< Emoniseli 14 >

1 Bongo namonaki Mpate atelemi na ngomba Siona elongo na bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei. Kombo ya Mpate mpe ya Tata na Ye ezalaki ya kokomama na bambunzu ya bato yango.
Et je regardai, et je vis l'agneau debout sur le mont Sion, et avec lui cent quarante-quatre mille personnes qui avaient son nom et le nom de son Père écrits sur leurs fronts.
2 Nayokaki mongongo moko kowuta na Lola, ezalaki koyokana lokola makelele ya bibale minene mpe lokola lokito ya kake. Ezalaki lokola lokito ya babeti mandanda oyo bazali kobeta mandanda na bango
Et j'entendis une voix venant du ciel; c'était comme le bruit des grandes eaux et comme le bruit d'un fort coup de tonnerre; et la voix que j'entendais était aussi comme le son des harpes quand elles sont jouées par des harpistes.
3 mpe bazali koyemba nzembo ya sika liboso ya Kiti ya Bokonzi, ya bikelamu minei ya bomoi mpe ya bampaka. Moko te akokaki koyekola nzembo yango longola kaka bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei oyo basikolamaki wuta na mokili.
Et la voix chantait un cantique nouveau devant le trône et devant les quatre animaux, et devant les vieillards. Et personne ne pouvait apprendre ce cantique, si ce n'est les cent quarante-quatre mille rachetés de la terre.
4 Ezali bato oyo bamikomisaki mbindo te na nzela ya basi, pamba te bamibatelaki na kozanga kosangisa banzoto na bango na basi. Balandaka Mpate na bisika nyonso oyo akendaka. Basikolamaki kati na bato mpo ete babonzama lokola bambuma ya liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mpate.
Ceux-là ne se sont point souillés avec des femmes; car ils sont vierges; ceux-là suivent l'agneau partout où il les conduit; ceux-là ont été rachetés d'entre les hommes comme des prémices consacrées
5 Lokuta emonanaki te kati na minoko na bango; bazali bato bazanga pamela.
à Dieu et à l'agneau; et dans leur bouche il ne s'est point trouvé de mensonge; car ils sont sans taches.
6 Bongo namonaki anjelu mosusu kopumbwa na likolo makasi. Azalaki na Sango Malamu ya seko na seko ya kosakola na bavandi nyonso ya mokili, na bikolo nyonso, na mabota nyonso, na nkota nyonso mpe na bato nyonso. (aiōnios g166)
Et je vis un autre ange qui volait au zénith, tenant l'Évangile éternel pour l'annoncer à tous ceux qui habitaient la terre, et à toute race, tribu, langue et peuple. (aiōnios g166)
7 Azalaki koloba na mongongo makasi: « Botosa Nzambe mpe bopesa Ye nkembo, pamba te tango na Ye ya kosambisa bato ekoki! Bogumbamela Ye oyo akela likolo mpe mabele, ebale monene mpe bitima ya mayi! »
Il disait d'une voix éclatante: «Craignez Dieu, et rendez-lui gloire, car l'heure de son jugement est venue, et adorez Celui qui a fait le ciel, et la terre, et la mer, et les sources d'eaux.
8 Anjelu ya mibale alandaki mpe alobaki: « Babiloni monene ekweyi, ekweyi penza! Emelisaki bikolo nyonso vino ya kanda ya kindumba na yango. »
Et un autre ange encore, un second, le suivit, disant: «Elle est tombée, elle est tombée la grande Babylone» qui a enivré toutes les nations du vin de feu de sa fornication.»
9 Anjelu ya misato alandaki ba-anjelu wana mibale ya liboso mpe alobaki na mongongo makasi: « Moto nyonso oyo agumbamelaka nyama mpe ekeko na yango, mpe azwi elembo na yango na mbunzu to na loboko na ye,
Et un autre ange encore, un troisième, le suivit, disant d'une voix éclatante: «Celui qui adorera la bête et son image, qui prendra le signe» de la bête sur son front ou sur sa main,
10 ye mpe akomela vino ya kanda ya Nzambe, vino oyo basopaki ya peto, kati na kopo ya kanda na Ye. Mpe akonyokwama kati na moto ya sofolo liboso ya ba-anjelu ya bule mpe liboso ya Mpate.
boira du vin brûlant de Dieu, du vin pur apprêté dans la coupe de sa colère, et il sera tourmenté dans le feu et le soufre devant les saints anges et devant l'agneau;
11 Molinga ya pasi na bango ekomata na likolo mpo na libela na libela. Butu mpe moyi, bopemi ekozala te mpo na bato oyo bagumbamelaka nyama mpe ekeko na yango, mpe mpo na moto nyonso oyo akondima kozwa elembo ya kombo na yango. » (aiōn g165)
et la fumée de leur tourment monte aux siècles des siècles, et ils n'ont de repos ni jour ni nuit, ceux qui adorent la bête et son image, et qui prennent sur eux le signe» de son nom! (aiōn g165)
12 Makambo oyo ezali penza kosenga ete basantu, oyo babatelaka mibeko ya Nzambe mpe kondima na bango kati na Yesu, bazala na mpiko.
C'est ici que se montre la patience des saints qui gardent les commandements de Dieu et la foi de Jésus!
13 Bongo nayokaki mongongo moko kowuta na Lola mpe koloba na ngai: — Koma: « Kobanda sik’oyo, esengo na bato oyo bakufaka na lisanga na Nkolo! » Mpe Molimo alobaki: — Iyo, pasi na bango esilaka mpe bazwaka bopemi, pamba te misala na bango elandaka bango.
Et j'entendis une voix venant du ciel qui disait: «Écris: Heureux dès à présent les morts qui meurent dans le Seigneur!» —«Oui, dit l'Esprit, c'est pour qu'ils se reposent de leurs travaux; car leurs oeuvres les suivent.»
14 Bongo namonaki lipata moko ya pembe, mpe ekelamu moko lokola mwana na moto evandaki na likolo ya lipata yango. Ezalaki na motole ya wolo na moto na yango mpe na mbeli ya minu makasi na loboko na yango.
Et je regardai et voici, un nuage blanc, et sur ce nuage était assis «comme un fils de l'homme» ayant sur la tête une couronne d'or et dans la main une faux aiguë.
15 Bongo anjelu mosusu abimaki na Tempelo mpe alobaki na mongongo makasi na ekelamu oyo evandaki na likolo ya lipata: « Kamata mbeli na yo mpe buka bambuma, pamba te tango ya kobuka bambuma ekoki, mpe ete bambuma ya mokili ekomeli. »
Et un autre ange sortit du Temple criant d'une voix éclatante à celui qui était assis sur le nuage: «Lance ta faux et moissonne, car l'heure est venue de moissonner; la moisson de la terre est mûre!»
16 Ekelamu oyo evandaki na likolo ya lipata ebwakaki mbeli na yango na mokili, mpe mokili ezwaki lifuti na yango.
Alors celui qui était assis sur le nuage lança sa faux sur la terre, et la terre fut moissonnée.
17 Anjelu mosusu abimaki na Tempelo ya Lola; ye mpe azalaki na mbeli ya minu makasi.
Et un autre ange sortit du Temple qui est dans le ciel, tenant lui aussi, une faux aiguë.
18 Sima, anjelu mosusu oyo azalaki mokonzi ya moto alongwaki na etumbelo, mpe alobaki na mongongo makasi epai na ye oyo asimbaki mbeli ya minu makasi: « Kamata mbeli na yo ya minu mpe buka maboke ya bambuma ya vino ya mabele, pamba te bambuma yango ya vino eteli. »
Et un autre ange sortit de l'autel, il avait pouvoir sur le feu, et il appela d'une voix éclatante celui qui tenait la faux aiguë et lui dit: «Lance ta faux aiguë et vendange les grappes de la vigne de la terre, car ses raisins sont mûrs.»
19 Anjelu wana abwakaki mbeli na ye na mabele, abukaki maboke ya bambuma ya vino ya mabele mpe abwakaki yango kati na ekamolelo monene ya kanda ya Nzambe.
Et l'ange lança sa faux sur la terre, et il vendangea la vigne de la terre, et il jeta tout dans la grande cuve de la colère de Dieu.
20 Bakamolaki bambuma yango na libanda ya engumba kati na ekamolelo, mpe makila ebimaki wuta na ekamolelo yango, etondaki kino kokoma na bosanda ya monoko ya mpunda, mpe epanzanaki na etando ya bakilometele pene nkama misato.
Et la cuve fut foulée aux pieds hors de la ville, et le sang qui sortit de la cuve monta jusqu'à la hauteur des freins des chevaux, sur un espace de seize cents stades.

< Emoniseli 14 >