< Emoniseli 8 >

1 Tango Mpate afungolaki ekangelo ya sambo, kimia moko ekotaki kati na Lola mpe esalaki minite pene tuku misato.
Ja kuin hän seitsemännen sinetin avasi, oltiin ääneti taivaassa lähes puoli hetkeä.
2 Bongo namonaki ba-anjelu sambo oyo batelemaka liboso ya Nzambe, mpe bapesaki bango bakelelo sambo.
Ja minä näin seitsemän enkeliä Jumalan edessä seisovan, joille seitsemän basunaa annettiin.
3 Anjelu mosusu ayaki mpe atelemaki na etumbelo; amemaki mbabola basala na wolo mpo na kotumba na yango ansa. Bapesaki ye ansa ebele ya kobonza elongo na mabondeli ya basantu nyonso, mpo ete abonza yango na likolo ya etumbelo basala na wolo, liboso ya Kiti ya Bokonzi.
Ja toinen enkeli tuli ja seisoi alttarin edessä, ja hänellä oli kultainen pyhän savun astia, jolle paljo suitsutusta annettiin, kaikkein pyhäin rukouksiin, kultaiselle alttarille antaaksensa, joka on istuimen edessä.
4 Wuta na loboko ya anjelu, molinga ya ansa elongo na mabondeli ya basantu emataki liboso ya Nzambe.
Ja suitsutuksen savu pyhäin rukouksista nousi enkelin kädestä Jumalan eteen.
5 Bongo anjelu azwaki mbabola, atondisaki yango na makala ya moto oyo azwaki na etumbelo, mpe abwakaki mbabola yango na mabele. Mbala moko, lokito moko ya makasi eyokanaki: bakake, mingongo, mikalikali mpe koningana ya mabele.
Ja enkeli otti pyhän savun astian, ja täytti sen alttarin tulesta, ja heitti maan päälle, ja niin tapahtuivat äänet ja pitkäisen jylinät ja leimaukset ja maanjäristykset.
6 Bongo ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakelelo sambo bamibongisaki mpo na kobeta yango.
Ja ne seitsemän enkeliä seitsemällä basunalla hankitsivat basunilla soittamaan.
7 Anjelu ya liboso abetaki kelelo; mpe, mbala moko, mvula ya mabanga mike elongo na moto esangana na makila ebwakamaki na mabele. Bongo biloko oyo ezikaki: eteni moko kati na biteni misato ya mabele, eteni moko kati na biteni misato ya banzete, mpe matiti nyonso ya mobesu.
Ja ensimäinen enkeli soitti basunalla, ja tuli rakeita ja tulta verellä sekoitettuja, jotka maan päälle heitettiin; ja kolmas osa puista paloi ja kaikki viheriäinen ruoho paloi.
8 Anjelu ya mibale abetaki kelelo; mpe na mbala moko, eloko moko lokola ngomba monene oyo ezali kopela moto ebwakamaki na ebale monene. Eteni moko kati na biteni misato ya ebale monene ekomaki makila;
Ja toinen enkeli soitti basunalla, ja mereen heitettiin niinkuin suuri vuori tulessa palava: ja kolmas osa merestä tuli vereksi,
9 mpe eteni moko kati na biteni misato ya bikelamu oyo evandaka kati na ebale monene ekufaki, eteni moko kati na biteni misato ya bamasuwa nyonso ebebisamaki.
Ja kolmas osa elävistä luontokappaleista meressä kuoli ja kolmas osa haaksista hukkui.
10 Anjelu ya misato abetaki kelelo; mpe na mbala moko, monzoto moko ya monene oyo ezali kopela lokola mwinda monene ekweyelaki, longwa na likolo, eteni moko kati na biteni misato ya bibale mpe bitima ya mayi.
Ja kolmas enkeli soitti basunalla, ja suuri tähti lankesi taivaasta, palava niinkuin tulisoitto, ja lankesi kolmannen osan virtain ja vesilähdetten päälle.
11 Kombo ya monzoto yango ezali: Bololo. Eteni moko kati na biteni misato ya bamayi ekomaki bololo, mpe bato ebele bakufaki likolo na bamayi mpo ete ekomaki bololo.
Ja tähti kutsutaan koiruohoksi: ja kolmas osa vesistä muuttui koiruohoksi, ja monta ihmistä kuoli vetten tähden, että ne haikiaksi tehdyt olivat.
12 Anjelu ya minei abetaki kelelo; mpe na mbala moko, eteni moko kati na biteni misato ya moyi, ya sanza mpe ya minzoto ebebaki. Na bongo, eteni moko kati na biteni misato ya kongenga na yango ekomaki molili. Boye eteni moko kati na biteni misato ya mokolo mpe ya butu ezangaki pole.
Ja neljäs enkeli soitti basunalla, ja kolmas osa auringosta lyötiin, ja kolmas osa kuusta, ja kolmas osa tähdistä, niin että kolmas osa heistä pimeni, ja ei kolmas osa päivästä valaissut, eikä yöstä.
13 Bongo nayokaki mpongo, oyo ezalaki kopumbwa na likolo makasi, koloba na mongongo makasi: « Mawa! Mawa! Mawa penza na bavandi ya mokili tango ba-anjelu misato ya suka bakobeta bakelelo na bango! »
Ja minä näin ja kuulin enkelin keskelle taivasta lentävän ja suurella äänellä sanovan: voi, voi, voi, asuvaisia maan päällä, muiden kolmen enkelin basunan äänistä, jotka vielä basunilla soittaman pitää!

< Emoniseli 8 >