< Emoniseli 2 >

1 Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Efeso: « Tala maloba ya Ye oyo asimbi minzoto sambo na loboko na Ye ya mobali mpe atambolaka kati na bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo:
“Hãy viết cho thiên sứ của Hội Thánh Ê-phê-sô. Đây là thông điệp của Đấng cầm bảy ngôi sao trong tay phải và đi lại giữa bảy giá đèn bằng vàng:
2 Nayebi misala, pasi mpe molende na yo. Nayebi ete okoki te koyikela bato mabe mpiko; nayebi lisusu ete omekaki bato oyo balobaka ete bazali bantoma, nzokande bazali na bango bantoma te, mpe omonaki penza ete bazali bakosi.
Ta biết công việc con, nỗi lao khổ và lòng nhẫn nại của con. Ta biết con không thể dung thứ người ác. Con đã thử nghiệm những người mạo xưng là sứ đồ nhưng không phải là sứ đồ.
3 Nayebi malamu ete ozali na molende mpe oyokaki pasi makasi mpo na Kombo na Ngai, kasi olembaki te.
Con đã nhẫn nại chịu khổ vì Danh Ta, không biết mỏi mệt.
4 Nzokande, ezali na likambo moko oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango: obwaki bolingo na yo ya liboso.
Nhưng Ta khiển trách con vì con đã đánh mất tình yêu ban đầu, khi con mới theo Ta.
5 Kanisa malamu esika oyo ozalaki, liboso ete okweya! Bongola motema na yo mpe zongela misala na yo ya liboso; noki te, nakoya epai na yo mpe nakolongola etelemiselo na yo ya mwinda na esika na yango.
Hãy nhớ lại con đã sa sút từ đâu! Phải ăn năn và làm những việc con đã làm ban đầu. Nếu không, Ta sẽ sớm đến, cất bỏ giá đèn con khỏi chỗ nó.
6 Kasi ezali na likambo moko oyo nasepelaka na yango epai na yo: olingaka te misala ya bato ya lingomba ya Nikola, oyo Ngai mpe nalingaka te.
Tuy nhiên con còn một ưu điểm: Con ghét công việc của phái Ni-cô-la mà Ta cũng ghét nữa.
7 Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba! Moto oyo akolonga, nakopesa ye nzela ya kolia mbuma ya nzete ya bomoi, oyo ezali kati na Paradizo ya Nzambe. »
Ai có tai để nghe, hãy lắng nghe lời Chúa Thánh Linh kêu gọi các Hội Thánh. Những người chiến thắng, Ta sẽ cho ăn trái cây hằng sống trong Vườn của Đức Chúa Trời.”
8 Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Simirne: « Tala maloba ya Ye oyo azali Ya liboso mpe Ya suka, Ye oyo akufaki mpe azali lisusu na bomoi:
“Hãy viết cho thiên sứ của Hội Thánh Si-miệc-nơ. Đây là thông điệp của Đấng Đầu Tiên và Cuối Cùng, Đấng đã chết và sống lại:
9 Nayebi minyoko mpe bobola na yo, nzokande ozali mozwi; nayebi ndenge nini bato oyo balobaka ete bazali Bayuda, kasi bazali na bango Bayuda te, batiolaka yo; bazali nde ndako ya mayangani ya Satana.
Ta biết nỗi gian khổ, sự nghèo thiếu của con—nhưng thật ra con giàu có. Ta cũng nghe lời vu cáo của những người mạo danh người Do Thái, con cái Đức Chúa Trời, mà thật ra là hội viên của Sa-tan.
10 Kobanga te pasi oyo osengeli komona. Tala, Satana akobwaka bato mingi kati na bino na boloko mpo na komeka bino mpe bokonyokwama mikolo zomi. Zala kaka sembo kati na kondima na yo kino na kufa, mpe Ngai nakopesa yo bomoi lokola motole ya elonga na yo.
Đừng sợ những nỗi gian khổ sắp đến. Này, ma quỷ sẽ thử thách con, tống giam một vài người vào ngục tối. Con sẽ chịu khổ nạn trong mười ngày. Hãy trung thành với Ta dù phải chết, Ta sẽ cho con vương miện của sự sống vĩnh viễn.
11 Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba! Moto oyo akolonga, kufa ya mibale ekosala ye pasi ata moke te. »
Ai có tai hãy lắng nghe lời Chúa Thánh Linh kêu gọi các Hội Thánh. Những người chiến thắng sẽ không bị chết lần thứ hai.”
12 Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Pergame: « Tala maloba ya Ye oyo asimbi mopanga bapelisa na bangambo nyonso mibale:
“Hãy viết cho thiên sứ của Hội Thánh Bẹt-găm. Đây là thông điệp của Đấng có thanh gươm hai lưỡi sắc bén:
13 Nayebi malamu esika oyo ovandaka. Ezali mpe kaka na esika yango nde Satana atie kiti na ye ya bokonzi. Okweyisaki te kondima na yo epai na Ngai, ezala na mikolo oyo babomaki Antipasi, motatoli na Ngai ya sembo, kati na engumba na bino epai wapi Satana avandaka.
Ta biết nơi con ở là ngai của Sa-tan. Tuy nhiên, con đã giữ vững đức tin, không chối bỏ Danh Ta, ngay cả lúc An-ty-ba, nhân chứng trung thành của Ta, bị giết tại Bẹt-găm, là nơi Sa-tan ở.
14 Nzokande, ezali na ndambo ya makambo oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango: kati na yo, ezali na bato oyo bakangama na mateya ya Balami oyo ayebisaki Balaki ete atia motambo mpo na kotindika bana ya Isalaele kati na masumu ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, mpe kati na masumu ya kindumba.
Nhưng Ta phải khiển trách con vài điều. Con có những người theo đường lối của Ba-la-am, người đã dạy Ba-lác cách quyến rũ người Ít-ra-ên phạm tội gian dâm và ăn của cúng thần tượng.
15 Kati na Lingomba na yo, ozali mpe na bato oyo bakangama na mateya ya bato ya lingomba ya Nikola.
Con cũng có những người theo phái Ni-cô-la.
16 Boye, bongola motema na yo! Soki te, nakoya kala mingi te epai na yo mpe nakobundisa bango na mopanga ya monoko na Ngai.
Vậy, hãy ăn năn, nếu không Ta sẽ sớm đến, dùng thanh gươm ở miệng Ta đánh dẹp bọn đó.
17 Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba! Moto oyo akolonga, nakopesa ye mana oyo ebombama; nakopesa ye lisusu libanga moko ya pembe oyo bakoma kombo moko ya sika na likolo na yango, kombo oyo eyebani kaka na moto oyo akozwa yango. »
Ai có tai để nghe, hãy lắng nghe lời Chúa Thánh Linh kêu gọi các Hội Thánh. Những người chiến thắng, Ta sẽ cho ăn ma-na giữ kín. Ta sẽ cho mỗi người một viên đá trắng ghi tên mới Ta đặt cho, ngoài người nhận lãnh không ai biết được.”
18 Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Tiyatire: « Tala maloba ya Mwana na Nzambe, Ye oyo miso na Ye ezali lokola moto oyo ezali kopela makasi, mpe makolo na Ye, lokola bronze ya motuya:
“Hãy viết cho thiên sứ của Hội Thánh Thi-a-ti-rơ. Đây là thông điệp của Con Đức Chúa Trời, Đấng có mắt sáng như ngọn lửa, chân như đồng tinh luyện trong lò:
19 Nayebi misala, bolingo, kondima, etamboli mpe molende na yo; nayebi mpe ete misala oyo ozali kosala sik’oyo ezali ebele koleka oyo osalaki liboso.
Ta biết những việc con làm với tình yêu thương, đức tin, tinh thần phục vụ và lòng nhẫn nại. Con sẽ còn làm nhiều hơn nữa.
20 Nzokande, ezali na likambo moko oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango: opesaka na Jezabeli, mwasi oyo amibengaka mosakoli, nzela ya kopengwisa basali na Ngai na mateya na ye ya mabe, mpo na kotindika bango na kindumba mpe na kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu.
Nhưng đây là điều Ta khiển trách. Con dung túng cho Giê-sa-bên, người tự xưng là nữ tiên tri, nhưng dạy dỗ và quyến rũ các đầy tớ Ta phạm tội gian dâm và ăn của cúng thần tượng.
21 Napesaki ye tango mpo ete abongola motema, kasi aboyi kaka kotika kindumba na ye.
Ta đã cho nó thì giờ ăn năn, nhưng nó không chịu từ bỏ tội gian dâm.
22 Boye, nakobwaka ye na mbeto ya pasi makasi elongo na bato oyo basalaka kindumba elongo na ye. Kasi soki babongoli mitema mpe batiki kotambola kolanda mateya ya Jezabeli, nakobwaka bango te na mbeto ya pasi makasi.
Vậy, Ta sẽ khiến nó chịu đau đớn kinh khiếp trên giường bệnh, cũng như những người gian dâm với nó, trừ khi chúng nó ăn năn.
23 Nakoboma bana ya Jezabeli; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.
Ta sẽ trừ diệt con cái nó, và mọi Hội Thánh sẽ biết Ta là Đấng thăm dò lòng dạ loài người. Ta sẽ báo ứng mỗi người tùy công việc họ làm.
24 Kasi epai na bino oyo, kati na Tiyatire, bokangami te na mateya wana ya lokuta mpe boboyi koyekola mabombami ya mozindo ya Satana, kolanda ndenge babengaka yango, nazali koloba: ‹ Nakomemisa bino te mokumba mosusu na makasi;
Riêng những người tại Thi-a-ti-rơ không chịu theo tà thuyết này—không học đòi điều họ gọi là ‘lẽ thâm thúy của Sa-tan’—Ta sẽ không để các con mang gánh nặng gì khác,
25 kasi, oyo bozali na yango, bosimba yango makasi kino nakoya. ›
miễn là các con giữ vững điều mình có cho tới khi Ta đến.
26 Moto oyo akolonga, oyo akosala mokano na Ngai kino na suka, nakopesa ye bokonzi ya kokonza bikolo:
Những người nào chiến thắng và tiếp tục làm công việc Ta đến cuối cùng, Ta sẽ cho quyền thống trị các nước.
27 akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akopanza yango na biteni lokola mbeki,
Họ sẽ cai trị bằng một cây trượng sắt và đập tan chúng nó như đồ gốm.
28 ndenge Ngai mpe nazwaki bokonzi kowuta na Tata na Ngai. Nakopesa ye lisusu monzoto ya tongo.
Họ sẽ có thẩm quyền như Ta đã nhận quyền thống lãnh nơi Cha Ta, và Ta cũng sẽ cho họ ngôi sao mai.
29 Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba! »
Ai có tai để nghe, hãy nghe lời Chúa Thánh Linh kêu gọi các Hội Thánh.”

< Emoniseli 2 >