< Banzembo 98 >

1 Nzembo. Boyembela Yawe nzembo ya sika, pamba te asalaka makambo ya kokamwa! Na nguya mpe na bokonzi na Ye ya bonzambe, alongaki.
مزمور. سرودی تازه در وصف خداوند بسرایید؛ زیرا کارهای شگفت‌انگیز کرده و دست توانا و بازوی مقدّسش او را پیروز ساخته است.
2 Yawe atalisaki elonga na Ye, amonisaki bosembo na Ye epai ya bikolo.
خداوند پیروزی خود را اعلام نموده و عدالت نجاتبخش خویش را بر قومها آشکار ساخته است.
3 Akanisaki bolingo mpe bosembo na Ye mpo na libota ya Isalaele. Kino na suka ya mokili, elonga ya Nzambe na biso emonanaki.
او به قوم اسرائیل وعده داد که بر ایشان محبت فرماید، و به وعده‌اش وفا نمود. همهٔ مردم دنیا پیروزی رهایی‌بخش خدای ما را دیده‌اند.
4 Mokili mobimba, bobetela Yawe maboko, boyemba banzembo ya esengo mpe bobeta mindule!
ای ساکنان زمین، با شادی خداوند را بستایید؛ با صدای بلند سرود بخوانید و او را بپرستید.
5 Bobetela Yawe lindanda, boyembela Ye banzembo na lokito ya nzenze!
خداوند را با چنگ بسرایید، با چنگ و سرودها.
6 Bobeta maboko liboso ya Yawe, Mokonzi, na lokito ya bakelelo mpe ya maseke.
با کَرِناها و آوای سُرنا، به حضور خداوند پادشاه بانگ شادی برآورید!
7 Tika ete ebale monene elongo na nyonso oyo ezali kati na yango, mokili mpe bavandi na yango, bapesa lokito!
دریا و هر آنچه که در آن است، به جوش و خروش آید. زمین و ساکنانش سرود بخوانند.
8 Tika ete bibale ebeta maboko mpe bangomba nyonso eganga na esengo
نهرها دست بزنند و کوهها در حضور خداوند شادی کنند؛ زیرا خداوند برای داوری جهان می‌آید. او قومهای جهان را با عدل و انصاف داوری خواهد کرد.
9 liboso ya Yawe, pamba te azali koya kosambisa mabele! Akokata makambo na yango na bosembo.

< Banzembo 98 >