< Barome 3 >
1 Boye, kozala Moyuda ezali na litomba nini? Kokatama ngenga ezali na tina nini?
Then what advantage does the Jew have? Or what is the profit of circumcision?
2 Solo, ezali penza na litomba monene kati na makambo nyonso. Pamba te Maloba ya Nzambe epesamaki liboso epai na bango.
Much in every way. Because first of all, they were entrusted with the oracles of God.
3 Soki Bayuda mosusu bazangaki kondima, boni, bozangi na bango kondima ekolongola bosembo ya Nzambe?
For what if some were without faith? Will their lack of faith nullify the faithfulness of God?
4 Soki moke te! Nzambe azali solo, mpe bato nyonso bazali bakosi kolanda ndenge ekomama: « Mpo ete bamona yo sembo na maloba na yo, mpe okobanda kolongaka tango bakobanda kosambisaka yo. »
Absolutely not. Let God be found true, but every human being a liar. As it is written, "That you may be justified in your words, and prevail when you judge."
5 Kasi soki mabe na biso ezali kotalisa polele bosembo ya Nzambe, toloba nini? Nzambe azali mabe tango akitiselaka biso kanda na Ye? Nazali kaka kokanisa lokola moto.
But if our unrighteousness commends the righteousness of God, what will we say? Is God unrighteous who inflicts wrath? (I am speaking in human terms).
6 Te, ezali bongo te! Soki ezalaki bongo, ndenge nini Nzambe akokaki kosambisa mokili?
Absolutely not. For then how will God judge the world?
7 To soki lokuta na ngai etalisi polele bosolo ya Nzambe mpe etomboli nkembo na Ye, mpo na nini nazwa lisusu etumbu lokola moto ya masumu?
For if the truth of God through my lie abounded to his glory, why am I also still judged as a sinner?
8 Mpe mpo na nini toloba te: « Tika ete tosala mabe mpo ete bolamu ebima kati na mabe » ndenge bato oyo batongaka biso bakosaka ete toteyaka bongo. Bato wana basengeli kozwa etumbu oyo ekoki na mabe na bango.
And why not (as we are slanderously reported, and as some affirm that we say), "Let us do evil, that good may come?" Their condemnation is just.
9 Boye, toloba nini? Biso Bayuda toleki bato mosusu? Te, soki moke te! Pamba te tosilaki kotalisa ete bato nyonso, ezala Bayuda to Bapagano, bango nyonso bazali na se ya bokonzi ya lisumu.
What then? Are we better than they? No, in no way. For we previously warned both Jews and Greeks, that they are all under sin.
10 Kolanda ndenge ekomama: « Moto ya sembo azali te, ata moko te;
As it is written, "There is no one righteous; no, not one."
11 moto ya mayele azali te; ata moto moko te alukaka Nzambe.
"There is no one who understands. There is no one who seeks after God.
12 Bango nyonso babunga nzela, bango nyonso bamibebisa; moko te asalaka bolamu, ata moko te.
They have all turned aside. They have together become unprofitable. There is no one who does good, there is not even one."
13 Minoko na bango ezali lokola bakunda ya kofungwama, lolemo na bango esalaka mosala ya kokosa, bibebu na bango ezali na ngenge ya etupa.
"Their throat is an open tomb. With their tongues they have used deceit." "Viper's poison is under their lips;"
14 Minoko na bango etonda na makambo ya bololo mpe na bilakeli mabe.
"Whose mouth is full of cursing and bitterness."
15 Makolo na bango epotaka mbangu mpo na kosopa makila.
"Their feet are swift to shed blood.
16 Na bisika nyonso oyo balekelaka, batikaka kaka libebi mpe pasi;
Destruction and calamity are in their paths.
17 bayebi nzela ya kimia te.
The way of peace, they have not known."
18 Kotosa Nzambe ezali na tina ata moke te na miso na bango. »
"There is no fear of God before their eyes."
19 Nzokande, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa, mpe mpo ete moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe.
Now we know that whatever things the law says, it speaks to those who are under the law, that every mouth may be closed, and all the world may be brought under the judgment of God.
20 Yango wana, moto moko te akotangama lokola moto ya sembo na miso ya Nzambe mpo ete akokisi misala ya Mobeko, pamba te Mobeko epesaka kaka boyebi ya lisumu.
Because by the works of the law, no flesh will be justified in his sight. For through the law comes the knowledge of sin.
21 Kasi sik’oyo, na kozanga kosalela Mobeko, Nzambe atalisi polele ndenge nini akomisaka bato sembo liboso na Ye, ndenge Mobeko mpe Basakoli batatola yango.
But now apart from the law, a righteousness of God has been revealed, being testified by the Law and the Prophets;
22 Bato nyonso oyo bandimaka, Nzambe akomisaka bango bato ya sembo na nzela ya kondima Yesu-Klisto. Bokeseni ezali te kati na Bayuda mpe Bapagano,
even the righteousness of God through faith in Jesus (the) Messiah to all who believe. For there is no distinction,
23 pamba te bato nyonso basali masumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe;
for all have sinned, and fall short of the glory of God;
24 mpe bato nyonso bakomi bato ya sembo na ofele, na ngolu na Ye, na nzela ya lisiko kati na Yesu-Klisto.
being justified freely by his grace through the redemption that is in Messiah Jesus;
25 Nzambe akabaki Klisto lokola mbeka mpo ete, na nzela ya kosopa makila na Ye, Klisto azwa bolimbisi masumu ya bato oyo bazali kondima. Asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na Ye, pamba te, na tango ya kala, tango oyo akangaki motema, apesaki bato etumbu te mpo na masumu na bango.
whom God displayed publicly as a mercy seat, through faith in his blood, for a demonstration of his righteousness, because in God's forbearance he had passed over the sins previously committed;
26 Nzambe asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na Ye na tango oyo, mpo ete Ye moko azala Sembo mpe atanga lokola moto ya sembo, moto oyo azali kondimela Yesu.
to demonstrate his righteousness at this present time, so that he would be just, and the justifier of him who has faith in Jesus.
27 Boye, tina nini komikumisa? Tina ezali te! Na mobeko nini? Na mobeko ya misala? Te, kasi na nzela ya kondima.
Where then is the boasting? It is excluded. By what manner of law? Of works? No, but by a law of faith.
28 Pamba te tososoli ete moto atangamaka lokola moto ya sembo na nzela kaka ya kondima, kasi na nzela ya kotosa Mobeko te.
For we maintain that one is justified by faith apart from the works of the law.
29 Boni, Nzambe azali kaka Nzambe ya Bayuda? Azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya te? Solo, azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya.
Or is God for Jews only? Is he not the God of the non-Jews also? Yes, of the non-Jews also,
30 Pamba te Nzambe azali kaka moko; Ye nde akomisaka, na nzela ya kondima na bango, bato oyo bakatisa ngenga mpe bato oyo bakatisa ngenga te, bato ya sembo.
since indeed there is one God who will justify the circumcised by faith, and the uncircumcised through faith.
31 Boni, tobomi Mobeko likolo ya kondima? Soki moke te! Tozali kutu kolendisa yango.
Do we then nullify the law through faith? Absolutely not. No, we establish the law.