< Banzembo 87 >
1 Nzembo ya bana ya Kore. Yawe atia moboko ya Siona na likolo ya bangomba ya bule.
Le sue fondamenta sono sui monti santi; Dei figli di Core. Salmo. Canto.
2 Yawe alingaka bikuke ya Siona koleka bandako nyonso ya Jakobi.
il Signore ama le porte di Sion più di tutte le dimore di Giacobbe.
3 Oh engumba ya Nzambe, maloba ya nkembo ezali kolobama na tina na yo!
Di te si dicono cose stupende, città di Dio.
4 Kati na bato oyo bayebi ngai, natangi Rahavi mpe Babiloni. Ezali kuna na Siona nde Filisitia, Tiri mpe Kushi ebimela.
Ricorderò Raab e Babilonia fra quelli che mi conoscono; ecco, Palestina, Tiro ed Etiopia: tutti là sono nati.
5 Na tina na Siona, maloba oyo ekolobama: « Bato nyonso babimela awa, mpe ezali Ye-Oyo-Aleki-Likolo nde alendisaka yango. »
Si dirà di Sion: «L'uno e l'altro è nato in essa e l'Altissimo la tiene salda».
6 Tango Yawe akomaki kati na buku ya bikolo, akomaki boye mpo na moko na moko kati na bango: « Moto songolo abotama kati na Siona! »
Il Signore scriverà nel libro dei popoli: «Là costui è nato».
7 Mpe tango bayembaka mpe babinaka, balobaka: « Bitima na ngai nyonso ezali kati na yo! »
E danzando canteranno: «Sono in te tutte le mie sorgenti».