< Banzembo 80 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba lokola « Lisi ya Mobeko. » Litatoli. Nzembo ya Azafi. Mobateli ya Isalaele, Yo oyo otambolisaka Jozefi lokola etonga ya bameme, yoka; Yo oyo Kiti ya Bokonzi na Yo ezali kati na basheribe, mimonisa
For the music director. A psalm of Asaph. To the tune “Lilies of the Covenant.” Please hear us, Shepherd of Israel, you who lead the descendants of Joseph like a flock. You who sit on your throne above the cherubim, shine out
2 liboso ya Efrayimi, ya Benjame mpe ya Manase. Monisa nguya na Yo mpe yaka kobikisa biso!
in the presence of Ephraim, Benjamin, and Manasseh. Gather together your power and come to save us!
3 Oh Nzambe, sala ete tozongela ndenge tozalaki, ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.
God, please restore us! Let your face shine on us so we can be saved.
4 Eh Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, kino tango nini okotombokela mabondeli ya bato na Yo?
Lord God Almighty, how long will you be angry with the prayers of your people?
5 Oleisaki bango lipa esangana na mayi ya miso mpe olangwisaki bango na kopo etonda na mpinzoli;
You fed them with the bread of tears, and gave them a full bowl of tears to drink.
6 okomisaki biso eloko ya kotiola mpo na bazalani na biso, mpe banguna na biso bakomi kotiola biso.
You turn us into victims our neighbors fight over; our enemies mock us.
7 Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, sala ete tozongela ndenge tozalaki, ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.
God Almighty, please restore us! Let your face shine on us so we can be saved!
8 Nzete ya vino oyo opikolaki wuta na Ejipito, olonaki yango wana obenganaki bikolo ebele.
You carried us out of Egypt like a vine. You drove out the heathen nations, and then you planted the vine.
9 Obongiselaki yango mabele mpo ete ezwa misisa mpe etondisa mokili.
You prepared the ground for the vine. It took root and filled the land.
10 Elili na yango ezipaki bangomba, bitape na yango ezalaki lokola banzete minene ya sedele.
The mountains were covered by its shade; its branches covered the great cedars.
11 Epanzaki bitape na yango kino na ebale monene, mpe mito na yango ya sika kino na ebale.
It sent its branches as far west as the Mediterranean Sea, and its shoots as far east as the Euphrates River.
12 Mpo na nini otoboli madusu kati na bamir na yango? Tala ndenge baleki nzela bazali kobuka bambuma na yango!
So why have you broken down the walls that protect it so that everyone who passes by can steal its fruit?
13 Ngulu ya zamba ezali kobebisa yango, mpe nyama ya zamba ezali kolia yango.
Wild pigs from the forest eat it, wild animals feed on it.
14 Zongela biso lisusu, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso! Wuta na likolo, tala mpe mona! Senzela mpo na nzete oyo ya vino!
God Almighty, please return to us! Look down from heaven and see what's happening to us! Come and care for this vine
15 Batela nzete oyo loboko na Yo ya mobali elonaki, batela solo mwana oyo Yo moko obokolaki.
that you planted yourself, this son that you brought up yourself.
16 Bakati nzete na Yo ya vino mpe batumbi yango na moto; tika ete bakufa na pamela ya elongi na Yo!
We, your vine, have been chopped down and burned. May those who did this die when you glare at them.
17 Tika ete loboko na Yo ezala na likolo ya mokonzi oyo avandi na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe na likolo ya mwana na moto oyo Yo moko okomisaki makasi.
Protect the man who stands beside you; strengthen the son you have chosen.
18 Boye, tokozala lisusu mosika na Yo te; zongisela biso lisusu bomoi, mpe tokobelela Kombo na Yo.
Then we will not turn away from you. Revive us so we can pray to you.
19 Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, sala ete tozongela ndenge tozalaki, ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.
Lord God Almighty, please restore us! Let your face shine on us so we can be saved.

< Banzembo 80 >