< Banzembo 83 >

1 Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, kovanda nye te! Nzambe, kokanga monoko na Yo te, kotikala kimia te!
Cántico. Salmo de Asaf. Oh Dios, no permanezcas mudo; no estés sordo, oh Dios, ni te muestres pasivo.
2 Tala ndenge banguna na Yo bazali kotomboka; tala ndenge bayini na Yo bazali kotombola mito na bango!
Mira el tumulto que hacen tus enemigos, y cómo los que te odian yerguen su cabeza.
3 Bazali kosalela bato na Yo likita, kokanela bato oyo obatelaka.
A tu pueblo le traman asechanzas; se confabulan contra los que Tú proteges.
4 Bazali koloba: « Boya, toboma bango nyonso mpo ete ekolo na bango ezala lisusu te, mpo ete batanga lisusu kombo ya Isalaele te. »
“Venid (dicen), borrémoslos; que ya no sean pueblo; no quede ni memoria del nombre de Israel.”
5 Basangani mpe bayokani, basali boyokani mpo na kotelemela Yo:
Así conspiran todos a una y forman liga contra Ti:
6 bato ya Edomi mpe bato ya Isimaeli, bato ya Moabi mpe bato ya Agari,
las tiendas de Edom y los ismaelitas, Moab y los agarenos,
7 Gebali, Amoni mpe Amaleki, bato ya Filisitia elongo na bato ya Tiri.
Gebal y Ammón y Amalec, Filistea y los habitantes de Tiro.
8 Bato ya Asiri mpe basangani elongo na bango mpo na kobakisa bakitani ya Loti makasi.
También los asirios se les han unido, y se han hecho auxiliares de los hijos de Lot.
9 Sala bango ndenge osalaki Madiani, ndenge osalaki Sisera mpe Yabini, kuna na mayi ya Kishoni.
Haz Tú con ellos como con Madián y con Sísara, y con Jabín, junto al torrente Cisón;
10 Babebisamaki na Eyini-Dori, bakomaki lokola matiti ya kopola mpo na mabele.
que perecieron en Endor, y vinieron a ser como estiércol para la tierra.
11 Sala bato na bango ya lokumu ndenge osalaki Orebi mpe Zeebi; mpe sala bakambi na bango ndenge osalaki Zeba mpe Tsalimuna
Trata a sus caudillos como a Oreb y a Zeb; a todos sus jefes, como a Zebee y a Salmaná,
12 oyo bazalaki koloba: « Tobotola mabele ya Nzambe! »
pues han dicho: “Ocupemos para nosotros las tierras de Dios.”
13 Nzambe na ngai, balola bango lokola matiti oyo mopepe ezali kopumbwisa.
Dios mío, hazlos como el polvo en un remolino y la hojarasca presa del viento.
14 Ndenge moto ezikisaka zamba, ndenge moto makasi ezikisaka bangomba,
Como fuego que consume la selva, como llama que abrasa los montes,
15 landa bango na nzela ya mopepe na Yo mpe bangisa bango na nzela ya mopepe makasi na Yo!
así persíguelos en tu tempestad, y atérralos en tu borrasca.
16 Yawe, tondisa bilongi na bango na soni mpo ete baluka Kombo na Yo!
Haz que sus rostros se cubran de vergüenza, para que busquen tu nombre ¡oh Dios!
17 Tika ete soni mpe somo makasi elata bango mpo na libela! Tika ete bakufa na soni!
Queden para siempre en la ignominia y en la turbación; sean confundidos y perezcan.
18 Tika bayeba ete Yo, oyo Kombo na Yo ezali Yawe, ozali Ye-Oyo-Aleki-Likolo kati na mokili mobimba!
Y sepan que tu Nombre es Yahvé; y que solo Tú eres el Altísimo sobre toda la tierra.

< Banzembo 83 >