< Emoniseli 12 >

1 Elembo moko ya monene emonanaki na likolo, ezalaki mwasi moko. Alataki moyi lokola elamba, sanza ezalaki na se ya matambe na ye, mpe, na moto na ye, alataki motole oyo ezalaki na minzoto zomi na mibale.
KILEL lapalap eu pinnar nanlan: Li amen linaneki katipin, o maram pan na a, o a mareda uju eijokriau.
2 Azalaki na zemi mpe, lokola azalaki koyoka pasi ya kobota, azalaki koganga makasi mpo na pasi.
A lijeanlar, a weriwer en naitik, waiwairok en japedokla jan.
3 Sima na yango, elembo mosusu emonanaki na likolo, ezalaki dalagona moko ya monene mpe ya motane. Dalagona yango ezalaki na mito sambo mpe maseke zomi; mpe na mito wana sambo, moko na moko ezalaki na motole.
Pil eu kilel pinnar nanlan: Kilan, drake lapalap waitata, mona me iju, o jalon a eijok, o mar iju pon mon a.
4 Mokila na yango ekombolaki eteni moko kati na biteni misato ya minzoto ya likolo mpe ebwakaki yango na mabele. Dalagona etelemaki liboso ya mwasi oyo azalaki koyoka pasi ya kobota mpo ete elia mwana na ye tango kaka akobotama.
O a padaik urakiwei jilekij eu en uju en lan, ap jipedi ir on jappa. O drake uda mon li o, me pan naitik, pwe lao a naitiker, a en katalala na jeri.
5 Nzokande, mwasi yango abotaki mwana mobali oyo akokamba bikolo nyonso na nzela ya lingenda ya ebende. Bongo mwana na ye amemamaki epai ya Nzambe mpe epai ya Kiti na Ye ya Bokonzi.
Ari, a naitikadar na jeri ol, me pan kaun kida kainok karoj jokon mata; ari, na jeri peukadalan Kot on mol a,
6 Mwasi yango akimaki na esobe epai wapi Nzambe abongiselaki ye ebombamelo, mpo ete asungama kuna mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku motoba.
Li o tan won jap tan, me deu a onoper ren Kot, iei waja o re kin kamana i ran kid riepuki woneijok.
7 Bongo etumba ekweyaki kuna na likolo: Misheli elongo na ba-anjelu na ye babundisaki dalagona, mpe dalagona elongo na ba-anjelu na yango ebundisaki Misheli elongo na ba-anjelu na ye.
Mauin pwaidar nanlan. Mikael o japwilim a tounlan kan mauini on drake o, o drake o na kan mauini on.
8 Kasi dalagona elongaki te; boye dalagona yango elongo na ba-anjelu na yango ebungisaki esika na yango kuna na likolo.
A re jo pwaida o jolar deu ar nanlan.
9 Babwakaki dalagona monene, nyoka ya kala, oyo babengaka zabolo to Satana, oyo akosaka mokili mobimba. Ebwakamaki na mabele elongo na ba-anjelu na yango.
O drake lapalap pijikindila, iei jerpent, me ad a Tewil o Jatan, katiamau pan jappa karoj, i me pijikindi lan jappa, o na kan ian i pijikindila.
10 Bongo nayokaki, kati na Lola, mongongo moko ya makasi koloba: « Tango ya lobiko, ya nguya, ya Bokonzi ya Nzambe na biso, mpe ya nguya ya Klisto na Ye ekoki. Pamba te Mofundi ya bandeko na biso, oyo afundaka bango butu mpe moyi, liboso ya Nzambe na biso, abwakami na mokili.
O i roner nil lapalap eu nanlan indinda: Metet me pwaidar kamauapan, o wiauipan, o wei en atail Kot, o manaman en japwilim a Krijtuj, pwe karaune pan ri atail pijikindila, me kin karaun kin irail mon Kot ni ran o ni pon.
11 Kasi bango balongi ye na nzela ya makila ya Mpate, mpe na nzela ya liloba ya litatoli na bango; balingaki te bomoi na bango kino kondima ata kokufa.
A re kaloedi i aki ntan Jippul o, o pweki majan en ar kadededa lamalam; o re jo pok on maur arail lao lel on mela.
12 Yango wana, yo Lola, sepela; mpe bino bavandi ya Lola, bosepela! Kasi mawa na mokili mpe na ebale monene, pamba te Satana akiti epai na bino! Atondi na kanda, pamba te ayebi malamu ete atikali kaka na tango moke. »
I me lan en perenda, o komail me kaukaujon lole! A mejued on jappa o madau, pwe tewil me kodilan komail, makarada kaualap, pwe a aja, me a anjau me motomot.
13 Tango dalagona emonaki ete ebwakami na mokili, ekomaki kolanda mwasi oyo abotaki mwana mobali.
Drake o ni a kilaner, me a pijikindier jappa, a kanjore li, me naitiker jeri ol.
14 Kasi mapapu nyonso mibale ya mpongo moko ya monene epesamaki na mwasi yango mpo ete apumbwa kino na esika na ye, na esobe epai wapi asengeli kosungama, mosika ya nyoka, mpo na tango moko, mpo na batango, mpe mpo na ndambo ya tango.
Pa riau en manpir ikel lapalap, me panalan li o, pwen pirlan deu a nan jap tan, waja o a pan nekinek ia anjau eu, o anjau kan, o alep en anjau, doo jan maj en jerpent o, waja a pan kamana ia.
15 Bongo nyoka esanzaki wuta na monoko na yango, na sima ya mwasi, mayi ebele lokola ebale, mpo ete atiola na mbonge na yango.
A jerpent o kujepoke wei jan nan au a on li o pil, dueta pilap pot, pwen kapwiliki wei li o.
16 Kasi mabele esungaki mwasi, efungolaki monoko na yango mpe emelaki ebale oyo dalagona esanzaki wuta na monoko na yango.
A jappa puporki li o, o jappa jara pajan au a nimala pilap o, me drake o kujepoke wei jan nan au a.
17 Bongo dalagona esilikelaki mwasi mpe ekendeki kobundisa bana na ye mosusu, ba-oyo batosaka mibeko ya Nzambe mpe bakangamaka makasi na litatoli na bango na tina na Yesu.
O drake makar pan li o, ap kola, en mauini on luan kadaudok a, me kin nekidala kujoned en Kot akan o koledi kadede pan Iejuj. A nai uda pon pik en oror.

< Emoniseli 12 >