< Banzembo 88 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore. Ezali ya koyemba na flite. Nzembo ya Emani, moto ya Ezera. Yawe, ozali Nzambe; Yo nde obikisaka ngai! Butu mpe moyi, nagangaka epai na Yo!
برای رهبر سرایندگان: سرودی در مایۀ «مَحَلَت لِعَنوت». مزموری از پسران قورَح. قصیدۀ هیمانِ اِزراحی. ای خداوند، ای خدای نجات من، شب و روز در حضور تو گریه و زاری کرده‌ام.
2 Tika ete losambo na ngai ekoma epai na Yo; Yoka koganga na ngai!
دعای مرا بشنو و به ناله‌ام توجه فرما.
3 Pamba te bomoi na ngai etondi na pasi mpe nakomi pene ya kokufa. (Sheol h7585)
زندگی من پر از رنج و مصیبت است؛ جانم به لب رسیده است! (Sheol h7585)
4 Batie ngai na molongo ya bato oyo bazali kokende na kunda; nakeseni ata moke te na moto oyo azali lisusu na makasi te.
رمقی در من نمانده است؛ مانند مرده شده‌ام،
5 Nakomi moko kati na bakufi, lokola bato oyo basila kokufa na bitumba mpe bazali sik’oyo kati na kunda, lokola bato oyo okanisaka lisusu te, pamba te obatelaka bango lisusu te.
مانند کشته‌ای که به قبر سپرده شده، مانند مرده‌ای که دیگر به یاد نخواهی آورد و لطف خود را شامل حالش نخواهی فرمود.
6 Obwaki ngai na libulu ya mozindo makasi, kati na mozindo ya molili.
تو مرا به اعماق تاریکی انداخته‌ای
7 Kanda na Yo ya makasi ekweyeli ngai, bambonge na yango nyonso ezali konyokola ngai.
غضب تو بر من سنگینی می‌کند؛ طوفان خشم تو مرا در بر گرفته است.
8 Okaboli ngai na balingami na ngai ya motema, okomisi ngai eloko ya nkele na miso na bango; nakomi lokola mokangami kati na boloko, nakoki kobima te!
آشنایانم را از من دور کرده‌ای و آنها را از من بیزار ساخته‌ای. چنان گرفتار شده‌ام که نمی‌توانم برای خلاصی خود چاره‌ای بیندیشم.
9 Miso na ngai ezali komona lisusu te mpo na pasi; nzokande nabelelaka Yo, Yawe, mikolo nyonso, natombolaka maboko na ngai epai na Yo!
چشمانم از شدت گریه ضعیف شده‌اند. ای خداوند، هر روز از تو درخواست کمک نموده و دست نیاز به سویت دراز می‌کنم تا بر من رحم کنی.
10 Boni, okosala bikamwa mpo na bakufi? Boni, bakufi bakoki kotelema mpo na kosanzola Yo?
وقتی بمیرم، دیگر معجزات و کمک تو برایم چه فایده خواهد داشت؟ آنگاه دیگر چگونه می‌توانم تو را ستایش کنم؟
11 Boni, bolingo na Yo etatolamaka kati na kunda, mpe bosembo na Yo, kati na mboka ya bakufi?
مگر آنانی که در قبر هستند می‌توانند از محبت و وفاداری تو سخن بگویند؟
12 Boni, bikamwa na Yo eyebani kati na molili, mpe bosembo na Yo, kati na mokili ya bato oyo babosana?
آیا معجزهٔ تو در آن مکان تاریک دیده می‌شود؟ آیا می‌توان در عالم خاموشی از وفاداری و عدالت تو سخن گفت؟
13 Kasi ngai, nazali kobelela nde Yo, Yawe; nabondelaka Yo tongo nyonso.
خداوندا، نزد تو فریاد برمی‌آورم و کمک می‌طلبم. هر روز صبح به پیشگاه تو دعا می‌کنم.
14 Yawe, mpo na nini kobwaka ngai mpe kobombela ngai elongi na Yo?
چرا مرا ترک نموده و روی خود را از من برگردانیده‌ای؟
15 Wuta bolenge na ngai, nazali mobola mpe moto na pasi; mpe okweyiselaka ngai makambo na Yo ya somo! Solo, elikya esili ngai!
از جوانی تاکنون، در رنج و خطر مرگ بوده‌ام و همیشه از جانب تو تنبیه شده‌ام.
16 Kanda makasi na Yo ebetaka ngai, minyoko oyo ewutaka epai na Yo ekomisaka ngai moto pamba.
خشم شدید تو مرا پریشان کرده و از ترس تو ناتوان شده‌ام.
17 Ezingelaka ngai mikolo nyonso, lokola mayi, na bangambo nyonso.
خشم تو و ترس از تو تمام روز چون سیل از هر سو مرا احاطه می‌کند.
18 Okaboli ngai na baninga mpe balingami na ngai, natikali na moninga kaka moko ya motema: molili!
دوستان و عزیزانم را از من دور کرده‌ای؛ تاریکی تنها مونس من است.

< Banzembo 88 >