< Emoniseli 20 >
1 Bongo namonaki anjelu moko kokita wuta na Lola; asimbaki na loboko na ye fungola ya libulu ya monene mpe ya molili makasi mpe monyololo moko ya monene. (Abyssos )
我又看见一位天使从天上降下来,手里拿着深渊的钥一条大锁炼。 (Abyssos )
2 Akamataki dalagona, nyoka wana ya kala oyo azali zabolo to Satana; akangaki ye monyololo mpo na mibu nkoto moko.
他捉住了那龙,那古蛇,也就是魔鬼和撒旦,把它捆绑了一千年。
3 Anjelu abwakaki ye kati na libulu wana ya monene mpe ya molili makasi; akangaki yango mpe abetaki kashe na likolo na yango mpo ete akosa lisusu bikolo te kino tango mibu nkoto moko ekokoka. Sima na yango, bakotika ye mpo na mwa tango moke. (Abyssos )
天使把它扔进深渊,关起来并封印,这样,他就不能再欺骗各国了,直到一千年结束。 (Abyssos )
4 Bongo namonaki bakiti ya bokonzi. Bato oyo bavandaki na bakiti yango bapesamelaki bokonzi ya kosambisa. Namonaki mpe milimo ya bato oyo bakataki bango mito mpo na litatoli na bango na tina na Yesu mpe na tina na Liloba na Nzambe, mpo ete bagumbamelaki te nyama mpe ekeko na yango mpe batiamaki te elembo na yango na bambunzu mpe na maboko na bango. Bazongaki na bomoi mpe bakonzaki elongo na Klisto mibu nkoto moko.
我又看见一些宝座,有人坐在上面,获得了审判的权力。也看见那些因为替耶稣作见证,分享上帝的道而被斩首之人。他们没有膜拜野兽或兽像,也没有在额上或手上接受野兽的记号。他们都复活了,在一千年中与基督一同作王。
5 Bato mosusu oyo bakufaki bazongaki na bomoi te liboso ete mibu nkoto moko esila. Yango nde lisekwa ya liboso.
这是第一次复活。(其余的死人还没有复活,直到那一千结束。)
6 Bato oyo bakosekwa na lisekwa ya liboso bazali bato ya esengo mpe basantu! Kufa ya mibale ezali na bokonzi te epai na bango, kasi bakozala Banganga-Nzambe ya Nzambe mpe ya Klisto, mpe bakokonza elongo na Ye mibu nkoto moko.
在第一次复活中有份的人,得到了祝福,是圣洁的;第二次死亡不会对他们产生力量。他们还要作上帝和基督的祭司,与他一同作王一千年。
7 Tango mibu wana nkoto moko ekosila, bakobimisa Satana wuta na boloko na ye,
那一千年结束时,撒旦就要从监牢里被释放出来,
8 mpe akokende kokosa bikolo ya bangambo nyonso minei ya mokili mobimba, elingi koloba Gogi mpe Magogi. Akosangisa bango mpo na bitumba. Motango na bango ekozala lokola zelo ya ebale monene oyo bakoki kotanga te.
迷惑地上四方的列国,以歌革和玛名为代表,将他们从世界的四面八方聚集在一起作战。他们的人数好像海边的沙那么多。
9 Bapanzanaki na mokili mobimba, bazingelaki molako ya basantu mpe engumba oyo Nzambe alingaka. Kasi moto ekitaki longwa na likolo mpe ezikisaki bango.
他们在地球上行进,围住了信徒的营地还有那被热爱的城市。但有火从天而降,毁灭了他们。
10 Bongo Satana oyo azalaki kokosa bango abwakamaki na liziba ya moto mpe ya sofolo, epai wapi nyama mpe mosakoli ya lokuta babwakamaki. Bakonyokolama kuna seko na seko, butu mpe moyi. (aiōn , Limnē Pyr )
那迷惑他们的魔鬼,被拋在硫磺的火湖里,就是野兽和假先知所在质地。他们必昼夜受痛苦,直到永远。 (aiōn , Limnē Pyr )
11 Bongo namonaki Kiti monene ya Bokonzi, ya langi ya pembe elongo na Ye oyo avandaki na Kiti yango. Likolo mpe mabele ekimaki mosika na Ye mpe emonanaki lisusu te.
然后我看到一个白色的大宝座,以及坐在上面的那位。天地都消失了,再也看不见了。
12 Namonaki lisusu bakufi, bato minene mpe bato pamba batelemi liboso ya Kiti ya Bokonzi. Babuku efungolamaki. Mpe buku mosusu efungolamaki, yango nde buku ya bomoi. Bongo bakufi basambisamaki kolanda misala na bango ndenge ekomama kati na babuku.
我看见死者,无论伟大或渺小,都站在宝座前。书都已打开。还有一本书,就是生命册,也展开了。死去的人都凭着这些书的所记载,照着他们曾经的行为接受审判。
13 Ebale monene esanzaki bakufi oyo bazalaki kati na yango; kufa elongo na mboka ya bakufi esanzaki mpe bakufi oyo bazalaki kati na yango. Mpe bato nyonso basambisamaki, moto na moto kolanda misala na ye. (Hadēs )
于是大海把其中的死人交出来,死亡和阴间也把那里的死人交出来,按照他们曾经的行为接受审判。 (Hadēs )
14 Bongo kufa mpe mboka ya bakufi ebwakamaki kati na liziba ya moto. Liziba ya moto ezali kufa ya mibale. (Hadēs , Limnē Pyr )
死亡和阴间被拋在火湖里。这火湖就是第二次死亡。 (Hadēs , Limnē Pyr )
15 Moto nyonso oyo kombo na ye ekomamaki te kati na buku ya bomoi abwakamaki kati na liziba ya moto. (Limnē Pyr )
名字没有记在生命册上的人,就被拋在火湖里。 (Limnē Pyr )