< Barome 15 >
1 Biso oyo tolenda na kondima, tosengeli kondima bolembu ya bato oyo balenda te na kondima mpe koboya komisepelisa kaka biso moko.
But we who are strong ought to bear the infirmities of the weak, and not to please ourselves.
2 Tika ete moto nyonso kati na biso aluka kosepelisa moninga na ye mpo na bolamu mpe bolendisami na ye!
Let each of us please his neighbor in that which is good, unto edification;
3 Pamba te ezala Klisto, alukaki te komisepelisa Ye moko; kasi alobaki, kolanda ndenge ekomama, « mafinga ya bato oyo bafingaki yo ekweyaki epai na ngai. »
for Christ did not please himself; but, as has been written, The reproaches of them that reproached thee fell on me.
4 Nzokande, makambo nyonso oyo ekomama kala ekomamaki mpo na koteya biso, mpo ete na nzela ya kokanga motema mpe malendisi oyo Makomi epesaka, tozala na elikya.
For so many things as were previously written were written for our instruction, in order that through the patience and through the consolation of the scriptures we may have hope.
5 Tika ete Nzambe oyo apesaka bato molende mpe mpiko apesa bino makanisi moko, bamoko elongo na bamosusu, kolanda mokano ya Yesu-Klisto,
But may the God of patience and consolation grant unto you to think the same things among one another with reference to Christ Jesus.
6 mpo ete bopesa nkembo na Nzambe, Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na makanisi moko mpe na monoko moko.
In order that you may with one accord with one mouth glorify God, even the Father of our Lord Jesus Christ.
7 Yango wana, boyambanaka, bamoko na bamosusu, ndenge Klisto ayambaki bino mpo na nkembo na Nzambe.
Therefore receive one another, as Christ also received you, to the glory of God.
8 Pamba te nazali koloba na bino solo: Klisto akomaki Mosali ya Bayuda mpo na kokokisa bilaka oyo Nzambe apesaki epai ya bakoko na bango mpe kolakisa ete Nzambe azali Moyengebene.
For I say that Christ has been made minister of circumcision for the truth of God, that he might confirm the promises of the fathers,
9 Ayaki mpe mpo ete Bapagano bapesa Nzambe nkembo mpo na mawa na Ye, kolanda ndenge ekomama: « Yango wana nakokumisa Yo kati na Bapagano, mpe nakoyemba nzembo mpo na lokumu ya Kombo na Yo. »
and that the Gentiles might glorify God for his mercy; as has been written, Therefore I will confess thee among the Gentiles, and in thy name sing praises.
10 Alobaki lisusu: « Bapagano, bosepela elongo na bato na Ye. »
And again he says, Rejoice, ye Gentiles, with his people.
11 Mpe lisusu: « Bino bato ya bikolo nyonso, bokumisa Nkolo! Tika ete bato ya mabota nyonso bakumisa Ye! »
And again, Let all the Gentiles praise the Lord; and let all ye peoples praise him.
12 Ezayi mpe alobaki: « Moto moko akobima wuta na libota ya Izayi, akotelema mpo na kokonza bikolo, mpe Bapagano bakotiela Ye elikya. »
And again, Isaiah says, There shall be the root of Jesse, and he that ariseth to rule over the Gentiles; in him shall the Gentiles hope.
13 Tika ete Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo nyonso mpe na kimia nyonso kati na kondima, mpo ete botonda na elikya na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu.
And the God of hope fill you in all joy and peace in believing, that ye may abound in hope, in the power of the Holy Ghost.
14 Bandeko na ngai, nandimisami solo ete botondi na boboto, na boyebi nyonso mpe na makoki ya kolendisana, bamoko na bamosusu.
But I am indeed persuaded, my brethren, concerning you, that you are also full of goodness, having been filled with all knowledge, being able also to admonish one another.
15 Nzokande, mpo na kolamusa makanisi na bino, nakomelaki bino, na molende nyonso, ndambo ya makambo kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai
But I have written unto you more boldly in part, as reminding you, on account of the grace which has been given unto me from God,
16 ya kozala mosali ya Yesu-Klisto mpo na Bapagano. Boye abulisi ngai mpo na kosakola Sango Malamu ya Nzambe mpo ete Bapagano bakoma likabo oyo ekosepelisa Nzambe, likabo oyo Molimo Mosantu abulisi.
that I should be the minister of Christ Jesus unto the Gentiles, ministering the gospel of God, that the offering of the Gentiles may be well received, having been sanctified by the Holy Ghost.
17 Yango wana namikumisaka kati na Yesu-Klisto, na mosala oyo nasalaka mpo na Nzambe.
Moreover I have boldness in Christ Jesus as to the things appertaining to God:
18 Pamba te soki nakoki koloba, nakoloba kaka mpo na makambo oyo Klisto asalaki na nzela na ngai, mpo na komema Bapagano na kotosa Nzambe. Asalaki yango na nzela ya makambo oyo nalobaki mpe nasalaki
for I will not dare to speak anything save those things which Christ has wrought through me, unto the obedience of the Gentiles, in word and deed,
19 na nzela ya nguya Molimo na Nzambe, oyo emonisami kati na bikamwa mpe bilembo. Boye, wuta na Yelusalemi, na bazingazinga nyonso kino na Iliri, nasakolaki Sango Malamu ya Klisto na mobimba na yango.
in the power of signs and wonders, in the power of the Spirit of God, so that from Jerusalem, and around about even unto Illyricum, I have fully preached the gospel of Christ;
20 Pamba te nazwaki mokano ya koteya Sango Malamu na bisika oyo Kombo ya Klisto eyebanaki nanu te, mpo ete natonga na likolo ya moboko ya moto mosusu te,
but being so ambitious not to preach the gospel, where Christ has been named, in order that I may not build on another man's foundation;
21 kasi kolanda ndenge ekomama: « Bato oyo babetela bango nanu lisolo te na tina na Ye bakomona, mpe ba-oyo bayoka nanu sango na Ye te bakososola. »
but, as has been written, Those, to whom he has not been preached, shall see concerning him, and they who have not heard shall understand.
22 Yango nde ezalaki mbala mingi kokanga ngai nzela ya koya epai na bino.
Therefore indeed I was hindered much from coming unto you:
23 Kasi sik’oyo, nazali lisusu na esika te ya kosala mosala kati na etuka oyo; bongo lokola wuta kala, nazalaka na posa makasi ya koya epai na bino,
but now, no longer having a place in these regions, and having an earnest longing for many years to come to you,
24 nazali kosala mabongisi ya kokokisa yango tango nakokende na Espane. Nazali na elikya ete, wana nakolekela epai na bino, nakomona bino mpe nakozwa lisungi na bino mpo na kokende kuna, sima na ngai kosepela kovanda elongo na bino ata na mwa tango moke.
as I may journey into Spain, for I hope traveling through to see you, and by you to be sent forth thither, if in the first place I may be satisfied with your company—
25 Nzokande sik’oyo, nazali kokende na Yelusalemi mpo na komemela basantu lisungi.
but now I journey to Jerusalem, ministering to the saints.
26 Pamba te Mangomba ya Masedwane mpe ya Akayi ezwaki mokano ya kosangisa biloko mpo na kosunga babola oyo bazali kati na basantu ya Yelusalemi.
For Macedonia and Achaia were pleased to make a certain contribution to the poor who are in Jerusalem.
27 Solo, bango moko nde bazwaki mokano ya kosala bongo mpo ete ezalaki lokola niongo epai na bango. Pamba te soki Bayuda bakabolaki makabo ya molimo elongo na bato ya bikolo ya bapaya, bango mpe basengeli kokabola biloko na bango elongo na Bayuda.
For they were pleased to do so; and they are their debtors: for if the Gentiles participated in spiritual things, they owe it to them also to minister unto them in carnal things.
28 Soki nasilisi mosala oyo mpe napesi bango lisungi yango, nakolekela epai na bino tango nakokende na Espane.
Then having completed and sealed this fruit unto them, I will sail away for Spain by you;
29 Nayebi ete tango nakoya epai na bino, nakoya na mapamboli mingi ya Klisto.
but I know that coming unto you, I will come in the fullness of the blessing of Christ.
30 Kasi nabondeli bino bandeko, na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe ya bolingo ya Molimo: Bobundaka elongo na ngai kati na mabondeli oyo bosalaka epai ya Nzambe na tina na ngai
But I exhort you, brethren, through our Lord Jesus Christ, and through the love of the Spirit, that you cooperate with me in your prayers to God in my behalf;
31 mpo ete nakangolama na maboko ya bato oyo bandimaka te kati na Yuda, mpe mpo ete basantu ya Yelusalemi bayamba malamu lisungi oyo nakomemela bango.
in order that I may be delivered from those in Judea who do not believe, and my ministry may be acceptable to the saints in Jerusalem;
32 Na bongo nde nakolonga kokoma epai na bino na esengo; mpe soki Nzambe akolinga, nakopema mwa moke elongo na bino.
in order that having come to you in joy through the will of God, and together with you find rest.
33 Tika ete Nzambe ya kimia azala elongo na bino nyonso! Amen!
Now the God of peace be with you all. Amen.