεκρῶν ζῶντας καὶ τὰ μέλη ὑμῶν ὅπλα δικαιοσύνης τῷ Θεῷ.
14 Pamba te lisumu ekozala lisusu na bokonzi te likolo na bino, pamba te bozali lisusu na se ya bokonzi ya Mobeko te, kasi na se ya ngolu.
ἁμαρτία γὰρ ὑμῶν οὐ κυριεύσει· οὐ γάρ ἐστε ὑπὸ νόμον, ἀλλ᾽ ὑπὸ χάριν.
15 Boye toloba nini? Tokoba kosala masumu mpo ete tozali na se ya bokonzi ya Mobeko te kasi na se ya ngolu? Soki moke te!
Τί οὖν; ἁμαρτήσομεν ὅτι οὐκ ἐσμὲν ὑπὸ νόμον, ἀλλ᾽ ὑπὸ χάριν; μὴ γένοιτο.
16 Boni, boyebi te ete soki bomikabi epai ya moto lokola bawumbu mpo na kotosa ye bokomi nde bawumbu ya moto oyo bozali kotosa to bawumbu ya lisumu oyo ememaka na kufa to bawumbu ya botosi oyo ememaka na bosembo?
οὐκ οἴδατε ὅτι ᾧ παριστάνετε ἑαυτοὺς δούλους εἰς ὑπακοήν, δοῦλοί ἐστε ᾧ ὑπακούετε, ἤτοι ἁμαρτίας εἰς θάνατον ἢ ὑπακοῆς εἰς δικαιοσύνην;
17 Kasi tika ete tozongisa matondi epai ya Nzambe! Soki na kala bozalaki bawumbu ya lisumu, kasi sik’oyo bokomi kotosa na motema mobimba mateya oyo bateyaki bino,
χάρις δὲ τῷ Θεῷ ὅτι ἦτε δοῦλοι τῆς ἁμαρτίας, ὑπηκούσατε δὲ ἐκ καρδίας εἰς ὃν παρεδόθητε τύπον διδαχῆς,
18 bosili kokangolama na bowumbu ya lisumu mpe bokomi bawumbu ya bosembo.
ἐλευθερωθέντες δὲ ἀπὸ τῆς ἁμαρτίας ἐδουλώθητε τῇ δικαιοσύνῃ.
19 Nazali koloba awa lokola moto mpo na bolembu na bino ya bomoto. Ndenge na kala, bokabaki biteni ya banzoto na bino na bowumbu ya misala ya mbindo mpe ya mabe mpo na kosala mabe, ndenge wana mpe bokaba yango sik’oyo na bowumbu ya bosembo mpo na kotambola na bomoi ya bosantu.
ἀνθρώπινον λέγω διὰ τὴν ἀσθένειαν τῆς σαρκὸς ὑμῶν. ὥσπερ γὰρ παρεστήσατε τὰ μέλη ὑμῶν δοῦλα τῇ ἀκαθαρσίᾳ καὶ τῇ ἀνομίᾳ εἰς τὴν ἀνομίαν, οὕτω νῦν παραστήσατε τὰ μέλη ὑμῶν δοῦλα τῇ δικαιοσύνῃ εἰς ἁγιασμόν.
20 Tango bozalaki nanu bawumbu ya lisumu, bozalaki na bonsomi liboso ya bosembo.
ὅτε γὰρ δοῦλοι ἦτε τῆς ἁμαρτίας, ἐλεύθεροι ἦτε τῇ δικαιοσύνῃ.
21 Nzokande, litomba nini bozwaki na tango wana oyo bozalaki kosala makambo oyo ezali koyokisa bino lelo soni, pamba te ememaka na kufa?
τίνα οὖν καρπὸν εἴχετε τότε ἐφ᾽ οἷς νῦν ἐπαισχύνεσθε; τὸ γὰρ τέλος ἐκείνων θάνατος.
22 Kasi awa bolongwe sik’oyo na se ya bowumbu ya lisumu mpe bokomi na se ya bowumbu ya Nzambe, litomba oyo bozwi ezali bomoi ya bosantu, mpe suka na yango ezali bomoi ya seko. (aiōnios g166)
νυνὶ δὲ ἐλευθερωθέντες ἀπὸ τῆς ἁμαρτίας δουλωθέντες δὲ τῷ Θεῷ ἔχετε τὸν καρπὸν ὑμῶν εἰς ἁγιασμόν, τὸ δὲ τέλος ζωὴν αἰώνιον. (aiōnios g166)
23 Pamba te lifuti ya lisumu ezali kufa, kasi likabo ya ofele ya Nzambe ezali bomoi ya seko kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso. (aiōnios g166)
τὰ γὰρ ὀψώνια τῆς ἁμαρτίας θάνατος, τὸ δὲ χάρισμα τοῦ Θεοῦ ζωὴ αἰώνιος ἐν Χριστῷ Ἰησοῦ τῷ Κυρίῳ ἡμῶν. (aiōnios g166)

< Barome 6 >