< Banzembo 8 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati. Oh Yawe, Nkolo na biso, Kombo na Yo ezali monene kati na mokili mobimba! Ovandisi nkembo na Yo kati na Lola.
Psaume de David, [donné] au maître chantre, [pour le chanter] sur Guittith. Eternel notre Seigneur! que ton Nom est magnifique par toute la terre, vu que tu as mis ta Majesté au-dessus des cieux.
2 Na nzela ya masanzoli ya bana mpe bana mike, otelemisi ndako batonga makasi, mpo na kotelemela bayini na Yo mpe kokanga monoko ya monguna mpe ya moto oyo alingaka kozongisa mabe na mabe.
De la bouche des petits enfants, et de ceux qui tètent, tu as fondé [ta] force, [à cause] de tes adversaires; afin de faire cesser l'ennemi et le vindicatif.
3 Tango natalaka Lola na Yo, mosala ya misapi na Yo, sanza mpe minzoto oyo otia,
Quand je regarde tes cieux, l'ouvrage de tes doigts, la lune et les étoiles que tu as arrangées,
4 namitunaka: Moto azali nini mpo ete okanisa ye, mpe moto azali nani mpo ete obatela ye?
[Je dis]: qu'est-ce que de l'homme, que tu te souviennes de lui; et du fils de l'homme, que tu le visites?
5 Osalaki ye moke koleka ba-anjelu mpe olatisaka ye motole ya nkembo mpe ya lokumu;
Car tu l'as fait un peu moindre que les Anges, et tu l'as couronné de gloire et d'honneur.
6 otia ye moyangeli ya misala ya maboko na Yo, otia nyonso na se ya matambe na ye:
Tu l'as fait Seigneur des œuvres de tes mains; tu as mis toutes choses sous ses pieds,
7 bameme, bantaba, bangombe mpe banyama ya zamba,
Les brebis et les bœufs sans réserve, même les bêtes des champs,
8 bandeke ya likolo, mbisi ya ebale monene mpe nyonso oyo etambolaka na bibale.
Les oiseaux des cieux, et les poissons de la mer, ce qui traverse par les sentiers de la mer.
9 Oh Yawe, Nkolo na biso, Kombo na Yo ezali monene kati na mokili mobimba!
Eternel notre Seigneur! que ton Nom est magnifique par toute la terre!

< Banzembo 8 >