< Emoniseli 3 >
1 Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Sarde: « Tala maloba ya Ye oyo azali na milimo sambo ya Nzambe mpe minzoto sambo: Nayebi misala na yo; nayebi malamu ete okenda sango ete ozali na bomoi, nzokande ozali na yo ya kokufa.
"To the minister of the Church at Sardis write as follows: "'This is what He who has the seven Spirits of God and the seven stars says. I know your doings--you are supposed to be alive, but in reality you are dead.
2 Lamuka! Lendisa bato oyo batikali mpe ba-oyo bakomi pene ya kokufa, pamba te namoni ete misala na yo ezali ya kokoka te liboso ya Nzambe na Ngai.
Rouse yourself and keep awake, and strengthen those things which remain but have well-nigh perished; for I have found no doings of yours free from imperfection in the sight of My God.
3 Yango wana, kanisa malamu mateya oyo ozwaki mpe oyokaki; tosa mpe bongola motema na yo. Kasi soki olamuki te, nakoya lokola moyibi, mpe okoyeba te ngonga oyo nakoya epai na yo.
Be mindful, therefore, of the lessons you have received and heard. Continually lay them to heart, and repent. If, however, you fail to rouse yourself and keep awake, I shall come upon you suddenly like a thief, and you will certainly not know the hour at which I shall come to judge you.
4 Nzokande, kati na Sarde, ozali na ndambo ya bato oyo babebisaki te bilamba na bango. Bakotambola elongo na Ngai, na bilamba ya pembe, pamba te babongi na yango.
Yet you have in Sardis a few who have not soiled their garments; and they shall walk with Me in white; for they are worthy.
5 Moto oyo akolonga, bakolatisa ye bilamba ya pembe lokola bango. Nakolongola kombo na ye te na buku ya bomoi, kasi nakondima yango liboso ya Tata na Ngai mpe liboso ya ba-anjelu na Ye.
"'In this way he who overcomes shall be clothed in white garments; and I will certainly not blot out his name from the Book of Life, but will acknowledge him in the presence of My Father and His angels.
6 Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba! »
Let all who have ears give heed to what the Spirit is saying to the Churches.'
7 Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Filadelfi: « Tala maloba ya Ye oyo azali Bule mpe Solo, oyo asimbi fungola ya Davidi: oyo Ye afungoli, moko te akoki kokanga yango; mpe oyo Ye akangi, moko te akoki kofungola yango.
"To the minister of the Church at Philadelphia write as follows: "'This is what the holy One and the true says--He who has the key of David--He who opens and no one shall shut, and shuts and no one shall open.
8 Nayebi misala na yo. Tala, natiaki liboso na yo ekuke moko ya kofungwama, ekuke oyo moko te akoki kokanga. Nayebi ete ozali na nguya moke, obatelaki Liloba na Ngai mpe owanganaki te Kombo na Ngai.
I know your doings. I have put an opened door in front of you, which no one can shut; because you have but a little power, and yet you have guarded My word and have not disowned Me.
9 Tala makambo oyo nakosala bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali na bango Bayuda te; bazali nde bakosi. Nakosala ete baya kofukama na makolo na yo mpe bandima ete nalingaka yo.
I will cause some belonging to Satan's synagogue who say that they themselves are Jews, and are not, but are liars--I will make them come and fall at your feet and know for certain that I have loved you.
10 Lokola obatelaki etinda na Ngai ya kozala na molende, Ngai mpe nakobatela yo na tango ya pasi oyo ekokweyela mokili mobimba mpo na komeka bavandi na yango.
Because in spite of suffering you have guarded My word, I in turn will guard you from that hour of trial which is soon coming upon the whole world, to put to the test the inhabitants of the earth.
11 Nazali koya kala mingi te. Oyo ozali na yango, simba yango makasi mpo ete moko te abotola yo motole na yo.
I am coming quickly: cling to that which you already possess, so that your wreath of victory be not taken away from you.
12 Moto oyo akolonga, nakokomisa ye likonzi kati na Tempelo ya Nzambe na Ngai, mpe akotikala lisusu te kobima kuna. Nakokoma na likolo na ye Kombo ya Nzambe na Ngai mpe kombo ya engumba ya Nzambe na Ngai, Yelusalemi ya sika, oyo ekokita wuta na Lola, epai ya Nzambe na Ngai. Mpe lisusu, nakokoma Kombo na Ngai ya sika na likolo na ye.
"'He who overcomes--I will make him a pillar in the sanctuary of My God, and he shall never go out from it again. And I will write on him the name of My God, and the name of the city of My God, the new Jerusalem, which is to come down out of Heaven from My God, and My own new name.
13 Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba! »
Let all who have ears give heed to what the Spirit is saying to the Churches.'
14 Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Laodise: Tala maloba ya Amen, Motatoli ya sembo mpe ya solo, Mokonzi ya bikelamu nyonso ya Nzambe:
"And to the minister of the Church at Laodicea write as follows: "'This is what the Amen says--the true and faithful witness, the Beginning and Lord of God's Creation.
15 Nayebi misala na yo, mpe nayebi malamu ete ozali malili te mpe ozali moto te; nalingaki nde ozala malili to moto.
I know your doings--you are neither cold nor hot; I would that you were cold or hot!
16 Kasi lokola ozali malili te mpe ozali moto te, nazali kosanza yo wuta na monoko na Ngai.
Accordingly, because you are lukewarm and neither hot nor cold, before long I will vomit you out of My mouth.
17 Olobaka: « Nazali mozwi! Nakomi na bozwi ebele mpe nazali na posa ya eloko te. » Kasi ozali koyeba te ete ozali moto ya pasi mpe ya mawa, ozali nde mobola, mokufi miso mpe ozali bolumbu.
You say, I am rich, and have wealth stored up, and I stand in need of nothing; and you do not know that if there is a wretched creature it is you -- pitiable, poor, blind, naked.
18 Yango wana, nazali kopesa yo toli ete osomba epai na Ngai wolo oyo bapetola na moto mpo ete okoma penza mozwi, bilamba ya pembe mpo ete olata mpe obomba bolumbu na yo ya soni, mpe kisi ya miso mpo ete otia na miso na yo mpe omona malamu.
Therefore I counsel you to buy of Me gold refined in the fire that you may become rich, and white robes to put on, so as to hide your shameful nakedness, and eye-salve to anoint your eyes with, so that you may be able to see.
19 Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo.
All whom I hold dear, I reprove and chastise; therefore be in earnest and repent.
20 Tala Ngai oyo, natelemi na ekuke mpe nazali kobeta. Soki moto moko ayoki mongongo na Ngai mpe afungoli ekuke, nakokota epai na ye mpe nakolia elongo na ye, mpe ye elongo na Ngai.
I am now standing at the door and am knocking. If any one listens to My voice and opens the door, I will go in to be with him and will feast with him, and he shall feast with Me.
21 Moto oyo akolonga, nakopesa ye makoki ya kovanda elongo na Ngai, na Kiti na Ngai ya Bokonzi, ndenge Ngai mpe, sima na Ngai kolonga, nakendeki kovanda elongo na Tata na Ngai, na Kiti na Ye ya Bokonzi.
"'To him who overcomes I will give the privilege of sitting down with Me on My throne, as I also have overcome and have sat down with My Father on His throne.
22 Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba!
Let all who have ears give heed to what the Spirit is saying to the Churches.'"