< Emoniseli 6 >

1 Bongo namonaki Mpate kobuka ekangelo ya liboso kati na bikangelo sambo; mpe nayokaki moko kati na bikelamu minei ya bomoi koloba na mongongo makasi lokola kake: « Yaka! »
Je vis que l'agneau ouvrait l'un des sept sceaux, et j'entendis l'un des quatre êtres vivants qui disait, comme d'une voix de tonnerre: « Viens et vois! »
2 Natalaki mpe namonaki liboso na ngai mpunda moko ya pembe. Motambolisi na yango asimbaki tolotolo. Bapesaki ye motole, bongo abimaki lokola molongi mpe mpo ete azala molongi.
Alors apparut un cheval blanc, et celui qui le montait tenait un arc. Une couronne lui fut donnée, et il sortit en vainqueur, et pour vaincre.
3 Tango Mpate abukaki ekangelo ya mibale, nayokaki ekelamu ya mibale ya bomoi koloba: « Yaka! »
Quand il ouvrit le second sceau, j'entendis le second être vivant qui disait: « Viens! »
4 Bongo mpunda mosusu ebimaki: ezalaki ya motane makasi. Motambolisi na yango apesamelaki nguya ya kolongola kimia na mokili mpe ya kosala ete bato babomana bango na bango. Mpe bapesaki ye lisusu mopanga moko ya monene.
Un autre sortit, un cheval roux. A celui qui le montait fut donné le pouvoir d'enlever la paix de la terre, et de faire en sorte que les hommes s'entretuent. Une grande épée lui fut donnée.
5 Tango Mpate abukaki ekangelo ya misato, nayokaki ekelamu ya bomoi ya misato koloba: « Yaka! » Mpe namonaki liboso na ngai mpunda moko ya mwindo. Motambolisi na yango asimbaki na loboko na ye emekelo kilo.
Quand il ouvrit le troisième sceau, j'entendis le troisième être vivant qui disait: « Viens et vois! » Et voici, il y avait un cheval noir, et celui qui le montait tenait une balance dans sa main.
6 Bongo nayokaki lokola mongongo moko kobima kati na bikelamu minei ya bomoi; ezalaki koloba: « Kopo moko ya ble mpo na mbongo moko ya ebende, mpe bakopo misato ya orje mpo na mbongo moko ya ebende. Kasi kobebisa mafuta mpe vino te. »
J'entendis une voix au milieu des quatre êtres vivants qui disait: « Un chœnix de blé pour un denier, et trois chœnix d'orge pour un denier! N'abîmez pas l'huile et le vin! »
7 Tango Mpate abukaki ekangelo ya minei, nayokaki mongongo ya ekelamu ya minei ya bomoi koloba: « Yaka! »
Quand il ouvrit le quatrième sceau, j'entendis le quatrième être vivant qui disait: « Viens et vois! »
8 Namonaki liboso na ngai mpunda moko ya langi ya mayi ya pondu; kombo ya motambolisi na yango ezalaki « Kufa, » mpe mboka ya bakufi ezalaki kolanda motambolisi yango na sima. Bapesamelaki nguya ya koboma bato na nzela ya mopanga, ya nzala, ya bokono mpe ya banyama mabe, na etando ya eteni moko kati na biteni minei ya mokili. (Hadēs g86)
Et voici, il y avait un cheval pâle, et le nom de celui qui le montait était la mort. L'Hadès le suivait. Il lui fut donné autorité sur le quart de la terre, pour tuer par l'épée, par la famine, par la mort, et par les bêtes sauvages de la terre. (Hadēs g86)
9 Tango Mpate abukaki ekangelo ya mitano, namonaki na se ya etumbelo, milimo ya bato oyo baboma likolo na Liloba na Nzambe mpe likolo na litatoli na bango.
Quand il ouvrit le cinquième sceau, je vis sous l'autel les âmes de ceux qui avaient été tués à cause de la Parole de Dieu et du témoignage de l'Agneau qu'ils avaient.
10 Bagangaki na mongongo makasi: « Nkolo Nzambe, Yo oyo ozali Bule mpe Solo, okozela kino tango nini mpo na kosambisa bavandi ya mokili mpe kopesa bango etumbu mpo na makila na biso? »
Ils criaient d'une voix forte, en disant: « Jusques à quand, Maître, le saint et le vrai, jugeras-tu et vengeras-tu notre sang sur les habitants de la terre? »
11 Bongo bapesaki na moko na moko kati na bango nzambala ya pembe, mpe bayebisaki bango ete bazela moke kino motango ekokoka: motango ya baninga na bango ya mosala, mpe ya bandeko na bango oyo bakobomama lokola bango.
On donna à chacun d'eux une longue robe blanche. On leur dit qu'ils devaient se reposer encore quelque temps, jusqu'à ce que leurs compagnons de service et leurs frères, qui seraient aussi tués comme eux, aient achevé leur course.
12 Bongo namonaki Mpate kobuka ekangelo ya motoba, mpe mabele eninganaki makasi. Moyi ekomaki molili lokola elamba ya mwindo; bongo sanza, na mobimba na yango, ekomaki motane lokola makila.
Je vis, quand il ouvrit le sixième sceau, qu'il y eut un grand tremblement de terre. Le soleil devint noir comme un sac de crin, et la lune entière devint comme du sang.
13 Minzoto ya likolo ekweyaki na mabele ndenge bambuma ya nzete ya figi oyo ekomeli nanu te ekweyaka soki mopepe makasi eningisi yango.
Les étoiles du ciel tombèrent sur la terre, comme un figuier qui laisse tomber ses figues non mûres quand il est secoué par un grand vent.
14 Lola elongwaki lokola mokanda oyo bazali kolinga, bangomba nyonso mpe bisanga nyonso elongwaki na bisika na yango.
Le ciel fut enlevé comme un rouleau qu'on enroule. Toute montagne et toute île furent déplacées de leur place.
15 Bakonzi ya mabele, bato minene, bakonzi ya mampinga ya basoda, bazwi, bato ya nguya, bawumbu mpe bansomi bakendeki kobombama kati na madusu ya mabanga mpe kati na mabanga minene ya bangomba.
Les rois de la terre, les princes, les chefs militaires, les riches, les forts, tous les esclaves et les hommes libres, se cachèrent dans les cavernes et dans les rochers des montagnes.
16 Bazalaki koganga epai ya bangomba mpe epai ya mabanga minene: « Bokweyela biso mpe bobomba biso mpo ete Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi amona biso te, mpe mpo ete kanda ya Mpate ekweyela biso te!
Et ils disaient aux montagnes et aux rochers: « Tombez sur nous, et cachez-nous devant la face de celui qui est assis sur le trône, et devant la colère de l'agneau,
17 Pamba te mokolo monene ya kanda na bango ekoki, bongo nani akoki kolonga kotelema? »
car le grand jour de sa colère est venu, et qui peut subsister? ».

< Emoniseli 6 >