< Barome 11 >

1 Bongo natunaki: Boni, Nzambe asundolaki bato na Ye? Soki moke te! Pamba te ngai mpe nazali moto ya Isalaele, mwana ya Abrayami, kati na libota ya Benjame.
λεγω ουν μη απωσατο ο θεοσ τον λαον αυτου μη γενοιτο και γαρ εγω ισραηλιτησ ειμι εκ σπερματοσ αβρααμ φυλησ βενιαμιν
2 Nzambe asundolaki bato na Ye te, oyo ayeba wuta kala. Boni, boyebi te makambo oyo Makomi ezali koloba na tina na Eliya oyo azalaki komitungisa epai ya Nzambe na tina na Isalaele:
ουκ απωσατο ο θεοσ τον λαον αυτου ον προεγνω η ουκ οιδατε εν ηλια τι λεγει η γραφη ωσ εντυγχανει τω θεω κατα του ισραηλ λεγων
3 — Nkolo, babomi basakoli na Yo mpe babuki bitumbelo na Yo. Mpe ngai, natikali kaka ngai moko, mpe bazali lisusu koluka koboma ngai.
κυριε τουσ προφητασ σου απεκτειναν και τα θυσιαστηρια σου κατεσκαψαν καγω υπελειφθην μονοσ και ζητουσιν την ψυχην μου
4 Kasi eyano nini Nzambe azongiselaki ye? — Nabombi bato nkoto sambo mpo na Ngai, ba-oyo mabolongo na bango efukameli Bala te.
αλλα τι λεγει αυτω ο χρηματισμοσ κατελιπον εμαυτω επτακισχιλιουσ ανδρασ οιτινεσ ουκ εκαμψαν γονυ τη βααλ
5 Ezali mpe bongo na tango oyo: ezali na mwa ndambo ya bato oyo Nzambe apona na ngolu na Ye.
ουτωσ ουν και εν τω νυν καιρω λειμμα κατ εκλογην χαριτοσ γεγονεν
6 Nzokande, lokola koponama yango esalemaki na ngolu, elakisi ete ezali likambo ya misala te; soki te, ngolu ezali lisusu ngolu te.
ει δε χαριτι ουκετι εξ εργων επει η χαρισ ουκετι γινεται χαρισ ει δε εξ εργων ουκετι εστιν χαρισ επει το εργον ουκετι εστιν εργον
7 Boye toloba lisusu nini? Eloko oyo bana ya Isalaele bazalaki koluka, bazwaki yango te; kaka bato oyo Nzambe aponaki kati na bango nde bazwaki yango. Bato mosusu bakoma mitema mabanga,
τι ουν ο επιζητει ισραηλ τουτο ουκ επετυχεν η δε εκλογη επετυχεν οι δε λοιποι επωρωθησαν
8 kolanda ndenge ekomama: « Nzambe apesaki bango molimo ya pongi, miso mpo ete bamona te, mpe matoyi mpo ete bayoka te, kino na mokolo ya lelo. »
καθωσ γεγραπται εδωκεν αυτοισ ο θεοσ πνευμα κατανυξεωσ οφθαλμουσ του μη βλεπειν και ωτα του μη ακουειν εωσ τησ σημερον ημερασ
9 Mpe Davidi azali koloba: « Tika ete mesa na bango ekoma motambo liboso na bango, monyama, libaku ya kokweya mpe ya kozwa etumbu!
και δαυιδ λεγει γενηθητω η τραπεζα αυτων εισ παγιδα και εισ θηραν και εισ σκανδαλον και εισ ανταποδομα αυτοισ
10 Tika ete miso na bango ekufa mpo ete bamona lisusu te, mpe babela mikongo mpo na libela! »
σκοτισθητωσαν οι οφθαλμοι αυτων του μη βλεπειν και τον νωτον αυτων δια παντοσ συγκαμψον
11 Natuna lisusu: boni, bana ya Isalaele babetaki libaku mpo ete bakweya mpo na libela? Soki moke te! Kasi likolo ya mabe na bango, lobiko epesamelaki na Bapagano mpo na kolamusa likunya ya Isalaele.
λεγω ουν μη επταισαν ινα πεσωσιν μη γενοιτο αλλα τω αυτων παραπτωματι η σωτηρια τοισ εθνεσιν εισ το παραζηλωσαι αυτουσ
12 Nzokande, soki mabe na bango epesi mokili bomengo, mpe kobunga na bango epesi Bapagano bomengo, ndenge nini kobongola mitema na bango emema te bomengo oyo eleki?
ει δε το παραπτωμα αυτων πλουτοσ κοσμου και το ηττημα αυτων πλουτοσ εθνων ποσω μαλλον το πληρωμα αυτων
13 Nazali koloba na bino Bapagano: lokola nazali ntoma ya Bapagano, napesaka lotomo na ngai lokumu
υμιν γαρ λεγω τοισ εθνεσιν εφ οσον μεν ειμι εγω εθνων αποστολοσ την διακονιαν μου δοξαζω
14 na elikya ya kolamusa zuwa ya bato ya ekolo na ngai mpe kobikisa ndambo ya bato kati na bango.
ει πωσ παραζηλωσω μου την σαρκα και σωσω τινασ εξ αυτων
15 Pamba te soki kosundolama na bango ezongisi boyokani kati na Nzambe mpe mokili, koyambama na bango ekozala ndenge nini? Boni, ekozala te bomoi kati na bakufi?
ει γαρ η αποβολη αυτων καταλλαγη κοσμου τισ η προσληψισ ει μη ζωη εκ νεκρων
16 Nzokande, soki mapa ya liboso oyo babonzeli Nzambe ezali bule, elingi koloba ete mapa nyonso oyo etikali ezali mpe bule; soki mosisa ya nzete ezali bule, elingi koloba ete bitape na yango mpe ezali bule.
ει δε η απαρχη αγια και το φυραμα και ει η ριζα αγια και οι κλαδοι
17 Kasi soki bitape mosusu ekatamaki; soki yo, etape ya nzete ya olive ya zamba, bakangisaki yo kati na bitape oyo etikalaki; soki sik’oyo okomi komela, elongo na bitape yango, mayi moko oyo ezali komata wuta na mosisa ya nzete ya olive,
ει δε τινεσ των κλαδων εξεκλασθησαν συ δε αγριελαιοσ ων ενεκεντρισθησ εν αυτοισ και συγκοινωνοσ τησ ριζησ και τησ πιοτητοσ τησ ελαιασ εγενου
18 kobeta tolo te liboso ya bitape oyo ekatamaki. Soki omeki kobeta tolo, yeba malamu ete ezali yo te nde ozali komema mosisa, kasi ezali mosisa nde ezali komema yo.
μη κατακαυχω των κλαδων ει δε κατακαυχασαι ου συ την ριζαν βασταζεισ αλλ η ριζα σε
19 Okoki mpe koloba: « Bitape wana ekatamaki mpo ete bakangisa ngai na esika na yango. »
ερεισ ουν εξεκλασθησαν κλαδοι ινα εγω εγκεντρισθω
20 Olobi malamu! Bakatamaki mpo ete bazangaki kondima, kasi yo ozali wana mpo na kondima. Boye kotombola mapeka te, kasi sala nde keba.
καλωσ τη απιστια εξεκλασθησαν συ δε τη πιστει εστηκασ μη υψηλοφρονει αλλα φοβου
21 Pamba te soki Nzambe azangaki te kokata bitape oyo ebimaka yango moko na nzete, akozanga mpe te kokata yo.
ει γαρ ο θεοσ των κατα φυσιν κλαδων ουκ εφεισατο μηπωσ ουδε σου φεισεται
22 Yango wana, sosola malamu boboto mpe kanda na Nzambe: kanda epai ya bato oyo bakweyi, mpe boboto epai na yo soki ozali kokoba kowumela kaka na bolamu yango. Soki te, yo mpe okokatama.
ιδε ουν χρηστοτητα και αποτομιαν θεου επι μεν τουσ πεσοντασ αποτομιαν επι δε σε χρηστοτητα εαν επιμεινησ τη χρηστοτητι επει και συ εκκοπηση
23 Mpe soki bato ya Isalaele bawumeli te kati na kozanga na bango kondima, bakokangisa bango lisusu na nzete, pamba te Nzambe azali na makoki ya kokangisa bango lisusu na nzete.
και εκεινοι δε εαν μη επιμεινωσιν τη απιστια εγκεντρισθησονται δυνατοσ γαρ ο θεοσ εστιν παλιν εγκεντρισαι αυτουσ
24 Boye, soki yo owutaki na nzete ya olive ya zamba oyo ebimisaki yo mpe bakangisaki yo na nzete ya olive oyo balona, ezala soki yango te nde ebimisaki yo, ndenge nini bakoki te kozongisa bitape ya nzete oyo ebimisaki yango na nzete na yango?
ει γαρ συ εκ τησ κατα φυσιν εξεκοπησ αγριελαιου και παρα φυσιν ενεκεντρισθησ εισ καλλιελαιον ποσω μαλλον ουτοι οι κατα φυσιν εγκεντρισθησονται τη ιδια ελαια
25 Bandeko, nalingi ete boyeba mabombami oyo mpo ete bomimona te ete boleki na bwanya: ndambo ya bana ya Isalaele bakowumela kozala mitema libanga kino Bapagano nyonso bakokota na libota ya Nzambe.
ου γαρ θελω υμασ αγνοειν αδελφοι το μυστηριον τουτο ινα μη ητε παρ εαυτοισ φρονιμοι οτι πωρωσισ απο μερουσ τω ισραηλ γεγονεν αχρι ου το πληρωμα των εθνων εισελθη
26 Boye, bato nyonso ya Isalaele bakobika, kolanda ndenge ekomama: « Mokangoli akobimela na Siona, akolongola mabe kati na Jakobi.
και ουτωσ πασ ισραηλ σωθησεται καθωσ γεγραπται ηξει εκ σιων ο ρυομενοσ και αποστρεψει ασεβειασ απο ιακωβ
27 Mpe yango nde ekozala boyokani na Ngai elongo na bango tango nakolongola masumu na bango. »
και αυτη αυτοισ η παρ εμου διαθηκη οταν αφελωμαι τασ αμαρτιασ αυτων
28 Mpo na oyo etali Sango Malamu, bazali banguna ya Nzambe mpo na bolamu na bino; kasi mpo na oyo etali koponama oyo Nzambe asalaki, bazali balingami na Ye likolo ya bakoko na bango,
κατα μεν το ευαγγελιον εχθροι δι υμασ κατα δε την εκλογην αγαπητοι δια τουσ πατερασ
29 pamba te Nzambe abotolaka te makabo oyo asili kopesa mpe abongolaka te makanisi na Ye epai ya bato oyo asili kobenga.
αμεταμελητα γαρ τα χαρισματα και η κλησισ του θεου
30 Ndenge na kala bozangaki botosi na miso ya Nzambe mpe sik’oyo Nzambe ayokeli bino mawa likolo ya kozanga botosi ya Bayuda,
ωσπερ γαρ και υμεισ ποτε ηπειθησατε τω θεω νυν δε ηλεηθητε τη τουτων απειθεια
31 ndenge wana mpe kozanga botosi na bango ya sik’oyo esali ete Nzambe ayokela bino mawa mpo ete ayokela bango mpe mawa.
ουτωσ και ουτοι νυν ηπειθησαν τω υμετερω ελεει ινα και αυτοι ελεηθωσιν
32 Pamba te Nzambe akanga bato nyonso lokola na boloko ya kozanga botosi mpo ete ayokela bato nyonso mawa. (eleēsē g1653)
συνεκλεισεν γαρ ο θεοσ τουσ παντασ εισ απειθειαν ινα τουσ παντασ ελεηση (eleēsē g1653)
33 Oh, tala ndenge nini bomengo, bwanya mpe boyebi ya Nzambe ezali na mozindo mingi! Moto moko te akoki koyeba makanisi na Ye mpe kososola nzela na Ye!
ω βαθοσ πλουτου και σοφιασ και γνωσεωσ θεου ωσ ανεξερευνητα τα κριματα αυτου και ανεξιχνιαστοι αι οδοι αυτου
34 « Nani ayebaki makanisi ya Nkolo? Nani akomaki kopesa Ye toli?
τισ γαρ εγνω νουν κυριου η τισ συμβουλοσ αυτου εγενετο
35 Nani apesaki Nkolo eloko mpo ete Nkolo azongisela ye? »
η τισ προεδωκεν αυτω και ανταποδοθησεται αυτω
36 Pamba te biloko nyonso ewutaka epai na Ye, na nzela na Ye mpe mpo na Ye. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela! Amen! (aiōn g165)
οτι εξ αυτου και δι αυτου και εισ αυτον τα παντα αυτω η δοξα εισ τουσ αιωνασ αμην (aiōn g165)

< Barome 11 >