< Banzembo 87 >

1 Nzembo ya bana ya Kore. Yawe atia moboko ya Siona na likolo ya bangomba ya bule. 2 Yawe alingaka bikuke ya Siona koleka bandako nyonso ya Jakobi. 3 Oh engumba ya Nzambe, maloba ya nkembo ezali kolobama na tina na yo! 4 Kati na bato oyo bayebi ngai, natangi Rahavi mpe Babiloni. Ezali kuna na Siona nde Filisitia, Tiri mpe Kushi ebimela. 5 Na tina na Siona, maloba oyo ekolobama: « Bato nyonso babimela awa, mpe ezali Ye-Oyo-Aleki-Likolo nde alendisaka yango. » 6 Tango Yawe akomaki kati na buku ya bikolo, akomaki boye mpo na moko na moko kati na bango: « Moto songolo abotama kati na Siona! » 7 Mpe tango bayembaka mpe babinaka, balobaka: « Bitima na ngai nyonso ezali kati na yo! »

< Banzembo 87 >