< Banzembo 74 >
1 Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, mpo na nini kosundola biso mpo na tango nyonso? Mpo na nini kongalisa kanda na Yo likolo ya etonga oyo oleisaka?
Zašto se, Bože, srdiš na nas dugo; dimi se gnjev tvoj na ovce paše tvoje?
2 Kanisa lisusu lisanga ya bato na Yo, oyo osikola wuta kala, libota oyo okomisa libula na Yo. Kanisa ngomba Siona epai wapi ovandaka.
Opomeni se sabora svojega, koji si stekao od starine, iskupio sebi u našljednu državu, gore Siona, na kojoj si se naselio.
3 Tika ete matambe na Yo ekoma kino na bisika oyo ebebi nye! Kati na Esika na Yo ya bule, monguna abebisi nyonso;
Podigni stope svoje na stare razvaline: sve je razrušio neprijatelj u svetinji.
4 bayini na Yo bagangi lokola nkosi, ata kati na esika oyo okutanaka na biso, batelemisi bendele na bango lokola elembo.
Rièu neprijatelji tvoji na mjestu sabora tvojih, svoje obièaje postavljaju mjesto naših obièaja.
5 Bazali lokola bato oyo basimbi bipasola mpe bazali kokata banzete kati na zamba.
Vidiš, oni su kao onaj koji podiže sjekiru na spletene grane u drveta.
6 Babuki-buki bililingi nyonso oyo batobola na mabaya, na nzela ya bipasola mpe bamarto na bango;
Sve u njemu što je rezano razbiše sjekirama i bradvama.
7 batumbi Esika na Yo ya bule, bakweyisi mpe bakomisi mbindo esika oyo Kombo na Yo evandaka.
Ognjem sažegoše svetinju tvoju; na zemlju obalivši oskvrniše stan imena tvojega.
8 Bazalaki komilobela: « Tokopanza yango nyonso! » Kati na mokili, bazikisi esika nyonso epai wapi bagumbamelaka Nzambe.
Rekoše u srcu svojem: potrimo ih sasvijem. Popališe sva mjesta sabora Božijih na zemlji.
9 Tozali lisusu komona te bilembo na biso, basakoli bazali lisusu te; mpe moko te kati na biso ayebi tango boni makambo oyo ekowumela.
Obièaja svojih ne vidimo, nema više proroka, i nema u nas ko bi znao dokle æe to trajati.
10 Oh Nzambe, kino tango nini monguna akofinga Yo? Boni, akokoba tango nyonso kotiola Kombo na Yo?
Dokle æe se, Bože, rugati nasilnik? hoæe li dovijeka protivnik prkositi imenu tvojemu?
11 Mpo na nini ozongisi loboko na Yo na sima, loboko na Yo ya mobali? Mpo na nini okangi maboko na Yo?
Zašto ustavljaš ruku svoju i desnicu svoju? Pruži iz njedara svojih, i istrijebi ih.
12 Nzokande, Yo Nzambe, ozali Mokonzi na ngai wuta kala; Yo nde omemaka lobiko kati na mokili.
Bože, care moj, koji od starine tvoriš spasenje posred zemlje!
13 Yo nde opasolaki ebale na nguya na Yo, opanzaki mito ya bilima ya mayi;
Ti si silom svojom raskinuo more, i satro glave vodenim nakazama.
14 Yo nde opanzaki mito ya Leviatani mpe opesaki yango lokola bilei epai ya banyama ya esobe;
Ti si razmrskao glavu krokodilu, dao ga onima koji žive u pustinji da ga jedu.
15 Yo nde osalaki ete bitima ya mayi mpe miluka etiola, mpe okawusaki bibale mpo na libela.
Ti si otvorio izvore i potoke, ti si isušio rijeke koje ne presišu.
16 Moyi ezali ya Yo, butu mpe ezali ya Yo; Yo nde osalaki sanza mpe moyi.
Tvoj je dan i tvoja je noæ, ti si postavio zvijezde i sunce.
17 Ezali Yo nde otiaki bandelo nyonso ya mokili, Yo nde osalaki tango ya malili mpe tango ya moyi.
Ti si utvrdio sve krajeve zemaljske, ljeto i zimu ti si uredio.
18 Yawe, kobosana te ete monguna afingi Yo, ete bato bazanga tina batioli Kombo na Yo!
Opomeni se toga, neprijatelj se ruga Gospodu, i narod bezumni ne mari za ime tvoje.
19 Kokaba te bomoi ya ebenga na Yo na monoko ya nyama oyo ezali na nzala, kobosana te mpo na libela bomoi ya babola oyo bazali bato na Yo!
Ne daj zvijerima duše grlice svoje, nemoj zaboraviti stada stradalaca svojih zasvagda.
20 Tala lisusu Boyokani na Yo! Pamba te, kati na mokili, bisika ya molili ekomi ebele, etondi na makambo na kanza.
Pogledaj na zavjet; jer su sve peæine zemaljske pune stanova bezakonja.
21 Sala ete moto oyo bazali konyokola azwa lisusu lokumu! Sala ete mobola mpe moto akelela bakumisa Kombo na Yo.
Nevoljnik nek se ne vrati sramotan, ništi i ubogi neka hvale ime tvoje.
22 Oh Nzambe, telema mpe lobela Kombo na Yo! Kanisa lisusu ndenge nini bazoba bafingaka Yo mikolo nyonso!
Ustani, Bože, brani stvar svoju, opomeni se kako ti se bezumnik ruga svaki dan!
23 Kobosana te makelele ya bayini na Yo, mangungu ya banguna na Yo, oyo ezali kaka komata se komata!
Ne zaboravi obijesti neprijatelja svojih, vike, koju jednako dižu protivnici tvoji!