< Barome 2 >
1 Yango wana, yo moto oyo osambisaka bato mosusu, ozali na ngambo, ata soki ozali nani; pamba te wana osambisaka bato mosusu, omisambisaka yo moko, mpo ete yo oyo osambisaka bango osalaka mpe kaka makambo yango.
Derfor er du uden Undskyldning, o Menneske! hvem du end er, som dømmer; thi idet du dømmer den anden, fordømmer du dig selv; thi du, som dømmer, øver det samme.
2 Nzokande, toyebi malamu ete Nzambe asambisaka kolanda bosolo bato oyo basalaka makambo ya lolenge wana.
Vi vide jo, at Guds Dom er, stemmende med Sandhed, over dem, som øve saadanne Ting.
3 Boni, okanisi ete okokima kosambisama ya Nzambe, yo oyo osambisaka bato oyo basalaka makambo ya lolenge wana mpe osalaka makambo yango kaka lokola bango?
Men du, o Menneske! som dømmer dem, der øve saadanne Ting, og selv gør dem, mener du dette, at du skal undfly Guds Dom?
4 To mpe boni, okanisi ete ozali kotiola bomengo ya boboto, ya kokanga motema mpe ya bolamu na Nzambe, wana ozali kobosana ete boboto na Ye ememaka yo na kobongola motema?
Eller foragter du hans Godheds og Taalmodigheds og Langmodigheds Rigdom og ved ikke, at Guds Godhed leder dig til Omvendelse?
5 Kasi mpo na moto makasi na yo mpe motema libanga na yo, ozali yo moko komibendela etumbu monene mpo na mokolo oyo Nzambe akokweyisa kanda na Ye mpe akomonisa kosambisama na Ye ya sembo.
Men efter din Haardhed og dit ubodfærdige Hjerte samler du dig selv Vrede paa Vredens og Guds retfærdige Doms Aabenbarelses Dag,
6 Nzambe akofuta moto na moto kolanda misala na ye:
han, som vil betale enhver efter hans Gerninger:
7 bomoi ya seko epai ya moto oyo, na nzela ya molende na ye ya kosala malamu, alukaka nkembo, lokumu mpe makambo oyo ebebaka te; (aiōnios )
dem, som med Udholdenhed i god Gerning søge Ære og Hæder og Uforkrænkelighed, et evigt Liv; (aiōnios )
8 kasi kanda mpe kanda makasi epai ya moto oyo, na nzela ya botomboki na ye, aboyaka solo mpe asepelaka na mabe.
men over dem, som søge deres eget og ikke lyde Sandheden, men adlyde Uretfærdigheden, skal der komme Vrede og Harme.
9 Minyoko mpe mitungisi ezali kozela moto nyonso oyo asalaka mabe: liboso, Moyuda, mpe sima, Mogreki.
Trængsel og Angest over hvert Menneskes Sjæl, som øver det onde, baade en Jødes først og en Grækers;
10 Kasi nkembo, lokumu mpe kimia ezali kozela moto nyonso oyo asalaka bolamu: liboso, Moyuda, mpe sima, Mogreki;
men Ære og Hæder og Fred over hver den, som gør det gode, baade en Jøde først og en Græker!
11 pamba te Nzambe aponaka bilongi te.
Thi der er ikke Persons Anseelse hos Gud.
12 Bato nyonso oyo basalaki masumu na kozanga koyeba Mobeko bakokufa na kozanga mpe Mobeko. Nzokande bato oyo basalaki masumu, wana basengeli kotosa Mobeko, bakosambisama kolanda Mobeko.
Thi alle de, som have syndet uden Loven, de skulle ogsaa fortabes uden Loven; og alle de, som have syndet under Loven, de skulle dømmes ved Loven;
13 Pamba te ezali te bato oyo bayokaka Mobeko nde bazali sembo na miso na Nzambe, kasi ezali ba-oyo batosaka Mobeko yango nde bakotangama lokola bato ya sembo.
thi ikke Lovens Hørere ere retfærdige for Gud, men Lovens Gørere skulle retfærdiggøres —
14 Soki Bapagano oyo bayebi Mobeko te bazali kosala na ndenge na bango moko makambo oyo Mobeko esengaka, boyeba ete bamikomisaka Mobeko mpo na bango moko atako bazali na Mobeko yango te.
thi naar Hedninger, som ikke have Loven, af Naturen gøre, hvad Loven kræver, da ere disse, uden at have Loven, sig selv en Lov;
15 Na bongo, na nzela ya bizaleli na bango, balakisaka ete misala oyo Mobeko esengaka ezali ya kokomama kati na mitema na bango. Mitema na bango etatolaka yango, ndenge moko na makanisi oyo na nzela na yango bamifundaka to bamilongisaka.
de vise jo Lovens Gerning skreven i deres Hjerter, idet deres Samvittighed vidner med, og Tankerne indbyrdes anklage eller ogsaa forsvare hverandre —
16 Nyonso wana ekomonana polele, na mokolo oyo Nzambe akosambisa basekele ya bato na nzela ya Yesu-Klisto, kolanda Sango Malamu oyo nateyaka.
paa den Dag, da Gud vil dømme Menneskenes skjulte Færd ifølge mit Evangelium ved Jesus Kristus.
17 Boye, yo moto oyo omibengaka Moyuda, otiaka elikya na yo kati na Mobeko, omikumisaka mpo na Nzambe,
Men naar du kalder dig Jøde og forlader dig trygt paa Loven og roser dig af Gud
18 oyebi mokano ya Nzambe mpe oyebi kososola makambo oyo eleki malamu, pamba te Mobeko eteya yo.
og kender hans Villie og værdsætter de forskellige Ting, idet du undervises af Loven,
19 Ondimisami solo ete ozali motambolisi ya bakufi miso, pole ya bato oyo bayengaka-yengaka kati na molili,
og trøster dig til at være blindes Vejleder, et Lys for dem, som ere i Mørke,
20 molakisi ya bazoba, moteyi ya bana mike, pamba te ozwaka kati na Mobeko boyebi nyonso mpe bosolo.
uforstandiges Opdrager, umyndiges Lærer, idet du i Loven har Udtrykket for Erkendelsen og Sandheden, —
21 Yo moto oyo oteyaka bato mosusu, boni, yo moko omiteyaka te? Yo oyo oteyaka bato mosusu ete bayiba te, boni, oyibaka?
du altsaa, som lærer andre, du lærer ikke dig selv! Du, som prædiker, at man ikke maa stjæle, du stjæler!
22 Yo oyo olobaka na bato ete basala ekobo te, boni, osalaka ekobo? Yo oyo omipesaka te na banzambe ya bikeko, boni, ozwaka na makasi biloko kati na batempelo?
Du, som siger, at man ikke maa bedrive Hor, du bedriver Hor! Du, som føler Afsky for Afguderne, du øver Tempelran!
23 Yo oyo omikumisaka mpo na Mobeko, boni, ozali kobebisa lokumu ya Nzambe na kobuka Mobeko?
Du, som roser dig af Loven, du vanærer Gud ved Overtrædelse af Loven!
24 Mpo na yango, kolanda ndenge ekomama: « Likolo na bino, Kombo ya Nzambe ezali kofingama kati na Bapagano. »
Thi „for eders Skyld bespottes Guds Navn iblandt Hedningerne”, som der er skrevet.
25 Kokatama ngenga ezali na tina soki ozali kotosa Mobeko; kasi soki obuki Mobeko, okomi lokola okatama na yo ngenga te.
Thi vel gavner Omskærelse, om du holder Loven; men er du Lovens Overtræder, da er din Omskærelse bleven til Forhud.
26 Kasi soki moto oyo akatisa ngenga te azali kotosa malako ya sembo ya Mobeko, boni, akotangama te lokola moto akatama ngenga?
Dersom nu Forhuden holder Lovens Forskrifter, vil da ikke hans Forhud blive regnet som Omskærelse?
27 Moto oyo akatisa ngenga te kasi atosaka Mobeko akosambisa yo oyo obukaka Mobeko atako ozali na Makomi ya Mobeko mpe okatisa ngenga.
Og naar den af Natur uomskaarne opfylder Loven, skal han dømme dig, som med Bogstav og Omskærelse er Lovens Overtræder.
28 Pamba te ezali te makambo oyo emonanaka na miso nde ekomisaka moto Moyuda, mpe ezali te elembo oyo emonanaka na nzoto nde esalaka kokatama ngenga.
Thi ikke den er Jøde, som er det i det udvortes, ej heller er det Omskærelse, som sker i det udvortes, i Kød;
29 Ezali kaka makambo ya kati nde ekomisaka moto Moyuda, mpe kokatama ngenga ya solo ezali nde oyo Molimo asalaka kati na motema; ezali te oyo tosalaka na kotosa Mobeko. Lokumu ya Moyuda ya boye ewutaka na bato te, kasi na Nzambe.
men den, som indvortes er Jøde, og Hjertets Omskærelse i Aand, ikke i Bogstav — hans Ros er ikke af Mennesker, men af Gud.