< Banzembo 75 >
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya koyemba lokola « Koboma te! » Nzembo ya Azafi. Nzambe, tozali kosanzola Yo, tozali kosanzola Kombo na Yo; mpo ete Kombo na Yo ezali pene, bato bazali kotatola bikamwa na Yo.
Przewodnikowi chóru. Al taszchet. Psalm i pieśń Asafa. Wysławiamy cię, Boże, wysławiamy, bo bliskie twoje imię; opowiadają [to] twoje cudowne dzieła.
2 Olobaki: « Na tango oyo ngai moko nakobongisa, nakokata makambo na bosembo.
Gdy wyznaczę czas, będę sądzić sprawiedliwie.
3 Mokili ekoki kolenga elongo na bavandi na yango nyonso, kasi ezali ngai nde nalendisaka makonzi na yango. »
Roztopiła się ziemia i wszyscy jej mieszkańcy, [ale] ja umacniam jej filary. (Sela)
4 Nazali koloba na moto ya lofundu: « Kotombola lisusu mapeka te; » mpe na bato mabe: « Bosala lisusu lolendo te.
Powiedziałem głupcom: Nie szalejcie, a niegodziwym: Nie podnoście rogu.
5 Bomeka lisusu te kosala lofundu mpe koloba na lolendo. »
Nie podnoście wysoko swego rogu [i] nie mówcie wyniośle;
6 Botombwami ewutaka na Este te, na Weste te, ewutaka mpe na esobe te.
Bo nie ze wschodu ani z zachodu, ani z południa [przychodzi] wywyższenie.
7 Pamba te ezali Nzambe nde akataka makambo: akitisaka moto songolo mpe atombolaka moto pakala.
Lecz Bóg [jest] sędzią; tego poniża, a tamtego wywyższa.
8 Loboko na Yawe esimbi kopo oyo etondi na vino ya makasi mpe ya bololo. Azali kosopa yango, mpe bato mabe nyonso ya mokili bazali komeka mpe komela yango kino na mbindo oyo etikalaka na se ya kopo.
W ręku PANA bowiem [jest] kielich mętnego wina, pełnego przypraw; z niego nalewa tak, że wszyscy niegodziwi ziemi wycisną nawet męty i wypiją je.
9 Mpo na ngai, nakotatola makambo oyo tango nyonso, nakoyemba mpo na lokumu ya Nzambe ya Jakobi,
Ja zaś będę zawsze opowiadał, będę śpiewał Bogu Jakuba.
10 oyo azali koloba: « Nakosilisa makasi nyonso ya bato mabe; kasi nguya ya bato ya sembo ekomata lisusu makasi. »
I połamię wszystkie rogi niegodziwych, a rogi sprawiedliwego będą wzniesione.