< Banzembo 1 >

1 Esengo na moto oyo alandaka te toli ya bato mabe, atelemaka te na nzela ya bato ya masumu, mpe avandaka te esika moko na batioli,
悪しき者のはかりごとに歩まず、罪びとの道に立たず、あざける者の座にすわらぬ人はさいわいである。
2 kasi asepelaka na mibeko ya Yawe mpe akanisaka yango butu mpe moyi.
このような人は主のおきてをよろこび、昼も夜もそのおきてを思う。
3 Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi, oyo ebotaka mbuma na eleko na yango, mpe makasa na yango ekawukaka te; misala na ye nyonso etambolaka malamu.
このような人は流れのほとりに植えられた木の時が来ると実を結び、その葉もしぼまないように、そのなすところは皆栄える。
4 Kasi ezali bongo te mpo na bato mabe! Bazali lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe epanzaka.
悪しき者はそうでない、風の吹き去るもみがらのようだ。
5 Yango wana bato mabe bakolonga te kotelema na kosambisama, mpe bato ya masumu bakowumelaka te kati na lisanga ya bato ya sembo.
それゆえ、悪しき者はさばきに耐えない。罪びとは正しい者のつどいに立つことができない。
6 Solo, Yawe ayebi nzela ya bato ya sembo, kasi nzela ya bato mabe ememaka na libebi.
主は正しい者の道を知られる。しかし、悪しき者の道は滅びる。

< Banzembo 1 >