< Emoniseli 7 >

1 Sima na makambo wana, namonaki ba-anjelu minei batelemi na basonge nyonso minei ya mokili, bazali kokanga mipepe nyonso minei ya mokili mpo ete mopepe ata moke te epepa na mokili to na ebale monene to mpe na banzete.
MURIN met i kilaner tounlan pamen uda ni kaim en jappa paieu kolekol an paieu en jappa, pwe an ender ipuip don jappa, de pon jed, de nin tuka pot.
2 Bongo namonaki anjelu mosusu azali komata longwa na este mpe asimbi kashe ya Nzambe na bomoi. Agangaki na mongongo makasi epai ya ba-anjelu minei oyo Nzambe apesaki nguya ya kosala mabe na mokili mpe na ebale monene.
O i kilaner amen tounlan pwarada jan ni maj en lan, kilelekidi kilel en Kot ieiaj. A likwirki nil laud on tounlan pamen, me udan kawela jap o jed,
3 Alobaki na bango: « Bosala mabe te na mokili to na ebale monene to mpe na banzete, kino tokosilisa kobeta kashe na bambunzu ya basali ya Nzambe na biso. »
Indinda: Der kawela jappa de madau, de tuka kan, a lao kileledier ladu en at Kot akan ni tam ar!
4 Bongo nayokaki motango ya bato oyo babetamaki kashe: nkoto nkama moko na tuku minei na minei; bazalaki bato ya mabota nyonso ya bana ya Isalaele.
Nai ari ronadar arail wadok me kileledier me lop panen pakid jan nin kainok en Ijrael akan karoj.
5 Kati na libota ya Yuda, bato nkoto zomi na mibale babetamaki kashe; kati na libota ya Ribeni, bato nkoto zomi na mibale; kati na libota ya Gadi, bato nkoto zomi na mibale;
Jan ni kainok en Iuda nen riakid kileledier, jan ni kainok en Rupen nen riakid, jan ni kainok en Kat nen riakid,
6 kati na libota ya Aseri, bato nkoto zomi na mibale; kati na libota ya Nefitali, bato nkoto zomi na mibale; kati na libota ya Manase, bato nkoto zomi na mibale;
Jan ni kainok en Ajer nen riakid, jan ni kainok en Naptali nen riakid, jan ni kainok en Manaje nen riakid,
7 kati na libota ya Simeoni, bato nkoto zomi na mibale; kati na libota ya Levi: bato nkoto zomi na mibale; kati na libota ya Isakari, bato nkoto zomi na mibale;
Jan ni kainok en Jimeon nen riakid, jan ni kainok en Lewi nen riakid, jan ni kainok en Ijajar nen riakid,
8 kati na libota ya Zabuloni, bato nkoto zomi na mibale; kati na libota ya Jozefi, bato nkoto zomi na mibale; mpe kati na libota ya Benjame, bato nkoto zomi na mibale. Bango nyonso babetamaki kashe.
Jan ni kainok en Jepulon nen riakid, jan ni kainok en Iojep nen riakid, jan ni kainok en Peniamin nen riakid.
9 Sima na makambo wana, namonaki ebele ya bato oyo moto ata moko te akokaki kotanga; bazalaki bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya nkota nyonso. Batelemaki liboso ya Kiti ya Bokonzi mpe liboso ya Mpate, balataki banzambala ya pembe mpe basimbaki mandalala na maboko na bango;
Murin mepukat i kilaner pokon kalaimunia, jota amen me kak wadokedi jan ni wei karoj, o kainok karoj, o men liki karoj, o lokaia karoj, o mon mol o, o mon Jippul likau kida likau puetepuet o paini ni lim ar,
10 bazalaki koganga na mongongo makasi: « Lobiko ezali ya Nzambe na biso, oyo avandi na Kiti ya Bokonzi, mpe ezali ya Mpate. »
O re nil laudeda indinda: Kot kamaur pat, me kaipokedi pon mol o o Jippul.
11 Ba-anjelu nyonso oyo bazalaki kotelema zingazinga ya Kiti ya Bokonzi, ya bampaka mpe ya bikelamu minei ya bomoi, bagumbamaki, bilongi kino na mabele, liboso ya Kiti ya Bokonzi, mpe bagumbamelaki Nzambe
Tounlan karoj u kapil pena mol o, o lapalap akan, o man pamen, irail pori kidi maj ar mon mol o, poni Kot,
12 na koloba: « Amen! Tika ete masanzoli, nkembo, bwanya, matondi, lokumu, nguya mpe makasi ezala ya Nzambe na biso, mpo na libela na libela! Amen! » (aiōn g165)
Indinda: Amen! Pai, o linan, o erpit, o danke, o wau, o rojon, o manaman on atail Kot kokolata! Amen. (aiōn g165)
13 Bongo moko kati na bampaka atunaki ngai: — Bato oyo balati banzambala ya pembe bazali banani mpe bawuti wapi?
O amen ren me lapalap akan japen majani on ia: Ij irail me likau kida likau puetepuet, o irail kodo jan ia?
14 Nazongiselaki ye: — Nkolo na ngai, yo nde oyebi. Bongo alobaki na ngai: — Ezali ba-oyo bawuti na minyoko makasi. Basukolaki banzambala na bango mpe bakomisaki yango pembe kati na makila ya Mpate.
I ap potoan on i: Main, komui manier. A japen ia: Ir me pwaida jan ni kaan kamekam, o re lope ar likau, o kapwad kida ntan Jippul.
15 Yango wana, batelemaka liboso ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe basalelaka Ye kati na Tempelo na Ye, butu mpe moyi; mpe Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi akobatela bango kati na evandelo na Ye.
I me re mikier mon mol en Kot, o papa i ni ran o ni pon nan japwilim a im en kaudok, o me kaipokedi pon mol o, pan apapwali irail.
16 Bakoyoka lisusu nzala te, posa ya mayi mpe koswa ya moyi to molunge;
Irail jolar pan men mana potopoteta, o jolar men nim pilada, o katipin jolar pan daker ir, de eu jon en karakar pan lel.
17 pamba te Mpate oyo azali na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi akozala Mobateli na bango, akomema bango na bitima ya mayi ya bomoi, mpe Nzambe akopangusa mpinzoli nyonso ya miso na bango.
Pwe Jippul ni waron en mol o pan kotin wia jile parail, o a pan kalua ir won ni pil en maur, o Kot pan lim wei jan pil en maj arail.

< Emoniseli 7 >