< Barome 14 >

1 Boyamba malamu moto oyo alenda te na kondima, na kotiana lisusu tembe te na tina na makanisi.
Receive him who is weak in the faith, without regard to differences of opinions.
2 Moto oyo azali na kondima aliaka bilei nyonso, kasi moto oyo alenda te na kondima aliaka kaka bandunda.
One, indeed, believes he may eat everything; but he who is weak eats herbs only.
3 Moto oyo aliaka bilei nyonso asengeli te kotiola moto oyo aponaka bilei, mpe moto oyo aponaka bilei asengeli te kosambisa moto oyo aliaka bilei nyonso, pamba te Nzambe asila koyamba ye.
Let not him who eats, despise him who eats not; and let not him who eats not, condemn him who eats: for God has received him.
4 Boni, ozali nani mpo na kosambisa mosali ya moto mosusu? Atelema to akweya, ezali likambo ya nkolo na ye. Tembe ezali te, akotelema kaka, pamba te Nkolo na ye azali na makoki ya kotelemisa ye.
Who are you that condemn another man's servant? By his own master he stands or falls; and he shall be made to stand, for God is able to make him stand.
5 Moko akanisaka ete mokolo songolo ezali bule koleka mokolo pakala, mpe mosusu akanisaka ete mikolo nyonso ezali kaka ndenge moko: tika ete moto na moto kati na bango andimisama makasi na makanisi na ye.
One, indeed, thinks one day more holy than another: but another thinks every day alike. Let every one be convinced in his own mind.
6 Moto oyo akesenisaka mikolo asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo. Moto oyo aliaka bilei nyonso asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo, mpe azongisaka matondi epai ya Nzambe; mpe moto oyo aponaka bilei asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo, mpe azongisaka matondi epai ya Nzambe.
He who observes the day, observe it to the Lord; and he who does not observe the day to the Lord, does not observe it: he who eats, eats to the Lord, for he gives God thanks.
7 Moko te kati na biso abikaka bomoi mpo na ye moko, mpe moko te akufaka mpo na ye moko.
For none of us lives to himself, and none of us dies to himself.
8 Soki tozali kobika bomoi, tozali kobika yango mpo na Nkolo; soki mpe tokufi, tokufi mpo na Nkolo. Yango wana, tobika bomoi to tokufa, tozali kaka bato ya Nkolo.
But whether we live, we live to the Lord; and whether we die, we die to the Lord: whether we live, therefore, ot die, we are the Lord's.
9 Ezali mpo na yango nde Klisto akufaki mpe asekwaki, mpo ete azala Nkolo ya bakufi mpe ya bato ya bomoi.
For to this end, Christ both dies and rose, and lives again, that he might rule over both the dead and the living.
10 Bongo yo, mpo na nini ozali kosambisa to kotiola ndeko na yo? Biso nyonso tokotelema na esambiselo ya Nzambe mpo na kosamba.
But you, why do you condemn your brother? and you, also, why do you despise your brother? for we shall all be placed before the judgment seat of Christ.
11 Pamba te ekomama: « Na Kombo na Ngai, » elobi Nkolo, « mabolongo nyonso ekofukama liboso na Ngai, mpe minoko nyonso ekotatola Nzambe. »
For it is written, "As I live, says the Lord, surely every knee shall bow to me, and every tongue shall confess to God."
12 Boye, moko na moko kati na biso akosamba liboso ya Nzambe mpo na makambo na ye moko.
Well, then, every one of us shall give an account of himself to God.
13 Yango wana, totika kosambisana biso na biso. Nzokande, bosalela mayele na bino te mpo na kobetisa ndeko moko libaku to mpo na kokweyisa ye.
Let us, therefore, no more judge one another; but let us decide, rather, not to lay an occasion of stumbling before a brother, or a cause of falling.
14 Nayebi mpe nandimisami kati na Nkolo Yesu ete eloko ya mbindo ezalaka te. Nzokande, soki moto moko amoni ete eloko songolo ezali mbindo, wana ezali mbindo mpo na ye.
I know, and am persuaded by the Lord Jesus, that there is nothing unclean of itself; yet, to him who accounts anything to be unclean, to that man it is unclean.
15 Boye soki, likolo ya bilei, ozali koyokisa ndeko na yo motema pasi, wana ozali lisusu kotambola na bolingo te. Likolo ya bilei, kobungisa te ndeko na yo, oyo Klisto akufelaki.
Now, if your brother be hurt through your meat, you no longer walk as love requires. Do not destroy him with your meat for whom Christ died.
16 Yango wana, tika ete bolamu na bino etiolama te.
Let not your good, then, be an evil spoken of.
17 Pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali te likambo ya kolia to ya komela, kasi ezali nde likambo ya bosembo, ya kimia mpe ya esengo kati na Molimo Mosantu.
For the Reign of God is not meat and drink; but righteousness and peace, and joy, in the Holy Spirit.
18 Moto oyo asalelaka Klisto na lolenge oyo asepelisaka Nzambe, mpe bato bandimaka ye.
And he who, by these things, serves Christ, is acceptable to God, and approved by men.
19 Yango wana, tolukaka tango nyonso makambo oyo ememaka kimia mpe elendisaka bamoko mpe bamosusu kati na kondima.
Well, then, let us strive after peace, and mutual edification.
20 Kobebisa mosala ya Nzambe te likolo ya biloko ya kolia. Solo, biloko nyonso ezali peto, kasi ezali mabe kolia eloko oyo ekoki kobetisa moto mosusu libaku.
Do not, for the sake of meat, destroy the work of God. All meats, indeed, are clean; but that meat is hurtful to the man who eats to occasion stumbling.
21 Likambo oyo eleki malamu ezali: koboya kolia misuni, koboya komela vino, koboya kosala eloko nyonso oyo ekoki kobetisa ndeko na yo libaku.
It is good neither to eat flesh, nor to drink wine, nor to do anything by which your brother is made to stumble, or to fall, or is weakened.
22 Boye, batela mpo na yo moko liboso ya Nzambe, kondima oyo ozali na yango. Esengo na moto oyo amikweyisaka te na nzela ya makambo oyo andimaka!
You have faith: keep it to yourself, in the sight of God. Happy is he who does not condemn himself in what he approves.
23 Kasi moto oyo alie, wana motema na ye ezali kopamela ye, asili kokweyisama na miso ya Nzambe, pamba te asali te kolanda kondima na ye; mpe nyonso oyo esalemaka te kolanda kondima ezali lisumu.
For he who discerns a difference, between meats is condemned, if he eat; because he eats not from faith: for what is not from faith is sin.

< Barome 14 >