< Emoniseli 22 +

1 Bongo anjelu alakisaki ngai ebale ya mayi ya bomoi; ezalaki kongenga lokola talatala mpe ezalaki kobima wuta na Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate.
Puis il me montra un fleuve d’eau de la vie, clair comme du cristal, jaillissant du trône de Dieu et de l’Agneau,
2 Ezalaki kotiola na kati-kati ya balabala monene ya engumba. Na esika oyo ebale ekabwanaki na biteni mibale, ezalaki na nzete ya bomoi oyo ebotaka bambuma mbala zomi na mibale na mobu, elingi koloba ete ebotaka bambuma sanza na sanza; mpe makasa na yango ebikisaka bikolo.
au milieu de la rue de la ville; et de part et d’autre du fleuve, des arbres de vie qui donnent douze fois leurs fruits, les rendant une fois par mois, et dont les feuilles servent à la guérison des nations.
3 Elakeli mabe ekozala lisusu te. Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate ekozala kati na engumba, mpe bawumbu na Ye bakosalela Ye.
Il n’y aura plus aucun anathème; le trône de Dieu et de l’Agneau sera dans la ville; ses serviteurs le serviront, et
4 Bakomona elongi na Ye, mpe Kombo na Ye ekokomama na bambunzu na bango.
ils verront sa face, et son nom sera sur leurs fronts.
5 Butu ekozala lisusu te. Bakozala na posa te ya pole ya mwinda to ya moyi, pamba te Nkolo Nzambe akongengisa bango na pole na Ye. Mpe bakokonza seko na seko. (aiōn g165)
Il n’y aura plus de nuit, et ils n’auront besoin ni de la lumière de la lampe, ni de la lumière du soleil, parce que le Seigneur Dieu les illuminera; et ils régneront aux siècles des siècles. (aiōn g165)
6 Anjelu alobaki na ngai: « Maloba oyo ezali ya solo mpe ebongi na kotiela yango motema. Nkolo, Nzambe ya milimo ya basakoli, atindaki anjelu na Ye mpo na kolakisa na basali na Ye makambo oyo esengeli kosalema kala mingi te. »
Et l’ange me dit: « Ces paroles sont certaines et véritables; et le Seigneur, le Dieu des esprits des prophètes, a envoyé son ange pour montrer à ses serviteurs les choses qui doivent arriver bientôt. —
7 Yoka! Nazali koya kala mingi te. Esengo na moto oyo abatelaka maloba ya masakoli oyo ekomama kati na buku oyo.
Voici que je viens bientôt. Heureux celui qui garde les paroles de la prophétie de ce livre! »
8 Ngai Yoane, nayokaki mpe namonaki makambo oyo. Mpe tango nayokaki mpe namonaki yango, nafukamaki na makolo ya anjelu oyo alakisaki ngai yango mpo na kogumbamela ye.
C’est moi, Jean, qui ai entendu et vu ces choses. Et après les avoir entendues et vues, je tombai aux pieds de l’ange qui me les montrait pour l’adorer.
9 Kasi anjelu alobaki na ngai: « Kosala bongo te! Nazali moninga na yo ya mosala, ya bandeko na yo, basakoli; mpe ya ba-oyo nyonso babatelaka maloba ya buku oyo. Gumbamela nde Nzambe! »
Mais il me dit: « Garde-toi de le faire! Je suis serviteur au même titre que toi, que tes frères, les prophètes, et que ceux qui gardent les paroles de ce livre. Adore Dieu. »
10 Bongo alobaki na ngai lisusu: « Kobomba te maloba ya masakoli ya buku oyo, pamba te tango ekomi pene.
Et il me dit: « Ne scelle point les paroles de la prophétie de ce livre; car le moment est proche.
11 Tika ete moto oyo asalaka mabe akoba kosala mabe, tika ete moto oyo azali mbindo akoba kozala mbindo, tika ete moto oyo azali sembo akoba kozala sembo, mpe tika ete moto azali bule akoba kozala bule! »
Que celui qui est injuste fasse encore le mal; que l’impur se souille encore; que le juste pratique encore la justice, et que le saint se sanctifie encore.
12 Yoka! Nazali koya kala mingi te! Nakomema elongo na Ngai lifuti mpo na moto na moto kolanda misala na ye.
Et voici que je viens bientôt, et ma rétribution est avec moi, pour rendre à chacun selon son œuvre.
13 Nazali Alifa mpe Omega, Moto ya liboso mpe Moto ya suka, Ebandeli mpe Suka.
Je suis l’alpha et l’oméga, le premier et le dernier, le commencement et la fin.
14 Esengo na bato oyo basukolaka bilamba na bango mpo na kozwa ndingisa ya kolia bambuma ya nzete ya bomoi mpe ya koleka na bikuke mpo na kokota na engumba.
Heureux ceux qui lavent leurs robes, afin d’avoir droit à l’arbre de la vie, et afin d’entrer dans la ville par les portes!
15 Kasi bambwa, bato ya maji, bandumba, babomi, basambeli bikeko mpe bato nyonso oyo balingaka mpe basalelaka lokuta, bakozala na libanda ya engumba.
Dehors les chiens, les magiciens, les impudiques, les meurtriers, les idolâtres, et quiconque aime le mensonge et s’y adonne!
16 Ngai Yesu, natindaki anjelu na Ngai mpo na kotatola bosolo ya makambo oyo kati na Mangomba. Nazali Mosisa mpe mokitani ya Davidi; Monzoto ya tongo, oyo engengaka.
C’est moi, Jésus, qui ai envoyé mon ange vous attester ces choses, pour les Églises. C’est moi qui suis le rejeton et le fils de David, l’étoile brillante du matin. »
17 Molimo mpe Mwasi mobandami ya libala balobi: — Yaka! Tika ete ye oyo azali koyoka maloba oyo aloba: « Yaka! » Tika ete ye oyo azali na posa ya mayi aya; mpe tika ete ye oyo alingi kozwa mayi ya bomoi azwa yango na ofele.
Et l’Esprit et l’Épouse disent: « Venez! » Que celui qui entend dise aussi: « Venez! Que celui qui a soif, vienne! Que celui qui le désire, prenne de l’eau de la vie gratuitement! »
18 Ngai Yoane, nazali koyebisa moto nyonso oyo azali koyoka maloba ya masakoli ya buku oyo: soki moto abakisi ata likambo moko na likolo ya makambo oyo, Nzambe akobakisela ye bitumbu oyo ekomami kati na buku oyo;
Je déclare aussi à quiconque entend les paroles de la prophétie de ce livre que, si quelqu’un y ajoute, Dieu le frappera des fléaux décrits dans ce livre;
19 mpe soki moto alongoli ata likambo moko na maloba ya masakoli ya buku oyo, Nzambe mpe akolongola ye ndingisa ya kolia bambuma ya nzete ya bomoi mpe ya kokota kati na Engumba ya Bule, oyo etalisami kati na buku oyo.
et que, si quelqu’un retranche des paroles de ce livre prophétique, Dieu lui retranchera sa part de l’arbre de la vie et de la cité sainte, qui sont décrits dans ce livre.
20 Motatoli ya makambo oyo alobi: — Iyo, nazali koya kala mingi te. Amen: Nkolo Yesu, yaka!
Celui qui atteste ces choses, dit: « Oui, je viens bientôt. » Amen! Venez, Seigneur Jésus!
21 Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu ezala na bino nyonso!
Que la grâce du Seigneur Jésus [Christ] soit avec [vous] tous! [Amen!]

< Emoniseli 22 +