< Banzembo 73 >
1 Nzembo ya Azafi. Solo, Nzambe azali malamu mpo na Isalaele, mpo na bato oyo bazali mitema peto.
Та добар је Бог Израиљу, онима који су чиста срца.
2 Nzokande mpo na ngai, etikalaki moke ete makolo na ngai eselumuka, etikalaki moke ete nakweya,
А ноге моје умало не зађоше, умало не попузнуше стопала моја,
3 pamba te nazalaki kolula bato ya lofundu tango nazalaki komona kimia ya bato mabe.
Јер се расрдих на безумнике видећи како безбожници добро живе.
4 Kino na kufa na bango, bazalaka na mitungisi te, nzoto na bango ezalaka sembesembe.
Јер не знају за невољу до саме смрти, и тело је њихово претило.
5 Kati na bango, moko te amonaka pasi oyo bato nyonso bamonaka; babelaka te bokono oyo ezwaka bato.
На пословима човечијим нема их, и не муче се с другим људима.
6 Yango wana, lolendo ekoma lokola mayaka na bakingo na bango, mpe makambo na kanza ekoma lokola elamba na bango.
Тога ради опточени су охолоћу као огрлицом, и обучени у обест као у стајаће рухо.
7 Miso na bango engengaka na bilongi etonda na mafuta; mitema na bango esalaka kaka mabongisi ya mabe;
Од дебљине избуљено им је око, срце пуно клапе.
8 batiolaka mpe balobaka mabe, bagangelaka minyoko.
Подсмевају се, пакосно говоре о насиљу, охоло говоре.
9 Minoko na bango etombokelaka Likolo, mpe lolemo na bango esakanelaka mokili.
Уста своја дижу у небо, и земљу пролази језик њихов.
10 Yango wana bato balandaka bango mpe bamelaka maloba na bango lokola mayi.
И зато се онамо навраћају неки из народа његовог, и пију воду из пуног извора.
11 Balobaka: « Nzambe akoyeba ndenge nini? Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali ata na boyebi? »
И говоре: Како ће разабрати Бог? Зар Вишњи зна?
12 Tala ndenge bato mabe bazalaka: tango nyonso, bazalaka na mitungisi te, mpe bomengo na bango emataka se komata.
Па ето, ови безбожници срећни на свету умножавају богатство.
13 Solo, ezali kaka na pamba nde nabatelaki motema na ngai peto; ezali kaka na pamba nde nasukolaki maboko na ngai mpo ete nasala mabe te!
Зар, дакле, узалуд чистим срце своје, и умивам безазленошћу руке своје,
14 Mikolo nyonso, nanyokwamaka; mpe tongo nyonso, nazwaka etumbu.
Допадам рана сваки дан, и муке свако јутро?
15 Soki nalobi: « Nakoloba lokola bango, » wana nateki penza lokumu ya libota na Yo.
Кад бих казао: Говорићу као и они, изневерио бих род синова Твојих.
16 Tango nakanisaki mpo na koluka kososola, nayokaki pasi na motema
И тако стадох размишљати да бих ово разумео; али то беше тешко у очима мојим.
17 kino nakendeki na Esika ya bule ya Nzambe mpe nasosolaki ndenge nini bakosuka.
Док најпосле не уђох у светињу Божију, и дознах крај њихов.
18 Solo, otielaka bango biloko ya moselu, okweyisaka bango kati na libebi.
Та на клизавом месту поставио си их, и бацаш их у пропаст!
19 Ndenge nini babebisamaka mbala moko, bakomaka na suka, mpe somo elimwisaka bango!
Како зачас пропадају, гину, нестаје их од ненадне страхоте!
20 Ndenge ndoto elimwaka soki moto alamuki na pongi, Nkolo, olimwisaka lisolo ya bomoi na bango tango kaka otelemaka.
Као сан, кад се човек пробуди, тако пробудивши их, Господе, у ништа обраћаш утвару њихову.
21 Tango motema na ngai ezalaki kotomboka mpe molimo na ngai emitungisaki,
Кад кипљаше срце моје и растрзах се у себи,
22 nasilaki mayele, nakomaki lokola zoba, nakomaki lokola nyama liboso na Yo.
Тада бејах незналица и не разумевах; као живинче бијах пред Тобом.
23 Nzokande, nazalaka tango nyonso elongo na Yo; osimba ngai na loboko na ngai ya mobali.
Али сам свагда код Тебе, Ти ме држиш за десну руку.
24 Otambolisaka ngai na nzela ya toli na Yo, mpe, na sima, okoyamba ngai kati na nkembo.
По својој вољи водиш ме, и после ћеш ме одвести у славу.
25 Kuna na Likolo, nani azali mpo na ngai soki Yo te? Mpe awa na mokili, nasepela na nani soki na Yo te?
Кога имам на небу? И с Тобом ништа нећу на земљи.
26 Nzoto na ngai ekoki kobeba, mpe motema na ngai ekoki kolemba; kasi Nzambe azali Libanga mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.
Чезне за Тобом тело моје и срце моје; Бог је град срца мог и део мој довека.
27 Bato nyonso oyo bazali mosika na Yo bakokufa; obebisaka bato nyonso oyo batosaka Yo te.
Јер ево који одступише од Тебе, гину; Ти истребљаваш сваког који чини прељубу остављајући Тебе.
28 Kasi mpo na ngai, ezali malamu kozala pene ya Nzambe. Nakomisi Nkolo Yawe ebombamelo na ngai, mpo na kopanza sango ya misala na Yo nyonso.
А мени је добро бити близу Бога. На Господа полажем надање своје, и казиваћу сва чудеса Твоја.