< Banzembo 95 >

1 Boya, toganga na esengo mpo na Yawe! Tobetela Libanga na biso maboko, pamba te azali Mobikisi na biso!
Dođite, kličimo Jahvi, uzvikujmo Hridi, Spasitelju svome!
2 Tokende liboso na Ye elongo na mabondeli ya kozongisa matondi, tobetela Ye maboko elongo na banzembo.
Pred lice mu stupimo s hvalama, kličimo mu u pjesmama!
3 Pamba te Yawe azali Nzambe Monene, azali Mokonzi Monene, na likolo ya banzambe nyonso.
Jer velik je Jahve, Bog naš, Kralj veliki nad svim bogovima.
4 Asimbi mozindo ya mokili kati na loboko na Ye; mpe basonge ya bangomba ezali ya Ye.
U njegovoj su ruci zemaljske dubine, njegovi su vrhunci planina.
5 Ebale monene ezali ya Ye, azali Mokeli na yango; mabele ya kokawuka ezali mpe ya Ye, asala yango na maboko na Ye.
Njegovo je more, on ga je stvorio, i kopno koje načiniše ruke njegove.
6 Boya, togumbama mpe tofukama, tobuka mabolongo na biso liboso ya Yawe, Mokeli na biso!
Dođite, prignimo koljena i padnimo nice, poklonimo se Jahvi koji nas stvori!
7 Pamba te azali Nzambe na biso; tozali bato oyo aleisaka, etonga oyo abatelaka. Lelo, soki boyoki mongongo na Ye,
Jer on je Bog naš, a mi narod paše njegove, ovce što on ih čuva. O, da danas glas mu poslušate:
8 « boyeisa mitema na bino mabanga te, ndenge bosalaki na Meriba; ndenge bosalaki na mokolo wana ya Masa kati na esobe
“Ne budite srca tvrda kao u Meribi, kao u dan Mase u pustinji
9 epai wapi batata na bino batombokelaki ngai mpe bamekaki ngai atako bamonaki ngai kosala.
gdje me iskušavahu očevi vaši premda vidješe djela moja.
10 Mibu tuku minei, nayinaki bato ya ekeke wana mpe nalobaki: ‹ Bazali bato oyo mitema na bango ebeba, bayebaka banzela na ngai te. ›
Četrdeset ljeta jadio me naraštaj onaj, pa rekoh: 'Narod su nestalna srca i ne promiču moje putove.'
11 Yango wana, kati na kanda na ngai, nakati seleka: ‹ Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai! › »
Stog se zakleh u svom gnjevu: 'Nikad neće ući u moj pokoj!'”

< Banzembo 95 >