< Emoniseli 1 >

1 Emoniseli kowuta na Yesu-Klisto. Nzambe apesaki Ye yango mpo ete alakisa na basali na Ye makambo oyo esengeli koya kala mingi te. Yesu-Klisto atindaki anjelu na Ye koyebisa emoniseli yango epai ya Yoane, mosali na Ye.
İsa Mesih'in vahyidir. Tanrı yakın zamanda olması gereken olayları kullarına göstermesi için O'na bu vahyi verdi. O da gönderdiği meleği aracılığıyla bunu kulu Yuhanna'ya iletti.
2 Lokola motatoli, Yoane asakolaki Liloba na Nzambe ndenge Yesu-Klisto ayebisaki ye yango; asakolaki makambo nyonso oyo amonaki.
Yuhanna, Tanrı'nın sözüne ve İsa Mesih'in tanıklığına –gördüğü her şeye– tanıklık etmektedir.
3 Esengo na moto oyo atangaka maloba ya lisakoli oyo, mpe esengo na bato oyo bayokaka maloba yango mpe babatelaka makambo oyo ekomama kati na yango, pamba te tango ekomi pene.
Bu peygamberlik sözlerini okuyana, burada yazılanları dinleyip yerine getirene ne mutlu! Çünkü beklenen zaman yakındır.
4 Yoane; Epai ya Mangomba sambo kati na etuka ya Azia: Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino, kowuta na Ye oyo azali, azalaki mpe azali koya, kowuta na milimo sambo oyo bazalaka liboso ya Kiti na Ye ya Bokonzi,
Ben Yuhanna'dan, Asya İli'ndeki yedi kiliseye selam! Var olan, var olmuş ve gelecek olandan, O'nun tahtının önünde bulunan yedi ruhtan
5 mpe kowuta na Yesu-Klisto, Motatoli oyo akosaka te, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpe Mokonzi ya bakonzi ya mokili! Epai na Ye oyo alingaka biso mpe akangolaki biso na masumu na biso na nzela ya makila na Ye,
ve ölüler arasından ilk doğan, dünya krallarına egemen olan güvenilir tanık İsa Mesih'ten sizlere lütuf ve esenlik olsun.
6 Ye oyo akomisaki biso ekolo ya bakonzi mpe ya Banganga-Nzambe mpo na kosalela Nzambe, Tata na Ye: Tika ete nkembo mpe nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela! Amen! (aiōn g165)
Yücelik ve güç sonsuzlara dek, bizi seven, kanıyla bizi günahlarımızdan özgür kılmış ve bizi bir krallık haline getirip Babası Tanrı'nın hizmetinde kâhinler yapmış olan Mesih'in olsun! Amin. (aiōn g165)
7 « Botala, azali koya kati na mapata! Miso nyonso ekomona Ye, ezala bato oyo batobolaki Ye mopanzi; mpe bikolo nyonso ya mokili ekomilela-lela likolo na Ye. »
İşte bulutlarla geliyor! Her göz O'nu görecek, O'nun bedenini deşmiş olanlar bile. O'nun için dövünecek yeryüzünün bütün halkları. Evet, böyle olacak! Amin.
8 « Nazali Alifa mpe Omega, » elobi Nkolo Nzambe, « Ye oyo azali, azalaki, mpe azali koya, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. »
Var olan, var olmuş ve gelecek olan, Her Şeye Gücü Yeten Rab Tanrı, “Alfa ve Omega Ben'im” diyor.
9 Ngai Yoane, ndeko na bino, oyo azali kokabola elongo na bino pasi, bokonzi mpe molende kati na Yesu, nazalaki kati na esanga ya Patimosi, likolo ya Liloba na Nzambe mpe litatoli na ngai na tina na Yesu.
İsa'ya ait biri olarak sıkıntıda, tanrısal egemenlikte ve sabırda ortağınız ve kardeşiniz olan ben Yuhanna, Tanrı'nın sözü ve İsa'ya tanıklık uğruna Patmos denilen adada bulunuyordum.
10 Na mokolo ya Nkolo, Molimo ya Nzambe asimbaki ngai, mpe nayokaki sima na ngai mongongo moko ya makasi lokola kelelo
Rab'bin gününde Ruh'un etkisinde kalarak arkamda borazan sesine benzer yüksek bir ses işittim.
11 koloba: « Koma na buku makambo oyo ozali komona, mpe tinda yango na Mangomba sambo oyo: Efeso, Simirne, Pergame, Tiyatire, Sarde, Filadelfi mpe Laodise. »
Ses, “Gördüklerini kitaba yaz ve yedi kiliseye, yani Efes, İzmir, Bergama, Tiyatira, Sart, Filadelfya ve Laodikya'ya gönder” dedi.
12 Nalukaki kobaluka mpo na koluka koyeba nani oyo azali koloba na ngai. Mpe tango nabalukaki, namonaki bitelemiselo sambo ya minda, basala na wolo.
Bana sesleneni görmek için arkama döndüm. Döndüğümde yedi altın kandillik ve bunların ortasında, giysileri ayağına kadar uzanan, göğsüne altın kuşak sarınmış, insanoğluna benzer birini gördüm.
13 Mpe kati na bitelemiselo yango, ezalaki na moto moko lokola Mwana na Moto. Alataki nzambala ya molayi mpe mokaba moko ya wolo zingazinga ya tolo na Ye.
14 Moto mpe suki na Ye ezalaki pembe makasi lokola mvula ya pembe. Miso na Ye ezalaki lokola moto oyo ezali kopela makasi.
Başı, saçı ak yapağı gibi beyaz, kar gibi bembeyazdı. Gözleri alev alev yanan ateşti sanki.
15 Makolo na Ye ezalaki lokola bronze oyo babimisi sika longwa na fulu ya moto makasi, mpe mongongo na Ye ezalaki koyokana lokola makelele ya mayi ya ebale monene.
Ayakları, ocakta kor haline gelmiş parlak tunca benziyordu. Sesi, gürül gürül akan suların sesi gibiydi.
16 Na loboko na Ye ya mobali, asimbaki minzoto sambo; mpe wuta na monoko na Ye, mopanga moko bapelisa na bangambo na yango nyonso mibale ezalaki kobima. Elongi na Ye ezalaki lokola moyi, na tango oyo engalaka makasi.
Sağ elinde yedi yıldız vardı. Ağzından iki ağızlı keskin bir kılıç uzanıyordu. Yüzü bütün gücüyle parlayan güneş gibiydi.
17 Tango namonaki Ye, nakweyaki na makolo na Ye lokola moto akufi. Bongo asimbaki ngai na loboko na Ye ya mobali mpe alobaki na ngai: « Kobanga te! Nazali Ya liboso mpe Ya suka.
O'nu görünce, ölü gibi ayaklarının dibine yığıldım. O ise sağ elini üzerime koyup şöyle dedi: “Korkma! İlk ve son Ben'im.
18 Nazali Ye oyo azali na bomoi; nakufaki, mpe sik’oyo tala, nazali na bomoi mpo na libela na libela! Nasimbi bafungola ya kufa mpe ya mboka ya bakufi. (aiōn g165, Hadēs g86)
Diri Olan Ben'im. Ölmüştüm, ama işte sonsuzluklar boyunca diriyim. Ölümün ve ölüler diyarının anahtarları bendedir. (aiōn g165, Hadēs g86)
19 Yango wana, koma makambo oyo omoni, oyo ezali sik’oyo, mpe oyo ekoya na sima.
Bunun için gördüklerini, şimdi olanları ve bundan sonra olacakları yaz.
20 Tala mabombami oyo ezali kati na minzoto sambo oyo omonaki na loboko na Ngai ya mobali, mpe bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo: minzoto sambo elakisi ba-anjelu ya Mangomba sambo; mpe bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo elakisi Mangomba sambo. »
Sağ elimde gördüğün yedi yıldızla yedi altın kandilliğin sırrına gelince, yedi yıldız yedi kilisenin melekleri, yedi kandillikse yedi kilisedir.”

< Emoniseli 1 >