< Emoniseli 11 >
1 Bongo bapesaki ngai kekele lokola lingenda oyo bamekelaka molayi mpe balobaki na ngai: « Kende kozwa molayi ya Tempelo ya Nzambe mpe ya etumbelo, mpe tanga bato oyo bagumbamelaka Nzambe kuna.
И даде ми се тръстика като тояга; и един каза: Стани та измери Божия храм и олтара и ония които се кланят в него;
2 Kasi kozwa te molayi ya lopango ya libanda ya Tempelo, pamba te esilaki kokabama na maboko ya bikolo ya bapaya. Bapagano bakonyata engumba ya bule basanza tuku minei na mibale.
но двора, който е извън храма, остави, и недей го измерва, защото той е даден на народите, които ще тъпчат светия град четиридесет и два месеца.
3 Mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku motoba, nakopesa na batatoli na ngai mibale mosala ya kosakola. Bakolata basaki tango bakozala kosakola. »
А на двамата си свидетели ще дам да пророкуват хиляда и двесте и шестедесет, дни облечени във вретища.
4 Batatoli wana mibale bazali banzete mibale ya olive mpe bitelemiselo mibale ya minda; mpe batelemaka liboso ya Nkolo ya Mokili.
Те са двете маслини и двата светилника, които стоят пред Господаря на земята.
5 Soki moto moko ameki kosala bango mabe, moto ekobima na minoko na bango mpe ekozikisa banguna na bango. Ezali ndenge wana nde moto nyonso oyo akolinga kosala bango mabe asengeli kokufa.
И ако някой поиска да ги повреди, огън излиза от устата им, та изяжда неприятелите им; и ако поиска някой да ги повреди, така трябва той да бъде убит.
6 Batatoli yango mibale bazali na nguya ya kokanga Likolo mpo ete mvula enoka te na mikolo oyo bakozala kosakola. Bazali mpe na nguya ya kobongola mayi mpo ete ekoma makila, mpe ya kotinda pasi ya lolenge nyonso na mabele, na tango nyonso oyo balingi.
Те имат власт да заключат небето, та да не вали дъжд през времето, за което те пророкуваха; и имат власт над водите да ги превръщат в кръв и да поразяват земята с всяка язва, колкото пъти биха поискали.
7 Kasi tango bakosilisa kopesa litatoli na bango, nyama oyo ekobima wuta na libulu ya monene mpe ya molili makasi ekobundisa bango, ekolonga bango mpe ekoboma bango. (Abyssos )
И когато свършат свидетелствуването си, звярът, който възлиза от бездната, ще воюва против тях, ще ги победи и ще ги убие. (Abyssos )
8 Bakotanda bibembe na bango, na etando epai wapi bato nyonso bakutanaka kati na engumba. Kolanda molimo oyo ekambaka engumba yango, babengaka etando yango Sodome mpe Ejipito. Ezali kuna na engumba yango nde Nkolo na bango abakamaki na ekulusu.
И труповете им ще лежат по улиците на големия град, който духовно се нарича Содом и Египет, гдето и техният Господ биде разпнат.
9 Bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya nkota nyonso mpe ya mikili nyonso bakotala bibembe na bango mikolo misato na ndambo, mpe bakoboya ete bakunda yango.
И мнозина измежду людете, племената, езиците и народите ще гледат труповете им три дни и половина и не ще позволят да бъдат положени труповете им в гроб.
10 Bavandi nyonso ya mokili bakosepela na tina na kufa na bango, bakosala feti mpe bakopesana bakado, pamba te basakoli wana mibale batungisaki mingi bavandi ya mokili.
И земните жители ще се зарадват за тях, ще се развеселят, и един на друг ще си правят подаръци, защото тия два пророка са мъчили жителите на земята.
11 Kasi sima na mikolo wana misato na ndambo, pema na bomoi kowuta na Nzambe ekotaki kati na bango mpe batelemaki. Bongo somo monene ekangaki bato oyo bazalaki kotala bango.
А след трите и половина дни влезе в тях жизнено дишане от Бога, и те се изправиха на нозете си; и голям страх обзе ония, които ги гледаха.
12 Mongongo moko ya makasi kowuta na Lola elobaki na batatoli wana mibale: « Bomata awa! » Bamataki na likolo kati na lipata, wana banguna na bango bazalaki kotala.
А те чуха силен глас от небето, който им казваше: Възлезте тука. И възлязоха на небето в облак; и неприятелите им ги видяха.
13 Na ngonga wana kaka, mabele eninganaki makasi penza; mpe eteni moko kati na biteni zomi ya engumba ebukanaki mpe, na koningana yango ya mabele, bato nkoto sambo bakufaki. Bato oyo babikaki batondaki na somo mpe bapesaki Nzambe ya Likolo nkembo.
И на часа стана голям тръс, и десетата част от града падна, та измряха в тръса седем хиляди човека; и останалите се уплашиха, та отдадоха слава на небесния Бог.
14 Pasi ya mibale eleki; mpe tala, pasi ya misato ezali koya kala mingi te.
Второто горко премина; ето, иде скоро третото горко.
15 Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola; elobaki: « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. » (aiōn )
И като затръби седмият ангел, станаха силни гласове на небесата, които казваха: Световното царство стана царство на нашия Господ и на Неговия Христос; и Той ще царува до вечни векове. (aiōn )
16 Mpe bampaka tuku mibale na minei oyo bavandaki na bakiti na bango ya bokonzi liboso ya Nzambe bafukamaki bilongi kino na mabele, mpe bagumbamelaki Nzambe
И двадесетте и четири старци, седещи пред Бога на престолите си, паднаха на лицата си и се поклониха Богу, казвайки:
17 na koloba: « Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, Yo oyo ozali mpe ozalaki, tozali kopesa Yo matondi; mpo ete osalelaki nguya monene na Yo mpe okomaki kokonza.
Благодарим Ти, Господи Всемогъщи, Който си, и Който си бил, загдето си взел голямата Си сила и царуваш.
18 Bikolo etombokaki, mpe kanda na Yo epelaki. Tango ekoki mpo na kosambisa bakufi, mpe mpo na kofuta basali na Yo, basakoli, mpe basantu oyo batosaka Kombo na Yo, ezala bato minene to bato pamba; mpe mpo na koboma bato oyo babebisaka mokili. »
Народите се разгневиха; но дойде Твоят гняв и времето да се съдят мъртвите, и да дадеш наградата на слугите Си пророците и на светиите и на ония, които се боят от Твоето име, малки и големи, и да погубиш губителите на земята.
19 Bongo Tempelo ya Nzambe, oyo ezali kati na Lola efungwamaki, mpe Sanduku ya Boyokani na Ye emonanaki kuna kati na Tempelo ya Nzambe. Mpe mikalikali epelaki, mingongo mpe lokito ya bakake eyokanaki, mabele eninganaki, mpe mvula monene ya mabanga enokaki.
И отвори се Божият храм, който е на небето, и видя се в храма ковчега на Божия завет; и настанаха светкавици и гласове, гръмотевици и тръс и силен град.