< Banzembo 84 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore. Ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati. Yawe, Mokonzi ya mampinga, tala ndenge bisika oyo ovandaka ezali kopesa posa! 2 Nzoto na ngai mobimba ebukani pene nakufa mpo na posa makasi ya lopango ya Yawe! Motema mpe nzoto na ngai ezali koganga epai ya Nzambe na bomoi. 3 Ndeke ya moke ezwaka esika ya kovanda, mpe mbilambila esalaka zala epai wapi etiaka bana na yango, pene ya bitumbelo na Yo, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai. 4 Esengo na bavandi ya Ndako na Yo! Bakokumisa Yo tango nyonso! 5 Esengo na bato oyo bazwaka makasi kati na Yo; bakendaka na esengo na Tempelo na Yo! 6 Tango bakatisaka Lubwaku ya Baka, bakomisaka yango esika oyo etonda na bitima ya mayi, mpe mvula etondisaka yango na mapamboli. 7 Makasi na bango ebakisamaka tango nyonso kino bakomaka na Siona, liboso ya Nzambe. 8 Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, yoka losambo na ngai! Nzambe ya Jakobi, yoka ngai! 9 Oh Nzambe, Yo oyo ozali nguba na biso, tala! Tala elongi ya mopakolami na Yo! 10 Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe. 11 Pamba te, mpo na biso, Yawe Nzambe azali moyi mpe nguba; Yawe apesaka ngolu mpe nkembo, aboyaka kopesa eloko moko te epai ya bato oyo batambolaka bazanga pamela. 12 Yawe, Mokonzi ya mampinga, esengo na moto oyo atiaka elikya kati na Yo!

< Banzembo 84 >