< Banzembo 81 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Azafi. Ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati. Boganga na esengo epai ya Nzambe, makasi na biso! Bobetela Nzambe ya Jakobi maboko!
For the choirmaster. According to Gittith. Of Asaph. Sing for joy to God our strength; make a joyful noise to the God of Jacob.
2 Boyemba banzembo, bobeta bambunda mike, lindanda oyo ebimisaka lokito kitoko mpe nzenze!
Lift up a song, strike the tambourine, play the sweet-sounding harp and lyre.
3 Bobeta kelelo na ebandeli ya sanza, na tango oyo sanza mobimba engengaka, mpo na mokolo ya feti na biso!
Sound the ram’s horn at the New Moon, and at the full moon on the day of our Feast.
4 Pamba te ezali mobeko mpo na Isalaele, mpe mokano ya Nzambe ya Jakobi.
For this is a statute for Israel, an ordinance of the God of Jacob.
5 Atiaki yango lokola mobeko mpo na Jozefi tango abundisaki Ejipito. Nazali koyoka lokota oyo nayebi te:
He ordained it as a testimony for Joseph when he went out over the land of Egypt, where I heard an unfamiliar language:
6 « Nalongolaki mokumba oyo ezalaki na mapeka na ye, mpe maboko na ye elongwaki na bowumbu ya kosimba bitunga. »
“I relieved his shoulder of the burden; his hands were freed from the basket.
7 Tango ozalaki koganga mpo na pasi, nakangolaki yo, nayanolaki yo kati na kake epai wapi nabombamaki, namekaki yo pembeni ya mayi ya Meriba.
You called out in distress, and I rescued you; I answered you from the cloud of thunder; I tested you at the waters of Meribah.
8 Bato na ngai, boyoka ngai! Mpe nakokebisa bino. Ah Isalaele, soki kaka ozalaki koyokela ngai!
Hear, O My people, and I will warn you: O Israel, if only you would listen to Me!
9 Okozala na nzambe ya mopaya te kati na yo, okogumbamela nzambe mosusu te, longola kaka ngai!
There must be no strange god among you, nor shall you bow to a foreign god.
10 Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito; fungola malamu monoko na yo, mpe nakotondisa yango.
I am the LORD your God, who brought you up out of Egypt. Open wide your mouth, and I will fill it.
11 Kasi bato na ngai bayokaki mongongo na ngai te, Isalaele aboyaki kotosa ngai.
But My people would not listen to Me, and Israel would not obey Me.
12 Mpo na yango, natikaki bango kotambola kolanda baposa ya mitema makasi na bango; mpe balandaki makanisi na bango.
So I gave them up to their stubborn hearts to follow their own devices.
13 Soki bato na ngai bazalaki koyokela ngai, soki Isalaele azalaki kolanda banzela na ngai,
If only My people would listen to Me, if Israel would follow My ways,
14 nalingaki mbala moko koyokisa banguna na bango soni mpe kobundisa bayini na bango.
how soon I would subdue their enemies and turn My hand against their foes!
15 Mpe bato oyo bayinaka Yawe balingaki komikitisa liboso na Ye, mpe etumbu na bango elingaki kowumela mpo na libela.
Those who hate the LORD would feign obedience, and their doom would last forever.
16 Yawe alingaki koleisa Isalaele bilei ya kitoko mpe kotondisa bango na mafuta ya nzoyi.
But I would feed you the finest wheat; with honey from the rock I would satisfy you.”

< Banzembo 81 >