< Banzembo 82 >
1 Nzembo ya Azafi. Nzambe atelemi kati na lisanga na Ye, azali kokata makambo kati na banzambe.
詠【警告為民長者】阿撒夫的詩歌。 天主親臨眾神的會議,在眾神之中主張公理:
2 Kino tango nini bokokata makambo na bosembo te mpe bokokotela bato mabe?
你們不正義審理,偏袒惡人要到何時? (休止)
3 Bolongisa moto oyo azangi makasi mpe mwana etike, bokata likambo ya moto ya mawa mpe ya mobola;
你們應保護受苦的人和孤兒,為貧窮與可憐的人主持正義。
4 bopesa bonsomi na moto oyo azangi makasi mpe na mobola, bokangola bango wuta na maboko ya bato mabe.
應拯救弱小及窮苦的人,由惡人的爪牙拯救他們。
5 Bazangi boyebi mpe bososoli, bazali koyengayenga kati na molili; miboko nyonso ya mokili ezali koningana.
他們原本無知無識,在暗中摸索,卻把大地的一切根基動搖。
6 Nalobaki: « Bozali banzambe, bozali bino nyonso bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo! »
我親自說過:你們都是神,眾人都是至高者的子民。
7 Nzokande, bokufaka lokola bato nyonso mpe bokweyaka lokola bakambi.
但是你們必要死亡像眾人一樣,必要消失像任何一位王侯一樣。
8 Nzambe, telema, sambisa mokili; pamba te bikolo nyonso ezali libula na Yo.
天主,求您起來審判下土,因為萬國都應由您佔據。