< Emoniseli 20 >

1 Bongo namonaki anjelu moko kokita wuta na Lola; asimbaki na loboko na ye fungola ya libulu ya monene mpe ya molili makasi mpe monyololo moko ya monene. (Abyssos g12)
Sonra bir meleğin gökten indiğini gördüm. Elinde dipsiz derinliklerin anahtarı ve büyük bir zincir vardı. (Abyssos g12)
2 Akamataki dalagona, nyoka wana ya kala oyo azali zabolo to Satana; akangaki ye monyololo mpo na mibu nkoto moko.
Melek ejderhayı –İblis ya da Şeytan denen o eski yılanı– yakalayıp bin yıl için bağladı.
3 Anjelu abwakaki ye kati na libulu wana ya monene mpe ya molili makasi; akangaki yango mpe abetaki kashe na likolo na yango mpo ete akosa lisusu bikolo te kino tango mibu nkoto moko ekokoka. Sima na yango, bakotika ye mpo na mwa tango moke. (Abyssos g12)
Bin yıl tamamlanıncaya dek ulusları bir daha saptırmasın diye onu dipsiz derinliklere attı, oraya kapayıp girişi mühürledi. Bin yıl geçtikten sonra kısa bir süre için serbest bırakılması gerekiyor. (Abyssos g12)
4 Bongo namonaki bakiti ya bokonzi. Bato oyo bavandaki na bakiti yango bapesamelaki bokonzi ya kosambisa. Namonaki mpe milimo ya bato oyo bakataki bango mito mpo na litatoli na bango na tina na Yesu mpe na tina na Liloba na Nzambe, mpo ete bagumbamelaki te nyama mpe ekeko na yango mpe batiamaki te elembo na yango na bambunzu mpe na maboko na bango. Bazongaki na bomoi mpe bakonzaki elongo na Klisto mibu nkoto moko.
Bazı tahtlar ve bunlara oturanları gördüm. Onlara yargılama yetkisi verilmişti. İsa'ya tanıklık ve Tanrı'nın sözü uğruna başı kesilenlerin canlarını da gördüm. Bunlar, canavara ve heykeline tapmamış, alınlarına ve ellerine onun işaretini almamış olanlardı. Hepsi dirilip Mesih'le birlikte bin yıl egemenlik sürdüler.
5 Bato mosusu oyo bakufaki bazongaki na bomoi te liboso ete mibu nkoto moko esila. Yango nde lisekwa ya liboso.
İlk diriliş budur. Ölülerin geri kalanı bin yıl tamamlanmadan dirilmedi.
6 Bato oyo bakosekwa na lisekwa ya liboso bazali bato ya esengo mpe basantu! Kufa ya mibale ezali na bokonzi te epai na bango, kasi bakozala Banganga-Nzambe ya Nzambe mpe ya Klisto, mpe bakokonza elongo na Ye mibu nkoto moko.
İlk dirilişe dahil olanlar mutlu ve kutsaldır. İkinci ölümün bunların üzerinde yetkisi yoktur. Onlar Tanrı'nın ve Mesih'in kâhinleri olacak, O'nunla birlikte bin yıl egemenlik sürecekler.
7 Tango mibu wana nkoto moko ekosila, bakobimisa Satana wuta na boloko na ye,
Bin yıl tamamlanınca Şeytan atıldığı zindandan serbest bırakılacak.
8 mpe akokende kokosa bikolo ya bangambo nyonso minei ya mokili mobimba, elingi koloba Gogi mpe Magogi. Akosangisa bango mpo na bitumba. Motango na bango ekozala lokola zelo ya ebale monene oyo bakoki kotanga te.
Yeryüzünün dört bucağındaki ulusları –Gog'la Magog'u– saptırmak, savaş için bir araya toplamak üzere zindandan çıkacak. Toplananların sayısı deniz kumu kadar çoktur.
9 Bapanzanaki na mokili mobimba, bazingelaki molako ya basantu mpe engumba oyo Nzambe alingaka. Kasi moto ekitaki longwa na likolo mpe ezikisaki bango.
Yeryüzünün dört bir yanından gelerek kutsalların ordugahını ve sevilen kenti kuşattılar. Ama gökten ateş yağdı, onları yakıp yok etti.
10 Bongo Satana oyo azalaki kokosa bango abwakamaki na liziba ya moto mpe ya sofolo, epai wapi nyama mpe mosakoli ya lokuta babwakamaki. Bakonyokolama kuna seko na seko, butu mpe moyi. (aiōn g165, Limnē Pyr g3041 g4442)
Onları saptıran İblis ise canavarla sahte peygamberin de içinde bulunduğu ateş ve kükürt gölüne atıldı. Gece gündüz, sonsuzlara dek işkence çekeceklerdir. (aiōn g165, Limnē Pyr g3041 g4442)
11 Bongo namonaki Kiti monene ya Bokonzi, ya langi ya pembe elongo na Ye oyo avandaki na Kiti yango. Likolo mpe mabele ekimaki mosika na Ye mpe emonanaki lisusu te.
Sonra büyük, beyaz bir taht ve tahtta oturanı gördüm. Yerle gök önünden kaçtılar, yok olup gittiler.
12 Namonaki lisusu bakufi, bato minene mpe bato pamba batelemi liboso ya Kiti ya Bokonzi. Babuku efungolamaki. Mpe buku mosusu efungolamaki, yango nde buku ya bomoi. Bongo bakufi basambisamaki kolanda misala na bango ndenge ekomama kati na babuku.
Tahtın önünde duran küçük büyük, ölüleri gördüm. Sonra kitaplar açıldı. Yaşam kitabı denen başka bir kitap daha açıldı. Ölüler kitaplarda yazılanlara bakılarak yaptıklarına göre yargılandı.
13 Ebale monene esanzaki bakufi oyo bazalaki kati na yango; kufa elongo na mboka ya bakufi esanzaki mpe bakufi oyo bazalaki kati na yango. Mpe bato nyonso basambisamaki, moto na moto kolanda misala na ye. (Hadēs g86)
Deniz kendisinde olan ölüleri, ölüm ve ölüler diyarı da kendilerinde olan ölüleri teslim ettiler. Her biri yaptıklarına göre yargılandı. (Hadēs g86)
14 Bongo kufa mpe mboka ya bakufi ebwakamaki kati na liziba ya moto. Liziba ya moto ezali kufa ya mibale. (Hadēs g86, Limnē Pyr g3041 g4442)
Ölüm ve ölüler diyarı ateş gölüne atıldı. İşte bu ateş gölü ikinci ölümdür. (Hadēs g86, Limnē Pyr g3041 g4442)
15 Moto nyonso oyo kombo na ye ekomamaki te kati na buku ya bomoi abwakamaki kati na liziba ya moto. (Limnē Pyr g3041 g4442)
Adı yaşam kitabına yazılmamış olanlar ateş gölüne atıldı. (Limnē Pyr g3041 g4442)

< Emoniseli 20 >