< Banzembo 85 >
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore. Yawe, osalelaki mboka na Yo bolamu, ozongisaki bato ya Jakobi, oyo bazalaki na bowumbu,
Éternel, tu as été propice envers ta terre; tu as ramené les captifs de Jacob.
2 olimbisaki mabe ya bato na Yo mpe olongolaki masumu na bango nyonso.
Tu as pardonné l'iniquité de ton peuple; tu as couvert tous leurs péchés. (Sélah)
3 Otikaki kanda na Yo nyonso ya makasi mpe okitisaki motema na Yo.
Tu as retiré tout ton courroux; tu es revenu de l'ardeur de ta colère.
4 Nzambe Mobikisi na biso, zongela biso! Longola kanda na Yo na tina na biso!
Rétablis-nous, ô Dieu de notre salut, et fais cesser ton indignation contre nous!
5 Boni, okosilikela biso penza mpo na libela? Okokangela penza biso kanda mpo na tango nyonso?
Seras-tu toujours courroucé contre nous? Feras-tu durer ta colère d'âge en âge?
6 Okozongisela biso lisusu bomoi te mpo ete bato na Yo basepela kati na Yo?
Ne reviendras-tu pas nous rendre la vie, afin que ton peuple se réjouisse en toi?
7 Yawe, talisa biso bolingo na Yo, mpe pesa biso lobiko na Yo!
Fais-nous voir ta bonté, ô Éternel, et accorde-nous ta délivrance!
8 Yawe, nakoyoka maloba na Nzambe; pamba te alobaka mpo na kimia ya bato na Ye mpe ya bayengebene na Ye. Kasi tika ete bazongela te botomboki na bango.
J'écouterai ce que dit Dieu, l'Éternel, car il parlera de paix à son peuple et à ses bien-aimés, afin qu'ils ne retournent plus à la folie.
9 Solo, lobiko na Ye ezali pene ya bato oyo batosaka Ye mpo ete nkembo na Ye ewumela kati na mboka na biso.
Oui, son salut est près de ceux qui le craignent, afin que la gloire habite dans notre terre.
10 Bolingo mpe boyengebene ekutanaka, bosembo mpe kimia eyambanaka.
La bonté et la vérité se sont rencontrées; la justice et la paix se sont entrebaisées.
11 Bosolo ebotaka wuta na mabele, mpe bosembo etalaka wuta na likolo.
La vérité germera de la terre, et la justice regardera des cieux.
12 Ye moko Yawe akopesa esengo, mpe mabele na biso ekobota bambuma.
L'Éternel aussi donnera ses biens, et notre terre donnera ses fruits.
13 Bosembo etambolaka liboso na Ye mpe elakisaka nzela oyo ekolekela.
La justice marchera devant lui, et il la mettra partout où il passera.