< Emoniseli 9 >

1 Anjelu ya mitano abetaki kelelo, mpe namonaki monzoto kokweya na mokili wuta na Lola. Fungola ya libulu ya monene mpe ya molili makasi epesamaki na monzoto yango. (Abyssos g12)
И като затръби петият ангел, видях една звезда паднала на земята от небето, на която се даде ключа от бездънната пропаст. (Abyssos g12)
2 Tango efungolaki libulu yango, milinga ebele emataki longwa kuna; ezalaki lokola milinga oyo ebimaka na fulu monene ya moto makasi, mpe eyindisaki moyi mpe mopepe. (Abyssos g12)
И тя отвори бездънната пропаст; и дим се издигна от пропастта като дим от голяма пещ; и слънцето и въздуха потъмняха от дима на пропастта. (Abyssos g12)
3 Wuta na milinga yango, mankoko ebimaki, epanzanaki na mokili mpe epesamelaki bokonzi lokola oyo ya bakoto.
И от дима излязоха скакалци по земята; и даде им се сила, както е силата, що имат земните скорпии.
4 Nzokande epesamelaki mitindo ete esala mabe te na matiti ya mokili to na nkona nyonso ya mobesu to na nzete nyonso, kasi esala mabe kaka na bato oyo bazangi kashe ya Nzambe na bambunzu na bango.
Но им се заръча да не повредят тревата по земята, нито някое зеленище, нито някое дърво, а само такива човеци, които нямат Божия печат на челата си.
5 Esengelaki konyokola bango basanza mitano, kasi esengelaki te koboma bango. Pasi oyo ezalaki kopesa ekokanaki na oyo moto ayokaka soki koto eswi ye.
И позволи им се, не да убиват тия, но да ги мъчат пет месеца; и мъката беше като мъка от скорпия, когато ожили човека.
6 Na basanza wana mitano, bato bakoluka kufa, kasi bakozwa yango te; bakolinga kokufa, kasi kufa ekokima bango.
През ония дни човеците ще потърсят смъртта, но никак няма да я намерят; и ще пожелаят да умрат, но смъртта ще побегне от тях.
7 Mankoko yango ezalaki lokola bampunda oyo babongisi mpo na etumba. Na mito na yango, ezalaki na biloko moko lokola mitole ya wolo, mpe bilongi na yango ezalaki lokola bilongi ya bato.
И скакалците приличат на коне, приготвени за война; и на главите им имаше като корони подобни на злато, и лицата им бяха като човешки лица.
8 Suki na yango ezalaki lokola suki ya basi, mpe minu na yango ezalaki lokola minu ya nkosi.
А те имаха коса като косата на жените, и зъбите им бяха като на лъв.
9 Tolo na yango ezalaki lokola bibende oyo basoda balataka na tolo, mpe makelele ya mapapu na yango ezalaki lokola makelele ya bashar oyo bampunda ebele ezali kobenda mpo na etumba.
При това, имаха нагръдници като железни нагръдници; и шумът от крилата им беше като шум от колесници с много коне, когато тичат на бой.
10 Mikila na yango ezalaki na basonge lokola mikila ya bakoto, mpe nguya na yango ya konyokola bato basanza mitano ezalaki kati na mikila na yango.
Имаха и опашки подобни на скорпинии, и жила; а в опашките си имаха сила да повреждат човеците пет месеца.
11 Anjelu ya libulu ya monene mpe ya molili makasi nde azalaki mokonzi na yango. Kombo na ye, na lokota ya Ebre, « Abadoni; » mpe, na lokota ya Greki, « Apolioni. » (Abyssos g12)
Имаха над себе си за цар ангела на бездната, който по еврейски се нарича Авадон, а на гръцки се именува Аполион (Т. е.: Погубител ). (Abyssos g12)
12 Tango pasi ya liboso elekaki, bapasi mosusu mibale elandaki.
Едното горко мина, ето, още две горки идат подир това.
13 Anjelu ya motoba abetaki kelelo, mpe nayokaki mongongo moko kobima longwa na maseke minei ya etumbelo oyo basala na wolo, etumbelo oyo ezalaki liboso ya Nzambe.
И като затръби шестият ангел, чух един глас от роговете на златния олтар, който беше пред Бога,
14 Mongongo yango ezalaki koloba na anjelu ya motoba oyo azalaki na kelelo na maboko: « Fungola ba-anjelu minei oyo bazali ya kokangama na minyololo pembeni ya ebale monene Efrate. »
че някой казваше на шестия ангел, у когото беше тръбата: Развържи четирите ангела, които са вързани при голямата река Ефрат.
15 Boye ba-anjelu wana minei oyo babongisamaki mpo na ngonga wana, mokolo wana, sanza wana mpe mobu wana, bafungolamaki mpo ete baboma eteni moko kati na biteni misato ya bato.
И развързаха се четирите ангела, които бяха приготвени за тоя час и ден и месец и година, за да убият третата част от човеците.
16 Bazalaki minkoko nkama mibale ya basoda oyo babundaka na likolo ya bampunda. Yango nde motango na bango oyo nayokaki.
И числото на воюващите конници беше двесте милиона; аз чух числото им.
17 Tala ndenge nini, kati na emoniseli na ngai, bampunda mpe basoda oyo babundaka na likolo na yango bazalaki: balataki bibende oyo basoda balataka mpo na kobatela tolo. Bibende yango ezalaki ya motane makasi lokola moto, ya langi ya bule ya pete mpe ya langi ya mosaka; bongo mito ya bampunda ezalaki lokola mito ya bankosi, mpe minoko na yango ezalaki kobimisa moto, milinga mpe sofolo.
И конете във видението и яздещите на тях ми се видяха такива: те носеха като огнени, яцинтови и жупелни нагръдници; и главите на конете бяха като глави на лъвове, и от устата им излизаше огън, дим и жупел.
18 Tala bapasi misato oyo ezalaki kobima na minoko ya bampunda: moto, milinga mpe sofolo. Ebomaki eteni moko kati na biteni misato ya bato.
От тия три язви,
19 Nguya ya bampunda ezalaki kati na minoko mpe na mikila na yango, pamba te mikila na yango ezalaki lokola banyoka, mpe ezalaki na mito oyo, na nzela na yango, ezalaki kosala bato mabe.
Защото силата на конете бе в устата им и в опашките им; понеже опашките им приличаха на змии и имаха глави, и с тях повреждаха.
20 Kasi bato oyo bakufaki te na nzela ya bapasi wana batikaki te banzambe oyo maboko na bango moko esalaki; batikaki te kogumbamela milimo mabe mpe banzambe ya bikeko oyo basala na wolo, na palata, na bronze, na mabanga mpe na mabaya atako emonaka te, eyokaka te mpe eninganaka te.
И останалите човеци, които не бяха избити от тия язви, не се покаяха от делата на ръцете си, та да се не кланят вече на бесовете и на златните, сребърните, медните, каменните и дървените идоли, които не могат нито да виждат, нито да чуват, нито да ходят;
21 Batikaki mpe te koboma bato, misala na bango ya maji, kindumba na bango mpe moyibi na bango.
също не се покаяха нито от убийствата си, нито от чародеянията си, нито от боледуванията си, нито от кражбите си.

< Emoniseli 9 >