< Banzembo 91 >

1 Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka na se ya bobatelami ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
ישב בסתר עליון בצל שדי יתלונן
2 Nalobaka na tina na Yawe: « Nzambe na ngai azali ebombamelo mpe ndako makasi na ngai; natiaka elikya na ngai kati na Ye! »
אמר--ליהוה מחסי ומצודתי אלהי אבטח-בו
3 Ye nde akangolaka yo wuta na mitambo ya mokangi bandeke mpe na bokono oyo ebikisaka te.
כי הוא יצילך מפח יקוש מדבר הוות
4 Abombaka yo na se ya mapapu na Ye, mpe ozwaka ebombamelo ya malonga na se ya mapapu na Ye; bolingo na Ye ebatelaka lokola nguba mpe lokola elamba ya ebende.
באברתו יסך לך--ותחת-כנפיו תחסה צנה וסחרה אמתו
5 Okobanga te somo ya butu, makonga oyo epumbwaka na moyi makasi,
לא-תירא מפחד לילה מחץ יעוף יומם
6 bokono oyo etambolaka kati na molili mpe pasi oyo ebebisaka na midi.
מדבר באפל יהלך מקטב ישוד צהרים
7 Ezala bato nkoto moko bakweyi pembeni na yo, mpe bato nkoto zomi, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, ekozwa yo ata moke te.
יפל מצדך אלף--ורבבה מימינך אליך לא יגש
8 Okotala kaka na miso na yo mpe okomona ndenge nini bato mabe bazali kozwa etumbu lokola lifuti na bango.
רק בעיניך תביט ושלמת רשעים תראה
9 Soki otatoli: « Yawe azali ebombamelo na ngai, » mpe okomisi Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekimelo na yo,
כי-אתה יהוה מחסי עליון שמת מעונך
10 mabe ata moko te ekokweyela yo, pasi ata moko te ekopusana na ndako na yo;
לא-תאנה אליך רעה ונגע לא-יקרב באהלך
11 pamba te akopesa mitindo na ba-anjelu na Ye ete babatela yo malamu na banzela na yo nyonso.
כי מלאכיו יצוה-לך לשמרך בכל-דרכיך
12 Bakomema yo na maboko na bango mpo ete lokolo na yo etutana na libanga te;
על-כפים ישאונך פן-תגף באבן רגלך
13 okotambola na likolo ya nkosi mpe ya etupa, okonyata nkosi ya monene mpe dalagona.
על-שחל ופתן תדרך תרמס כפיר ותנין
14 Lokola akangami na ngai, nakokangola ye; lokola ayebi Kombo na Ngai, nakobatela ye.
כי בי חשק ואפלטהו אשגבהו כי-ידע שמי
15 Soki abeleli ngai, nakoyanola ye; nakozala elongo na ye na tango ya pasi, nakokangola ye mpe nakopesa ye lokumu.
יקראני ואענהו--עמו-אנכי בצרה אחלצהו ואכבדהו
16 Nakopesa ye bomoi molayi mpe nakolakisa ye lobiko na ngai.
ארך ימים אשביעהו ואראהו בישועתי

< Banzembo 91 >