< Emoniseli 4 >

1 Sima na makambo oyo, namonaki ekuke moko efungwama kati na Lola. Bongo mongongo oyo nayokaki koloba na ngai lokola kelelo na mbala ya liboso elobaki na ngai lisusu: « Mata awa, mpe nakolakisa yo makambo oyo esengeli koya sima na oyo. »
بعد از این دیدم که ناگاه دروازه‌ای درآسمان باز شده است و آن آواز اول را که شنیده بودم که چون کرنا با من سخن می‌گفت، دیگرباره می‌گوید: «به اینجا صعود نما تا اموری را که بعد از این باید واقع شود به تو بنمایم.»۱
2 Mbala moko, Molimo asimbaki ngai mpe namonaki kati na Lola Kiti moko ya Bokonzi oyo moto moko avandelaki.
فی الفور در روح شدم و دیدم که تختی درآسمان قائم است و بر آن تخت‌نشیننده‌ای.۲
3 Mpe Ye oyo avandaki na Kiti yango ya Bokonzi azalaki komonana lokola Jasipe mpe Saridwane oyo ezali mabanga ya talo. Monama ezingelaki Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki kongenga lokola libanga ya talo oyo babengaka emerode.
وآن نشیننده، در صورت، مانند سنگ یشم و عقیق است و قوس قزحی در گرد تخت که به منظرشباهت به زمرد دارد۳
4 Zingazinga ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki mpe na bakiti mosusu tuku mibale na minei ya bokonzi, mpe bampaka tuku mibale na minei bavandelaki yango. Bampaka yango balataki bilamba ya pembe, mpe bazalaki na mitole ya wolo na mito na bango.
و گرداگرد تخت، بیست وچهار تخت است؛ و بر آن تختها بیست و چهارپیر که جامه‌ای سفید در بر دارند نشسته دیدم و برسر ایشان تاجهای زرین.۴
5 Wuta na Kiti yango ya Bokonzi, mikalikali ezalaki kongenga, makelele ya mingongo mpe lokito ya bakake ezalaki koyokana. Mpe liboso ya Kiti yango, minda sambo ezalaki kopela: ezali milimo sambo ya Nzambe.
و از تخت، برقها وصداها و رعدها برمی آید؛ و هفت چراغ آتشین پیش تخت افروخته که هفت روح خدا می‌باشند.۵
6 Na liboso ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki lisusu na etando moko oyo ezalaki lokola talatala, mpe monene na yango ezalaki lokola molayi ya ebale monene. Ezalaki kongala lokola libanga ya talo oyo babengaka krisitali. Na kati mpe na zingazinga ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki na bikelamu minei ya bomoi oyo banzoto na bango ezalaki etonda na miso na liboso mpe na sima.
و در‌پیش تخت، دریایی از شیشه مانند بلور ودر میان تخت و گرداگرد تخت چهار حیوان که ازپیش و پس به چشمان پر هستند.۶
7 Ekelamu ya liboso azalaki lokola nkosi; ya mibale, lokola mwana ngombe ya mobali; ya misato azalaki na elongi lokola ya moto, mpe ya minei azalaki lokola mpongo oyo ezali kopumbwa.
و حیوان اول مانند شیر بود؛ و حیوان دوم مانند گوساله؛ وحیوان سوم صورتی مانند انسان داشت؛ و حیوان چهارم مانند عقاب پرنده.۷
8 Moko na moko kati na bikelamu nyonso minei azalaki na mapapu motoba, mpe nzoto na ye ezalaki etonda na miso, ezala na se ya mapapu. Butu mpe moyi, bazalaki kolemba te koloba:
و آن چهار حیوان که هر یکی از آنها شش بال دارد، گرداگرد و درون به چشمان پر هستند وشبانه‌روز باز نمی ایستند از گفتن «قدوس قدوس قدوس، خداوند خدای قادر مطلق که بود وهست و می‌آید.»۸
9 Na tango nyonso oyo bikelamu ya bomoi bazalaki kopesa nkembo, lokumu mpe matondi epai na Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi mpe azali na bomoi seko na seko, (aiōn g165)
و چون آن حیوانات جلال وتکریم و سپاس به آن تخت‌نشینی که تا ابدالابادزنده است می‌خوانند، (aiōn g165)۹
10 bampaka tuku mibale na minei bazalaki kogumbama liboso ya Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi, kogumbamela Ye oyo azali na bomoi seko na seko mpe kokitisa mitole na bango liboso ya Kiti ya Bokonzi na koloba: (aiōn g165)
آنگاه آن بیست و چهار پیر می‌افتند در حضور آن تخت‌نشین و او را که تاابدالاباد زنده است عبادت می‌کنند و تاجهای خود را پیش تخت انداخته، می‌گویند: (aiōn g165)۱۰
11 « Nkolo mpe Nzambe na biso, obongi na nkembo, na lokumu mpe na nguya, pamba te Yo nde okela biloko nyonso: ezalaki mpe ekelamaki mpo na mokano na Yo. »
«ای خداوند، مستحقی که جلال و اکرام و قوت رابیابی، زیرا که تو همه موجودات را آفریده‌ای ومحض اراده تو بودند و آفریده شدند.»۱۱

< Emoniseli 4 >