< Banzembo 89 >
1 Maloba ya Etani, moto ya Ezera. Nakoyemba tango nyonso bolingo ya Yawe; monoko na ngai ekosakola boyengebene na Yo libela na libela.
Милости ћу Господње певати увек, од колена на колено јављаћу истину Твоју устима својим.
2 Solo, nazali kotatola yango: « Miboko ya bolingo na Yo ezali na suka te; ovandisi boyengebene na Yo kati na likolo. »
Јер знам да је зававек основана милост, и на небесима да си утврдио истину своју, рекавши:
3 Olobaki: « Nasali boyokani elongo na moponami na ngai, nalapi ndayi epai ya mosali na ngai, Davidi:
"Учиних завет с избраним својим, заклех се Давиду, слузи свом:
4 ‹ Nakokomisa yo libota ya bokonzi mpo na tango nyonso mpe nakolendisa kiti na yo ya bokonzi mpo na seko. › »
Довека ћу утврђивати семе твоје и престо твој уређивати од колена до колена."
5 Yawe, Lola esanzolaka misala na Yo ya kokamwa mpe bosembo na Yo kati na lisanga ya basantu.
Небо казује чудеса Твоја, Господе, и истину Твоју сабор светих.
6 Nani akokani na Yawe kuna na likolo? Nani akokani na Yawe kati na mampinga ya likolo?
Јер ко је над облацима раван Господу? Ко ће се изједначити с Господом међу синовима Божијим?
7 Azali Nzambe ya somo kati na lisanga ya basantu; solo, azali somo koleka ba-oyo nyonso bazingeli Ye.
Богу се ваља клањати на сабору светих, страшнији је од свих који су око Њега.
8 Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, nani azali na nguya lokola Yo? Nani, oh Yawe? Boyengebene na Yo ezingeli Yo.
Господе, Боже над војскама! Ко је силан као Ти, Боже? И истина је Твоја око Тебе.
9 Yo nde okonzaka lolendo ya ebale monene mpe okitisaka bambonge na yango soki etomboki.
Ти владаш над силом морском; кад подигне вале своје, Ти их укроћаваш.
10 Yo nde olongaki Rahavi, dalagona ya Ejipito, kino koboma ye; mpe, na nguya na Yo, opanzaki banguna na Yo.
Ти си оборио охоли Мисир као рањеника, крепком мишицом својом расејао си непријатеље своје.
11 Likolo ezali ya Yo; mabele mpe ezali ya Yo! Yo nde osala mokili mpe nyonso oyo ezali kati na yango.
Твоје је небо и Твоја је земља; Ти си саздао васиљену и шта је год у њој.
12 Yo nde okela Nor mpe Sude; Tabori mpe Erimoni egangaka na esengo mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
Север и југ Ти си створио, Тавор и Ермон о Твом се имену радује.
13 Loboko na Yo ezali na makasi, loboko na Yo ezali na nguya, loboko na Yo ya mobali oyo otombola.
Твоја је мишица крепка, силна је рука Твоја, и висока десница Твоја.
14 Bosembo mpe alima ezali miboko ya Kiti ya Bokonzi na Yo, boyengebene mpe bolingo etambolaka liboso na Yo.
Благост је и правда подножје престолу Твом, милост и истина иде пред лицем Твојим.
15 Esengo na bato oyo bayebi kobetela Yo maboko! Yawe, batambolaka na pole ya elongi na Yo,
Благо народу који зна трубну поклич! Господе! У светлости лица Твог они ходе;
16 basepelaka mikolo nyonso na Kombo na Yo, basanzolaka bosembo na Yo.
Именом се Твојим радују сав дан, и правдом Твојом узвишују се.
17 Pamba te ozali nkembo mpe nguya na bango; mpe olongisaka biso na ngolu na Yo.
Јер си Ти красота силе њихове, и по милости Твојој узвишује се рог наш.
18 Yawe azali nguba na biso; Mosantu ya Isalaele azali Mokonzi na biso.
Јер је од Господа одбрана наша, и од Светог Израиљевог цар наш.
19 Mokolo moko, olobaki na bayengebene na Yo kati na emoniseli: « Nasungaki elombe moko ya bitumba, natombolaki elenge mobali moko kati na bato na ngai;
Тада си говорио у утвари вернима својим, и рекао: "Послах помоћ јунаку, узвисих избраног свог из народа.
20 namonaki Davidi, mosali na ngai; napakolaki ye mafuta na ngai ya bule.
Нађох Давида, слугу свог, светим уљем својим помазах га.
21 Nakobatela ye na loboko na ngai ya nguya, mpe loboko na ngai ekokomisa ye makasi.
Рука ће моја бити једнако с њим, и мишица моја крепиће га.
22 Monguna akobimela ye ata moke te na pwasa, moto mabe akokoka konyokola ye te.
Неће га непријатељ надвладати, и син безакоња неће му досадити.
23 Nakobebisa banguna na ye liboso na ye mpe nakoboma bayini na ye.
Потрћу пред лицем његовим непријатеље његове, и ненавиднике његове поразићу.
24 Bolingo mpe boyengebene na ngai ekozala elongo na ye; mpe na Kombo na Ngai, akotombola elongi.
Истина је моја и милост моја с њим; и у моје име узвисиће се рог његов.
25 Nakotia ebale monene na se ya loboko na ye, mpe bibale, na se ya loboko na ye ya mobali.
Пружићу на море руку његову, и на реке десницу његову.
26 Akobelela ngai boye: ‹ Ozali Tata na ngai, Nzambe na ngai, Libanga mpe Mobikisi na ngai! ›
Он ће ме звати: Ти си Отац мој, Бог мој и град спасења мог.
27 Mpe ngai, nakokomisa ye mwana na ngai ya liboso, mokonzi oyo aleki na kotombwama kati na bakonzi ya mokili.
И ја ћу га учинити првенцем, вишим од царева земаљских.
28 Nakobatela mpo na seko bolingo na ngai mpo na ye; boyokani na ngai elongo na ye ekotikala kobeba te.
Довека ћу му хранити милост своју, и завет је мој с њим веран.
29 Nakobatela mpo na libela libota na ye ya bokonzi, mpe kiti na ye ya bokonzi ekowumela ndenge moko na likolo.
Продужићу семе његово довека, и престо његов као дане небеске.
30 Soki bana na ye basundoli mibeko na ngai mpe balandi bosembo na ngai te,
Ако синови његови оставе закон мој, и не узиду у заповестима мојим;
31 soki babuki mitindo na ngai mpe babateli te mibeko na ngai,
Ако погазе уредбе моје, и заповести моје не сачувају,
32 nakopesa bango etumbu na nzela ya lingenda, mpo na botomboki na bango, mpe na nzela ya makofi, mpo na masumu na bango;
Онда ћу их покарати прутом за непокорност, и ранама за безакоње њихово;
33 kasi nakowangana te bolingo na ngai mpe nakobongola te boyengebene na ngai.
Али милости своје нећу узети од њега, нити ћу преврнути истином својом;
34 Nakosambwisa te boyokani na ngai mpe nakobongola te maloba na ngai.
Нећу погазити завет свој, и шта је изашло из уста мојих нећу порећи.
35 Nalapaki yango na ndayi mbala moko mpo na libela na Kombo ya bosantu na ngai: ‹ Nakokosa Davidi te! ›
Једном се заклех светошћу својом; зар да слажем Давиду?
36 Libota na ye ya bokonzi ekowumela mpo na libela, mpe kiti na ye ya bokonzi ekowumela lokola moyi liboso na ngai.
Семе ће његово трајати довека, и престо његов као сунце преда мном;
37 Solo, lokola sanza, ekowumela na bokonzi mpo na libela. Motatoli oyo azali kuna kati na likolo akoki kokosa te. »
Он ће стајати увек као месец и верни сведок у облацима."
38 Nzokande, obwakaki, omonaki pamba, osilikelaki mopakolami na Yo!
А сад си одбацио и занемарио, разгневио си се на помазаника свог;
39 Owanganaki boyokani oyo osalaki elongo na mosali na Yo, obwakaki na mabele mpe osambwisaki motole na ye.
Занемарио си завет са слугом својим, бацио си на земљу венац његов.
40 Otobolaki madusu kati na bamir na ye nyonso mpe obukaki bandako na ye, oyo batonga makasi;
Развалио си све ограде његове, градове његове обратио си у зидине.
41 bato nyonso oyo balekaki wana babotolaki ye biloko, mpe bavandi ya pembeni na ye bakomaki kotiola ye.
Плене га сви који пролазе онуда, поста подсмех у суседа својих.
42 Obakisaki makasi ya bayini na ye mpe otondisaki banguna na ye nyonso na esengo,
Узвисио си десницу непријатеља његових, обрадовао си све противнике његове.
43 osalaki kutu ete mopanga na ye ebalukela ye moko mpe osungaki ye te na bitumba;
Завратио си оштрице мача његовог, и ниси га укрепио у боју;
44 osilisaki kongenga ya lokumu na ye, obwakaki kiti na ye ya bokonzi na mabele;
Узео си му светлост, и престо његов оборио си на земљу;
45 okomisaki moke mikolo ya bolenge na ye mpe olatisaki ye kazaka ya soni.
Скратио си дане младости његове и обукао га у срамоту.
46 Yawe, kino tango nini? Okomibomba penza tango nyonso? Kino tango nini kanda na Yo ekongala lokola moto?
Докле ћеш се, Господе, једнако одвраћати, докле ће као огањ пламтети гнев Твој?
47 Kanisa motango ya mikolo ya bomoi na ngai! Okelaki penza bato mpo na suka oyo ezanga ata tina!
Опомени се какав је век мој, како си ни на шта створио све синове Адамове?
48 Moto nani akoki kozala na bomoi mpe azanga komona kufa? Nani akolonga kokima nguya ya mboka ya bakufi? (Sheol )
Који је човек живео и није смрти видео, и избавио душу своју из руку паклених? (Sheol )
49 Nkolo, wapi bolingo na Yo ya kala oyo alakaki Davidi na boyengebene na Yo na nzela ya ndayi?
Где су пређашње милости Твоје, Господе? Клео си се Давиду истином својом.
50 Nkolo, kanisa ndenge bazali kosakanela basali na Yo; kobosana te ete namemi mokumba ya bato oyo nyonso!
Опомени се, Господе, прекора слугу својих, који носим у недрима својим од свих силних народа,
51 Yawe, kanisa mafinga ya banguna na Yo, oyo batiolaka bomoi ya mopakolami na Yo!
Којим коре непријатељи Твоји, Господе, којим коре траг помазаника Твог.
52 Tika ete Yawe apambolama libela na libela!
Благословен Господ увек! Амин, амин.