< Banzembo 79 >

1 Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, tala ndenge bato ya bikolo ya bapaya bakoti na makasi kati na libula na Yo, bakomisi Esika na Yo ya bule mbindo, mpe bakomisi Yelusalemi mipiku ya mabanga!
Ó Deus, os gentios vieram à tua herança; contaminaram o teu santo templo; reduziram Jerusalém a montões de pedras.
2 Bapesi bibembe ya basali na Yo lokola bilei epai ya bandeke ya likolo, mpe bibembe ya bayengebene na Yo epai ya banyama ya zamba;
Deram os corpos mortos dos teus servos por comida às aves dos céus, e a carne dos teus santos às bestas da terra.
3 basopi makila na bango lokola mayi zingazinga ya Yelusalemi, mpe moto ya kokunda bango azalaki te!
Derramaram o sangue deles como água ao redor de Jerusalém, e não houve quem os enterrasse.
4 Tala ndenge bato ya bikolo oyo ezingeli biso bazali kofinga biso, mpe tokomi lokola eloko ya liseki na miso na bango!
Somos feitos opróbrio para nossos vizinhos, escarneio e zombaria para os que estão à roda de nós.
5 Kino tango nini, Yawe, okokangela biso kanda? Kino tango nini zuwa na Yo ekopela lokola moto?
Até quando, Senhor? Acaso te indignarás para sempre? Arderá o teu zelo como fogo?
6 Sopela bikolo oyo eyebi Yo te mpe mikili oyo ebelelaka Kombo na Yo te, kanda makasi na Yo;
Derrama o teu furor sobre os gentios que te não conhecem, e sobre os reinos que não invocam o teu nome.
7 pamba te babebisi Jakobi mpe bapanzi mokili na ye.
Porque devoraram a Jacob, e assolaram as suas moradas.
8 Kotangela biso te masumu na biso ya kala, kokangela biso motema te, yokela biso mawa, pamba te tokomi na suka!
Não te lembres das nossas iniquidades passadas: previnam-nos depressa as tuas misericórdias, pois já estamos muito abatidos.
9 Nzambe Mobikisi na biso, sunga biso mpo na lokumu ya Kombo na Yo, kangola biso mpe limbisa masumu na biso mpo na Kombo na Yo!
Ajuda-nos, ó Deus da nossa salvação, pela glória do teu nome: e livra-nos, e espia os nossos pecados por amor do teu nome.
10 Mpo na nini bikolo eloba: « Nzambe na bango azali wapi? » Tika ete, na miso na biso, bato ya bikolo bayeba ete ozongiseli bango mabe na mabe, mpo na makila ya basali na Yo, oyo basopaki.
Porque diriam os gentios: Onde está o seu Deus? Seja ele conhecido entre os gentios, a nossa vista, pela vingança do sangue dos teus servos, que foi derramado.
11 Tika ete kolela ya bakangami kati na boloko ekoma liboso na Yo! Na nguya monene na Yo, bikisa ba-oyo bazwa etumbu ya kufa!
Venha perante a tua face o gemido dos presos; segundo a grandeza do teu braço preserva aqueles que estão sentenciados à morte.
12 Oh Nkolo, zongisela bikolo oyo ezingeli biso, kotiola oyo batiolaki Yo; zongisela bango mbala sambo.
E torna aos nossos vizinhos, no seu regaço, sete vezes tanto da sua injúria com a qual te injuriaram, Senhor.
13 Mpe biso, bato na Yo, etonga oyo oleisaka, tokosanzola Yo tango nyonso; mpe na bikeke nyonso, tokosakola lokumu na Yo.
Assim nós, teu povo e ovelhas de teu pasto, te louvaremos eternamente: de geração em geração cantaremos os teus louvores.

< Banzembo 79 >