< Banzembo 76 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba na lindanda. Nzembo ya Azafi. Nzambe ayebani kati na Yuda; Kombo na Ye ezali monene kati na Isalaele.
Til sangmesteren på strengelek; en salme av Asaf; en sang. Gud er kjent i Juda, hans navn er stort i Israel.
2 Ndako na Ye ya kapo ezali na Salemi; mpe esika na Ye ya kovanda ezali na Siona.
Og han reiste sin hytte i Salem og sin bolig på Sion.
3 Ezali kuna nde abukaki makonga ya makasi, banguba, mipanga mpe bibundeli nyonso ya bitumba.
Der sønderbrøt han buens lyn, skjold og sverd og krig. (Sela)
4 Ozali kongenga lokola mwinda, otonda na lokumu koleka bangomba ya babotoli bomengo ya bitumba.
Strålende er du, herlig fremfor røverfjellene.
5 Bilombe nyonso ya mpiko bakweyisamaki, balalaki pongi na bango ya suka; basoda nyonso bakokaki lisusu te kotombola maboko.
Mennene med det sterke hjerte er blitt et rov; de sover sin søvn, og ingen av de veldige menn fant sine hender.
6 Nzambe ya Jakobi, na kanda na Yo, bato oyo babundaka likolo ya bampunda elongo na bampunda bakweyi na somo.
Ved din trusel, Jakobs Gud, falt både vogn og hest i dyp søvn.
7 Solo, ozali somo! Nani akokoka kotelema liboso na Yo soki osiliki?
Du - forferdelig er du, og hvem kan bli stående for ditt åsyn når du blir vred?
8 Wuta na likolo, osalaka ete mokano na Yo eyokana na matoyi ya bato; mokili ekomaka na kobanga mpe evandaka kimia
Fra himmelen lot du høre dom; jorden fryktet og blev stille,
9 tango, Yo Nzambe, otelemaka mpo na kosambisa mpe kobikisa banyokolami nyonso ya mokili.
da Gud reiste sig til dom for å frelse alle saktmodige på jorden. (Sela)
10 Pamba te kanda makasi ya bato esanzolaka Yo, mpe olataka kanda ya batikali.
For menneskets vrede blir dig til pris; med enda større vrede omgjorder du dig.
11 Epai ya Yawe, Nzambe na bino, bopesa bilaka mpe bokokisa yango. Tika ete bato nyonso oyo bazingeli Ye bamemela Nzambe ya somo makabo!
Gjør løfter og gi Herren eders Gud det I har lovt! Alle de som er omkring ham, skal komme med gaver til den Forferdelige.
12 Abukaka lolendo ya bakambi, mpe bakonzi ya mokili babangaka Ye.
Han kuer fyrstenes stolte ånd, forferdelig for kongene på jorden.

< Banzembo 76 >