< Emoniseli 15 >
1 Bongo namonaki elembo mosusu ya monene mpe ya kokamwa kati na Lola: ba-anjelu sambo bamemaki bitumbu sambo ya suka, pamba te ezali na nzela na yango nde kanda ya Nzambe ekokokisama.
And I saw another sign in the sky, great and wonderful: seven messengers having the seven last plagues, because in these the wrath of God was completed,
2 Namonaki mpe eloko moko lokola etando: ezalaki lokola talatala, mpe monene lokola molayi ya ebale monene; ezalaki kongala lokola libanga ya talo oyo babengaka krisitali esangana na moto. Namonaki lisusu ba-oyo balongaki nyama, ekeko na yango mpe motango ya kombo na yango; bazalaki ya kotelema na likolo ya ebale monene oyo ezalaki lokola talatala mpe basimbaki mandanda oyo Nzambe apesaki bango.
and I saw as a sea of glass mingled with fire, and those who gain the victory over the beast, and his image, and his mark, [and] the number of his name, standing by the sea of the glass, having harps of God,
3 Bazalaki koyemba nzembo ya Moyize, mowumbu ya Nzambe, mpe nzembo ya Mpate: Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, misala na Yo ezali minene mpe ya kokamwa! Mokonzi ya bikolo nyonso, banzela na Yo ezali sembo mpe solo.
and they sing the song of Moses, servant of God, and the song of the Lamb, saying, “Great and wonderful [are] Your works, O LORD God, the Almighty, righteous and true [are] Your ways, O King of holy ones!
4 Nkolo, nani akomeka koboya kotosa Yo mpe koboya kopesa Kombo na Yo nkembo? Pamba te Yo kaka nde ozali Bule. Bikolo nyonso ekoya mpe ekogumbama liboso na Yo, pamba te misala na Yo ya sembo emonisami na polele.
Who may not fear You, O LORD, and glorify Your Name? Because You alone [are] holy, because all the nations will come and worship before You, because Your righteous acts were revealed.”
5 Sima na yango, natalaki mpe namonaki Tempelo kofungwama kati na Lola; mpe kati na yango, ezalaki na Mongombo ya Litatoli.
And after these things I saw, and behold, the temple of the Dwelling Place of the Testimony was opened in Heaven;
6 Ba-anjelu sambo oyo bamemaki bitumbu sambo babimaki wuta na Tempelo. Balataki banzambala basala na lino ya peto; banzambala yango ezalaki kongenga makasi, mpe bakangaki mikaba ya wolo na batolo na bango.
and the seven messengers having the seven plagues came forth out of the temple, clothed in linen, pure and radiant, and girded around the breasts with golden girdles:
7 Moko kati na bikelamu minei ya bomoi apesaki na ba-anjelu sambo bakopo sambo oyo basala na wolo mpe etonda na kanda ya Nzambe oyo azali na bomoi seko na seko. (aiōn )
and one of the four living creatures gave to the seven messengers seven golden bowls, full of the wrath of God, who is living through the ages of the ages; (aiōn )
8 Bongo lokola Tempelo etondaki na milinga kowuta na nkembo mpe na nguya ya Nzambe, moto moko te akokaki kokota kati na Tempelo yango kino bitumbu sambo oyo ba-anjelu sambo bamemaki esilaki.
and the temple was filled with smoke from the glory of God, and from His power, and no one was able to enter into the temple until the seven plagues of the seven messengers may be completed.