< Banzembo 86 >

1 Libondeli ya Davidi. Yawe, yoka mpe yanola ngai; pamba te nazali mobola mpe moto akelela.
A prayer of David. Incline Your ear, O LORD, and answer me, for I am poor and needy.
2 Batela bomoi na ngai, pamba te nazali moyengebene na Yo. Yo, Nzambe na ngai, bikisa ngai, mosali na Yo, oyo natiaka elikya kati na Yo.
Preserve my soul, for I am godly. You are my God; save Your servant who trusts in You.
3 Oh Nkolo, yokela ngai mawa; pamba te nabelelaka Yo tango nyonso!
Be merciful to me, O Lord, for I call to You all day long.
4 Nkolo, sepelisa motema na ngai, mosali na Yo, pamba te natombolaka molimo na ngai epai na Yo.
Bring joy to Your servant, for to You, O Lord, I lift up my soul.
5 Nkolo, ozali malamu, olimbisaka, otonda na bolingo mpo na bato nyonso oyo babelelaka Yo.
For You, O Lord, are kind and forgiving, rich in loving devotion to all who call on You.
6 Yawe, yoka losambo na ngai, yoka libondeli na ngai!
Hear my prayer, O LORD, and attend to my plea for mercy.
7 Na mokolo ya pasi na ngai, nabelelaka Yo, pamba te oyanolaka ngai.
In the day of my distress I call on You, because You answer me.
8 Nkolo, nzambe moko te ekokani na Yo, kati na banzambe; moko te ekoki kosala makambo oyo Yo osalaka.
O Lord, there is none like You among the gods, nor any works like Yours.
9 Nkolo, bikolo nyonso oyo osala ekoya kogumbama liboso na Yo mpe ekoya kopesa Kombo na Yo nkembo.
All the nations You have made will come and bow before You, O Lord, and they will glorify Your name.
10 Pamba te ozali monene mpe osalaka bikamwa; Yo kaka nde ozali Nzambe.
For You are great and perform wonders; You alone are God.
11 Yawe, lakisa ngai nzela na Yo, mpe nakotambola kolanda bosolo na Yo. Pesa ngai motema ya sembo mpo ete natosa Yo.
Teach me Your way, O LORD, that I may walk in Your truth. Give me an undivided heart, that I may fear Your name.
12 Nkolo, Nzambe na ngai, nakosanzola Yo, na motema na ngai mobimba, nakopesa Kombo na Yo nkembo mpo na Yo libela.
I will praise You, O Lord my God, with all my heart; I will glorify Your name forever.
13 Pamba te bolingo na Yo mpo na ngai ezali monene, mpe okangolaki ngai wuta na mozindo ya mboka ya bakufi. (Sheol h7585)
For great is Your loving devotion to me; You have delivered me from the depths of Sheol. (Sheol h7585)
14 Nzambe, bato ya lofundu bazali kobundisa ngai, mpe ngulupa ya bato na kanza bazali koluka koboma ngai; batosaka Yo ata moke te.
The arrogant rise against me, O God; a band of ruthless men seeks my life, with no regard for You.
15 Kasi Yo Nkolo, ozali Nzambe na mawa mpe na ngolu, osilikaka noki te, otonda na bolingo mpe na boyengebene.
But You, O Lord, are a compassionate and gracious God, slow to anger, abounding in loving devotion and faithfulness.
16 Balola elongi na Yo epai na ngai mpe yokela ngai mawa; pesa ngai, mosali na Yo, makasi mpe bikisa ngai mwana ya mwasi mosali na Yo!
Turn to me and have mercy; grant Your strength to Your servant; save the son of Your maidservant.
17 Salela ngai elembo ya boboto na Yo mpo ete banguna na ngai bamona yango mpe bakufa soni! Yawe, ozali Mosungi mpe Mobondi na ngai.
Show me a sign of Your goodness, that my enemies may see and be ashamed; for You, O LORD, have helped me and comforted me.

< Banzembo 86 >