< Emoniseli 5 >

1 Bongo namonaki, na loboko ya mobali ya Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi, buku moko elingama, bakoma yango na kati mpe na libanda, mpe bakanga yango na bikangelo sambo.
ראיתי לימין היושב על הכסא מגילה כתובה בפנים ובחוץ וחתומה בשבעה חותמות.
2 Namonaki mpe anjelu moko ya nguya kosakola na mongongo makasi: « Nani abongi mpo na kobuka bikangelo ya buku mpe kofungola yango? »
מלאך גיבור הופיע וקרא בקול גדול:”מי ראוי לשבור את החותמות ולפתוח את המגילה?“
3 Kasi ezala kati na Lola to na mokili to na se ya mabele, moko te akokaki kofungola buku to kotala kati na yango.
ולא נמצא איש בשמים, בארץ או מבין המתים אשר היה מסוגל לפתוח את המגילה או להביט בכתוב.
4 Tango namonaki bongo, nalelaki mingi mpo ete moko te amonanaki ete abongi mpo na kofungola buku to kotala kati na yango.
פרצתי בבכי מר, כי איש לא נמצא ראוי לפתוח את המגילה ולקרוא בה.
5 Bongo moko kati na bampaka alobaki na ngai: « Kolela te! Tala! Nkosi ya libota ya Yuda, Mokitani ya Davidi, alongaki mpo na kobuka bikangelo sambo mpe kofungola buku yango. »
אך אחד מעשרים־וארבעה הזקנים אמר אלי:”אל תבכה. ראה, האריה משבט יהודה ושורש דויד ניצח, והוכיח את עצמו ראוי לשבור את החותמות ולפתוח את המגילה.“
6 Mpe namonaki Mpate moko ya kotelema na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi, mpe bazingela na bikelamu minei ya bomoi elongo na bampaka. Mpate yango amonanaki lokola nde basilaki koboma Ye; azalaki na maseke sambo mpe miso sambo oyo ezali milimo sambo ya Nzambe, oyo etindama na mokili mobimba.
הבטתי במרכז כסא־המלכות, שמוקף בארבע החיות ובעשרים־וארבעה הזקנים, וראיתי שה שעליו פצעים וחבורות אשר גרמו פעם למותו. לשה היו שבע קרניים ושבע עיניים, שהן שבע רוחות האלוהים שנשלחות אל כל קצווי העולם.
7 Mpate apusanaki mpo na kozwa buku wuta na loboko ya ngambo ya mobali ya Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi.
השה בא ולקח את המגילה מימינו של היושב על כיסא המלכות.
8 Tango kaka azwaki buku, bikelamu minei ya bomoi mpe bampaka tuku mibale na minei bagumbamaki liboso ya Mpate. Moko na moko kati na bango asimbaki na loboko na ye lindanda mpe kopo ya wolo etonda na ansa oyo ezali mabondeli ya basantu.
בלקחו את המגילה השתחוו לפניו ארבע החיות ועשרים־וארבעה הזקנים. כל אחד מהזקנים אחז כינור וקערת זהב מלאה קטורת, אשר היא תפילת בני־האלוהים הקדושים.
9 Mpe bayembaki nzembo ya sika: « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.
הם שרו שיר חדש, ואלו מילותיו:”ראוי אתה לקחת את המגילה ולפתוח את חותמיה, כי אתה נשחטת, ובדמך קנית לאלוהים את בניו מכל עם, גזע ולשון.
10 Okomisaki bango ekolo ya bakonzi mpe ya Banganga-Nzambe mpo Nzambe na biso, mpe bakokonza mokili. »
ממלכת כוהנים לאלוהינו עשית אותם, והם ימלכו על הארץ.“
11 Bongo natalaki mpe nayokaki mongongo ya ba-anjelu ebele, oyo motango na bango ezalaki bankoto na bankoto; bazingelaki Kiti ya Bokonzi, bikelamu ya bomoi mpe bampaka,
לאחר מכן שמעתי בחיזיון קול מלאכים רבים סביב כסא המלכות, ארבע החיות והזקנים.
12 mpe bazalaki koloba na mongongo makasi: « Mpate oyo babomaki abongi na kozwa nguya, bomengo, bwanya mpe makasi, lokumu, nkembo mpe masanzoli. »
הם שרו שירה אדירה:”ראוי השה הטבוח לקבל עוז, עושר וחכמה, גבורה והדר, כבוד וברכה.“
13 Bongo nayokaki bikelamu nyonso oyo ezalaka kati na Lola, na mabele, na se ya mabele mpe na likolo ya ebale monene; bango nyonso bazalaki koloba: « Tika ete masanzoli mpe lokumu, nkembo mpe nguya ezonga epai ya Mpate mpe epai na Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi (aiōn g165)
וכל בריה בשמים, בארץ, מתחת לארץ ובים, שמעתי קוראים:”ליושב על הכסא ולשה הברכה וההדר והעוז, לעולם ועד!“ (aiōn g165)
14 Bikelamu minei ya bomoi bazalaki kozongisa: « Amen. » Mpe bampaka bafukamaki mpe bagumbamelaki.
ארבע החיות אמרו:”אמן!“ועשרים וארבעה הזקנים נפלו על פניהם והשתחוו לו.

< Emoniseli 5 >