< Barome 5 >

1 Yango wana, lokola tokomi bato ya sembo na nzela ya kondima, tozali na kimia elongo na Nzambe na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto
Therefore having been justified by faith, let us have peace toward God through our Lord Jesus Christ:
2 oyo na nzela na Ye, tozwi ndingisa, na nzela ya kondima, ya kozwa ngolu oyo kati na yango tozali kowumela mpe tozali komikumisa kati na elikya ete tokobika nkembo ya Nzambe.
through whom we also have access by faith unto this grace in which we stand, and let us rejoice in the hope of the glory of God.
3 Tozali mpe komikumisa kati na pasi, pamba te toyebi ete pasi ebotaka koyika mpiko,
And not only so, but let us also rejoice in tribulation; knowing that tribulation works out endurance;
4 koyika mpiko ememaka elonga kati na komekama, mpe elonga kati na komekama ebotaka elikya.
and endurance, approval; and approval, hope:
5 Nzokande, elikya ekosaka te, pamba te Nzambe asopaki bolingo na Ye kati na mitema na biso na nzela ya Molimo Mosantu oyo Ye Nzambe apesaki biso.
and hope makes not ashamed; because the divine love of God has been poured out in our hearts by the Holy Ghost who has been given unto us.
6 Solo, wana tozalaki nanu bato na bolembu, Klisto akufaki mpo na bato ya masumu, na tango oyo Nzambe abongisaki.
For we being yet without strength, in due time Christ died for the ungodly:
7 Ezali pasi komona moto kondima kokufa mpo na moto ya sembo; tango mosusu, moto akoki kondima kokufa mpo na moto ya malamu.
for scarcely will one die for a righteous man; for perhaps some one even dares to die for a good man.
8 Kasi tala ndenge nini Nzambe alakisi biso bolingo na Ye: wana tozalaki nanu bato ya masumu, Klisto akufelaki biso.
And God commends his love to us, because, we being yet sinners, Christ died for us.
9 Lokola tokomi sik’oyo bato ya sembo na nzela ya makila na Ye, Klisto akobikisa biso mpe na kanda ya Nzambe.
How much more then, having now been justified by his blood, shall we be saved from wrath through him.
10 Solo, wana tozalaki nanu banguna ya Nzambe, Ye moko Nzambe azongisaki boyokani na biso elongo na Ye na nzela ya kufa ya Mwana na Ye. Boye lokola azongisi boyokani yango, akobikisa biso mpe na nzela ya bomoi ya mwana na Ye.
For if being enemies we are reconciled to God through the death of his Son; how much more, being reconciled, shall we be saved through his life:
11 Yango kaka te! Tozali mpe komikumisa kati na Nzambe na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo azongisi boyokani na biso elongo na Nzambe.
but not only so, but even rejoicing in God through Jesus Christ our Lord, through whom we now received reconciliation.
12 Yango wana, ndenge lisumu ekotaki na mokili na nzela ya moto moko, mpe kufa na nzela ya lisumu, ndenge wana mpe kufa ekangaki bato nyonso na nzela ya lisumu, pamba te bato nyonso basalaki masumu.
Therefore, as by one man sin came into the world, and death by sin; and thus death came upon all men, in that all sinned;
13 Solo, liboso ete Nzambe apesa Mobeko, lisumu ezalaki kati na mokili, kasi lisumu ekoki kotangama te soki Mobeko ezali te.
(for until the law sin was in the world: but sin is not imputed, there being no law;
14 Nzokande, wuta na tango ya Adamu kino na tango ya Moyize, kufa ezalaki na bokonzi ata epai ya bato oyo basalaki masumu te, na lolenge ya Adamu oyo abukaki mobeko mpe azali elilingi ya moto oyo asengelaki koya.
but death reigned from Adam unto Moses, even on those who did not sin after the similitude of Adam's transgression, who is the type of him who is to come.
15 Kasi ezali na bokeseni monene kati na likabo ya ofele ya Nzambe mpe lisumu! Pamba te soki lisumu ya moto moko ememelaki bato ebele kufa, ngolu ya Nzambe mpe likabo ya ofele oyo eyaki na nzela ya ngolu ya moto moko, Yesu-Klisto, efulukaki meke mpo na bato ebele.
But not as was the transgression, even so is the free gift: for if by the transgression of one many died, how much more by the grace of one man, Jesus Christ, did the grace of God and the gift abound unto many!
16 Likabo ya Nzambe ezali na motuya makasi koleka mabe ya lisumu ya moto moko: likolo ya lisumu moko, kosambisama eyei mpe ememi etumbu; kasi likolo ya masumu ebele, likabo ya ngolu eyei mpe elongoli etumbu.
And not as by the one having sinned, is the free gift; for indeed, judgment was from one unto condemnation, but the free gift is from many transgressions unto justification.
17 Pamba te soki na nzela ya mabe ya moto moko, kufa ezwaki bokonzi likolo ya moto wana se moko, ndenge nini bato oyo bazwaka bomengo ya ngolu ya Nzambe mpe likabo ya bosembo bazala na bokonzi te kati na bomoi na nzela ya Yesu-Klisto Ye moko!
For if by the transgression of one death reigned through one; how much more shall those receiving the abundance of grace and the gift of righteousness reign in life through the one, Christ Jesus!)
18 Na mokuse, ndenge mabe ya moto moko ememelaki bato nyonso etumbu, ndenge wana mpe mosala ya moto moko mpo na kokokisa bosembo ememeli bato nyonso bonsomi mpe bomoi.
Therefore then, as by the transgression of one, judgment came to all men to condemnation; so also through the righteousness of one, the free gift came on all men unto the justification of life:
19 Pamba te ndenge kozanga botosi ya moto moko ekomisaki bato ebele bato ya masumu, ndenge wana mpe botosi ya moto moko ekomisi bato ebele bato ya sembo.
for as by the disobedience of one man many were made sinners, so also by the obedience of one man shall many be made righteous.
20 Mobeko eyaki mpo ete lisumu ebotana. Kasi epai lisumu ebotanaki, ngolu efulukaki koleka
But the law came, that the transgression might abound; but where sin did abound, there did grace superabound:
21 mpo ete, ndenge lisumu elakisaki bokonzi na yango na nzela ya kufa, ngolu mpe elakisa bokonzi na yango na nzela ya bosembo mpo na komema na bomoi ya seko na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso. (aiōnios g166)
in order that as sin reigned through death, so may grace reign also through righteousness unto eternal life through Jesus Christ our Lord. (aiōnios g166)

< Barome 5 >