< Barome 4 >
1 Toloba nini na tina na Abrayami, koko na biso? Azwaki nini na bomoto?
ⲁ̅ⲟⲩ ϭⲉ ⲡⲉⲧⲛⲛⲁϫⲟⲟϥ ϫⲉ ⲁⲁⲃⲣⲁϩⲁⲙ ϩⲉ ⲉⲣⲟϥ ⲡⲉⲛⲉⲓⲱⲧ ϫⲓⲛ ⲛϣⲟⲣⲡ ⲕⲁⲧⲁ ⲥⲁⲣⲝ
2 Soki Abrayami atangamaki lokola moto ya sembo na nzela ya misala, akokaki solo komikumisa; kasi liboso ya Nzambe, ezali bongo te!
ⲃ̅ⲉϣϫⲉ ⲛⲧⲁⲩⲧⲙⲁⲓⲉ ⲁⲃⲣⲁϩⲁⲙ ⲅⲁⲣ ⲉⲃⲟⲗ ϩⲛ ⲛⲉϩⲃⲏⲩⲉ ⲟⲩⲛⲧϥ ⲟⲩϣⲟⲩϣⲟⲩ ⲙⲙⲁⲩ ⲁⲗⲗⲁ ⲛⲛⲁϩⲣⲙ ⲡⲛⲟⲩⲧⲉ ⲁⲛ
3 Makomi elobi nini? « Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe, yango wana Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo. »
ⲅ̅ⲟⲩ ⲇⲉ ⲡⲉⲧⲉⲣⲉ ⲧⲉⲅⲣⲁⲫⲏ ϫⲱ ⲙⲙⲟϥ ϫⲉ ⲁⲁⲃⲣⲁϩⲁⲙ ⲡⲓⲥⲧⲉⲩⲉ ⲉⲡⲛⲟⲩⲧⲉ ⲁⲩⲟⲡⲥ ⲉⲣⲟϥ ⲉⲩⲇⲓⲕⲁⲓⲟⲥⲩⲛⲏ
4 Soki moto asali mosala, batangaka lifuti na ye lokola likabo te, kasi lokola motoki na ye.
ⲇ̅ⲡⲉⲧⲣϩⲱⲃ ⲇⲉ ⲉϣⲁⲩⲉⲡ ⲡⲉϥⲃⲉⲕⲉ ⲉⲣⲟϥ ⲁⲛ ⲕⲁⲧⲁ ⲟⲩϩⲙⲟⲧ ⲁⲗⲗⲁ ⲕⲁⲧⲁ ⲟⲩⲙⲡϣⲁ
5 Nzokande, soki moto asali mosala te, kasi andimeli Nzambe oyo atangaka bato ya masumu lokola bato ya sembo, kondima na ye ekokomisa ye moto ya sembo.
ⲉ̅ⲡⲉⲧⲉⲛϥⲣϩⲱⲃ ⲇⲉ ⲁⲛ ⲁⲗⲗⲁ ⲉⲧⲡⲓⲥⲧⲉⲩⲉ ⲉⲡⲉⲧⲧⲙⲁⲉⲓⲟ ⲙⲡⲁⲥⲉⲃⲏⲥ ϣⲁⲩⲉⲡ ⲧⲉϥⲡⲓⲥⲧⲓⲥ ⲉⲣⲟϥ ⲉⲩⲇⲓⲕⲁⲓⲟⲥⲩⲛⲏ
6 Davidi mpe alobaki bongo tango atatolaki esengo ya moto oyo Nzambe akomisi sembo na kozanga misala:
ⲋ̅ⲕⲁⲧⲁ ⲑⲉ ⲟⲛ ⲉϣⲁⲣⲉ ⲇⲁⲩⲉⲓⲇ ϫⲱ ⲙⲡⲙⲁⲕⲁⲣⲓⲥⲙⲟⲥ ⲙⲡⲣⲱⲙⲉ ⲡⲁⲓ ⲉⲧⲉⲣⲉⲡⲛⲟⲩⲧⲉ ⲛⲁⲱⲡ ⲉⲣⲟϥ ⲛⲟⲩⲇⲓⲕⲁⲓⲟⲥⲩⲛⲏ ⲁϫⲛ ⲛⲉϩⲃⲏⲩⲉ
7 « Esengo na bato oyo mabe na bango elimbisami, mpe masumu na bango elongwe!
ⲍ̅ϫⲉ ⲛⲁⲓⲁⲧⲟⲩ ⲛⲛⲉⲛⲧⲁⲩⲕⲱ ⲛⲁⲩ ⲉⲃⲟⲗ ⲛⲛⲉⲩⲁⲛⲟⲙⲓⲁ ⲁⲩⲱ ⲛⲉⲛⲧⲁⲩϩⲱⲃⲥ ⲉⲃⲟⲗ ⲉϫⲛ ⲛⲉⲩⲛⲟⲃⲉ
8 Esengo na moto oyo Nkolo atangelaka lisumu te! »
ⲏ̅ⲛⲁⲓⲁⲧϥ ⲙⲡⲣⲱⲙⲉ ⲉⲧⲉ ⲙⲡϫⲟⲉⲓⲥ ⲛⲁⲉⲡ ⲛⲟⲃⲉ ⲉⲣⲟϥ ⲁⲛ
9 Boni, esengo yango ezali kaka mpo na bato oyo bakatisa ngenga to ezali mpe mpo na bato oyo bakatisa ngenga te? Solo, tozali koloba: Mpo ete Abrayami azalaki na kondima, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo.
ⲑ̅ⲡⲉⲓⲙⲁⲕⲁⲣⲓⲥⲙⲟⲥ ϭⲉ ⲉϥϣⲟⲟⲡ ⲉϫⲙ ⲡⲥⲃⲃⲉ ϫⲛ ⲉϥϣⲟⲟⲡ ⲉϫⲛ ⲧⲕⲉⲙⲛⲧⲁⲧⲥⲃⲃⲉ ⲧⲛϫⲱ ⲅⲁⲣ ⲙⲙⲟⲥ ϫⲉ ⲁⲩⲉⲡ ⲧⲡⲓⲥⲧⲓⲥ ⲛⲁⲃⲣⲁϩⲁⲙ ⲉⲣⲟϥ ⲉⲩⲇⲓⲕⲁⲓⲟⲥⲩⲛⲏ
10 Esalemaki tango nini? Esalemaki liboso na ye kokatisa ngenga to sima na ye kokatama ngenga? Esalemaki te sima na ye kokatama ngenga; esalemaki nde liboso na ye kokatisa ngenga.
ⲓ̅ⲛⲧⲁⲩⲟⲡⲥ ϭⲉ ⲉⲣⲟϥ ⲛⲁϣ ⲛϩⲉ ⲛⲉϥϩⲙ ⲡⲥⲃⲃⲉ ⲡⲉ ϫⲛ ⲉϥϩⲛ ⲧⲙⲛⲧⲁⲧⲥⲃⲃⲉ ⲛⲉϥϩⲙ ⲡⲥⲃⲃⲉ ⲁⲛ ⲡⲉ ⲁⲗⲗⲁ ⲛⲉϥϩⲛ ⲧⲙⲛⲧⲁⲧⲥⲃⲃⲉ
11 Nzambe apesaki ye elembo ya kokatama ngenga lokola kashe ya bosembo oyo azwaki na nzela ya kondima, wana azalaki akatama nanu ngenga te. Boye akoma na mbala moko tata ya bato nyonso oyo bandimaka, wana bazali bakatama ngenga te mpo ete bango mpe bakoma bato ya sembo,
ⲓ̅ⲁ̅ⲁⲩⲱ ⲁϥϫⲓ ⲛⲟⲩⲙⲁⲉⲓⲛ ⲛⲥⲃⲃⲉ ⲛⲥⲫⲣⲁⲅⲓⲥ ⲛⲧⲇⲓⲕⲁⲓⲟⲥⲩⲛⲏ ⲛⲧⲡⲓⲥⲧⲓⲥ ⲉⲧϩⲛ ⲧⲙⲛⲧⲁⲧⲥⲃⲃⲉ ⲉⲧⲣⲉϥϣⲱⲡⲉ ⲛⲉⲓⲱⲧ ⲛⲛⲉⲧⲡⲓⲥⲧⲉⲩⲉ ⲧⲏⲣⲟⲩ ϩⲓⲧⲛ ⲧⲙⲛⲧⲁⲧⲥⲃⲃⲉ ⲉⲧⲣⲉⲩⲟⲡⲥ ϩⲱⲟⲩ ⲟⲛ ⲉⲣⲟⲟⲩ ⲉⲩⲇⲓⲕⲁⲓⲟⲥⲩⲛⲏ
12 mpe tata ya bato oyo bakatisa ngenga, ba-oyo bakatama ngenga kaka te, kasi balandaka mpe ndakisa ya kondima oyo Abrayami, tata na biso, azalaki na yango liboso ete bakata ye ngenga.
ⲓ̅ⲃ̅ⲁⲩⲱ ⲛⲉⲓⲱⲧ ⲙⲡⲥⲃⲃⲉ ⲛⲛⲉⲃⲟⲗ ⲁⲛ ϩⲙ ⲡⲥⲃⲃⲉ ⲙⲁⲩⲁⲁⲩ ⲁⲗⲗⲁ ⲛⲕⲟⲟⲩⲉ ⲉⲧⲁϩⲉ ⲉⲧⲉϩⲓⲏ ⲛⲧⲡⲓⲥⲧⲓⲥ ⲉⲧϩⲛ ⲧⲙⲛⲧⲁⲧⲥⲃⲃⲉ ⲙⲡⲉⲛⲉⲓⲱⲧ ⲁⲃⲣⲁϩⲁⲙ
13 Ezali na nzela ya Mobeko te nde Abrayami mpe bakitani na ye bapesamelaki elaka ya kozwa mokili lokola libula, kasi ezali nde na nzela ya bosembo oyo ewutaka na kondima.
ⲓ̅ⲅ̅ⲟⲩⲉⲃⲟⲗ ⲅⲁⲣ ⲁⲛ ϩⲓⲧⲙ ⲡⲛⲟⲙⲟⲥ ⲡⲉ ⲡⲉⲣⲏⲧ ⲉⲛⲧⲁϥϣⲱⲡⲉ ⲛⲁⲃⲣⲁϩⲁⲙ ⲏ ⲡⲉϥⲥⲡⲉⲣⲙⲁ ⲉⲧⲣⲉϥϣⲱⲡⲉ ⲛⲕⲗⲏⲣⲟⲛⲟⲙⲟⲥ ⲙⲡⲕⲟⲥⲙⲟⲥ ⲁⲗⲗⲁ ⲉⲃⲟⲗ ϩⲓⲧⲛ ⲧⲇⲓⲕⲁⲓⲟⲥⲩⲛⲏ ⲛⲧⲡⲓⲥⲧⲓⲥ
14 Pamba te soki ezali bato oyo batosaka mibeko nde bakozwa libula yango, wana kondima ezali lisusu na tina te mpe elaka ezali te,
ⲓ̅ⲇ̅ⲉϣϫⲉ ⲉⲣⲉⲛⲉⲕⲗⲏⲣⲟⲛⲟⲙⲟⲥ ⲅⲁⲣ ϣⲟⲟⲡ ⲉⲃⲟⲗ ϩⲙ ⲡⲛⲟⲙⲟⲥ ⲉⲓⲉ ⲧⲡⲓⲥⲧⲓⲥ ϣⲟⲩⲉⲓⲧ ⲁⲩⲱ ⲁⲡⲉⲣⲏⲧ ⲟⲩⲱⲥϥ
15 pamba te Mobeko ebendaka kanda ya Nzambe. Nzokande, esika oyo Mobeko ezali te, kobuka Mobeko mpe ezalaka te.
ⲓ̅ⲉ̅ⲉⲣⲉ ⲡⲛⲟⲙⲟⲥ ⲅⲁⲣ ⲣϩⲱⲃ ⲉⲩⲟⲣⲅⲏ ⲡⲙⲁ ⲇⲉ ⲉⲧⲉ ⲙⲛ ⲛⲟⲙⲟⲥ ⲛϩⲏⲧϥ ⲟⲩⲇⲉ ⲙⲛⲡⲁⲣⲁⲃⲁⲥⲓⲥ
16 Yango wana, elaka eyaka na nzela ya kondima, mpo ete ezala na nzela ya ngolu mpe mpo ete ezala mpo na bakitani nyonso ya Abrayami: kaka te mpo na ba-oyo babengami bakitani na nzela ya Mobeko, kasi mpe mpo na ba-oyo bazali na kondima ya Abrayami oyo azali tata na biso nyonso,
ⲓ̅ⲋ̅ⲉⲧⲃⲉ ⲡⲁⲓ ⲟⲩⲉⲃⲟⲗ ϩⲛ ⲧⲡⲓⲥⲧⲓⲥ ⲧⲉ ϫⲉⲕⲁⲥ ⲕⲁⲧⲁ ⲟⲩϩⲙⲟⲧ ⲉⲧⲣⲉ ⲡⲉⲣⲏⲧ ϣⲱⲡⲉ ⲉϥⲧⲁϫⲣⲏⲩ ⲙⲡⲉⲥⲡⲉⲣⲙⲁ ⲧⲏⲣϥ ⲙⲡⲉⲃⲟⲗ ⲁⲛ ϩⲙ ⲡⲛⲟⲙⲟⲥ ⲙⲙⲁⲧⲉ ⲁⲗⲗⲁ ⲙⲡⲕⲉⲉⲃⲟⲗ ϩⲛ ⲧⲡⲓⲥⲧⲓⲥ ⲛⲁⲃⲣⲁϩⲁⲙ ⲉⲧⲉ ⲡⲁⲓ ⲡⲉ ⲡⲉⲛⲉⲓⲱⲧ ⲧⲏⲣⲛ
17 kolanda ndenge ekomama: « Nakomisaki yo tata ya bikolo ebele. » Azali tata na biso na miso ya Nzambe oyo ye andimaki, Nzambe oyo apesaka bomoi epai ya bakufi mpe azalisaka biloko oyo etikala kozala te.
ⲓ̅ⲍ̅ⲕⲁⲧⲁ ⲑⲉ ⲉⲧⲥⲏϩ ϫⲉ ⲁⲓⲕⲱ ⲙⲙⲟⲕ ⲛⲉⲓⲱⲧ ⲛϩⲁϩ ⲛϩⲉⲑⲛⲟⲥ ⲙⲡⲉⲙⲧⲟ ⲉⲃⲟⲗ ⲙⲡⲛⲟⲩⲧⲉ ⲉⲛⲧⲁϥⲡⲓⲥⲧⲉⲩⲉ ⲉⲣⲟϥ ⲡⲁⲓ ⲉⲧⲧⲁⲛϩⲟ ⲛⲛⲉⲧⲙⲟⲟⲩⲧ ⲉⲧⲙⲟⲩⲧⲉ ⲉⲛⲉⲧⲉⲛⲥⲉϣⲟⲟⲡ ⲁⲛ ϩⲱⲥ ⲉⲩϣⲟⲟⲡ
18 Atako Abrayami akokaki lisusu te kotia elikya, kasi atiaki kaka elikya mpe andimaki; boye akomaki tata ya bikolo ebele, kolanda ndenge Nzambe aloba mpo na ye: « Bakitani na yo bakozala ebele. »
ⲓ̅ⲏ̅ⲡⲁⲓ ⲡⲁⲣⲁ ⲟⲩϩⲉⲗⲡⲓⲥ ⲁϥⲡⲓⲥⲧⲉⲩⲉ ⲉⲩϩⲉⲗⲡⲓⲥ ⲉⲧⲣⲉϥϣⲱⲡⲉ ⲛⲉⲓⲱⲧ ⲛϩⲁϩ ⲛϩⲉⲑⲛⲟⲥ ⲕⲁⲧⲁ ⲡⲉⲛⲧⲁⲩϫⲟⲟϥ ϫⲉ ⲧⲁⲓ ⲧⲉ ⲑⲉ ⲉⲧⲉⲣⲉⲡⲉⲕⲥⲡⲉⲣⲙⲁ ⲛⲁϣⲱⲡⲉ ⲙⲙⲟⲥ
19 Abrayami akomaki na mibu pene nkama moko, kasi kondima na ye elembaki te atako atalaki nzoto na ye, oyo ezalaki lisusu na makasi te, mpe nzoto ya Sara oyo akokaki lisusu kobota te.
ⲓ̅ⲑ̅ⲁⲩⲱ ⲙⲡϥϭⲃⲃⲉ ϩⲛ ⲧⲡⲓⲥⲧⲓⲥ ⲁϥⲛⲁⲩ ⲉⲡⲉϥⲥⲱⲙⲁ ⲉⲁϥⲕⲁϭⲟⲙ ⲉⲡⲧⲏⲣϥ ⲉϥⲛⲁⲣⲁϣⲉ ⲛⲣⲟⲙⲡⲉ ⲙⲛⲡⲙⲟⲩ ⲛⲧⲟⲟⲧⲉ ⲛⲥⲁⲣⲣⲁ
20 Nzokande, na esika ete atia tembe na elaka ya Nzambe mpe aboya kondima, kasi kondima na ye epesaki ye lisusu makasi koleka mpe azalaki kopesa Nzambe nkembo,
ⲕ̅ⲉⲡⲉⲣⲏⲧ ⲇⲉ ⲙⲡⲛⲟⲩⲧⲉ ⲙⲡϥⲣϩⲏⲧ ⲥⲛⲁⲩ ϩⲛ ⲟⲩⲙⲛⲧⲁⲡⲓⲥⲧⲟⲥ ⲁⲗⲗⲁ ⲁϥϭⲙϭⲟⲙ ϩⲛ ⲧⲡⲓⲥⲧⲓⲥ ⲉⲁϥϯ ⲉⲟⲟⲩ ⲙⲡⲛⲟⲩⲧⲉ
21 wana andimisamaki makasi ete Nzambe azali na makoki ya kokokisa elaka na Ye.
ⲕ̅ⲁ̅ⲁⲩⲱ ⲁϥⲧⲱⲧ ⲛϩⲏⲧ ϫⲉ ⲡⲉⲛⲧⲁϥ ⲉⲣⲏⲧ ⲙⲙⲟϥ ⲟⲩⲛϭⲟⲙ ⲙⲙⲟϥ ⲉⲁⲁϥ
22 Yango wana, mpo na kondima na ye, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo.
ⲕ̅ⲃ̅ⲉⲧⲃⲉ ⲡⲁⲓ ⲁⲩⲟⲡⲥ ⲉⲣⲟϥ ⲉⲩⲇⲓⲕⲁⲓⲟⲥⲩⲛⲏ
23 Nzokande, ezali mpo na ye moko kaka te nde ekomama: « Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo; »
ⲕ̅ⲅ̅ⲛⲧⲁⲩⲥⲁϩϥ ⲇⲉ ⲁⲛ ⲉⲧⲃⲏⲏⲧϥ ⲙⲁⲩⲁⲁϥ ϫⲉ ⲁⲩⲟⲡⲥ ⲉⲣⲟϥ
24 ezali mpe mpo na biso oyo Nzambe akotanga lokola bato ya sembo mpo ete tondimelaka Ye oyo asekwisaki, kati na bakufi, Yesu, Nkolo na biso,
ⲕ̅ⲇ̅ⲁⲗⲗⲁ ⲉⲧⲃⲏⲏⲧⲛ ϩⲱⲱⲛ ⲟⲛ ⲛⲁⲓ ⲉⲧⲟⲩⲛⲁⲟⲡⲥ ⲉⲣⲟⲟⲩ ⲛⲉⲧⲡⲓⲥⲧⲉⲩⲉ ⲉⲡⲉⲛⲧⲁϥⲧⲟⲩⲛⲉⲥ ⲓⲏⲥ ⲡⲉⲛϫⲟⲉⲓⲥ ⲉⲃⲟⲗ ϩⲛ ⲛⲉⲧⲙⲟⲟⲩⲧ
25 oyo akabamaki mpo na masumu na biso mpe asekwaki mpo ete tokoma bato ya sembo.
ⲕ̅ⲉ̅ⲡⲁⲓ ⲉⲛⲧⲁⲩⲧⲁⲁϥ ⲉⲧⲃⲉ ⲛⲉⲛⲛⲟⲃⲉ ⲁⲩⲱ ⲁϥⲧⲱⲟⲩⲛ ⲉⲧⲃⲉ ⲡⲉⲛⲧⲙⲁⲉⲓⲟ