< Banzembo 71 >

1 Yawe, ozali ebombamelo na ngai; kondima te ete nayoka soni!
בך-יהוה חסיתי אל-אבושה לעולם
2 Na bosembo na Yo, kangola mpe bikisa ngai. Yoka ngai mpe bikisa ngai.
בצדקתך תצילני ותפלטני הטה-אלי אזנך והושיעני
3 Zala mpo na ngai ekimelo ya libanga epai wapi nakoki kokende tango nyonso. Ozwaki mokano ya kobikisa ngai, pamba te ozali libanga mpe ndako na ngai batonga makasi.
היה לי לצור מעון לבוא-- תמיד צוית להושיעני כי-סלעי ומצודתי אתה
4 Nzambe na ngai, kangola ngai wuta na maboko ya bato mabe, na maboko ya batomboki mpe bato na kanza.
אלהי--פלטני מיד רשע מכף מעול וחומץ
5 Nkolo Yawe, ozali elikya na ngai; wuta bolenge na ngai, namipesaka na Yo.
כי-אתה תקותי אדני יהוה מבטחי מנעורי
6 Wuta mbotama na ngai, natalelaka Yo; Yo nde obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai. Nakokumisa Yo tango nyonso.
עליך נסמכתי מבטן--ממעי אמי אתה גוזי בך תהלתי תמיד
7 Nazali likamwisi mpo na bato ebele; ozali ebombamelo na ngai ya makasi.
כמופת הייתי לרבים ואתה מחסי-עז
8 Tika ete monoko na ngai etonda na masanzoli mpo na lokumu na Yo; tika ete etatolaka tango nyonso kongenga ya nkembo na Yo.
ימלא פי תהלתך כל-היום תפארתך
9 Kobwaka ngai te awa nakomi mobange, kotika ngai te awa makasi na ngai ekomi kosila.
אל-תשליכני לעת זקנה ככלות כחי אל-תעזבני
10 Pamba te banguna na ngai bazali koloba mabe na tina na ngai, mpe bato oyo balukaka koboma ngai basaleli ngai likita.
כי-אמרו אויבי לי ושמרי נפשי נועצו יחדו
11 Bazali koloba: « Nzambe asundoli ye; bolanda ye, bokanga ye; moto oyo akokangola ye azali te! »
לאמר אלהים עזבו רדפו ותפשוהו כי-אין מציל
12 Oh Nzambe, kozala mosika na ngai te! Nzambe na ngai, yaka noki mpo na kosunga ngai.
אלהים אל-תרחק ממני אלהי לעזרתי חישה (חושה)
13 Tika ete bato oyo bafundaka ngai bakufa soni mpe balimwa! Tika ete ba-oyo balukaka pasi na ngai basambwa mpe bayokisama soni!
יבשו יכלו שטני נפשי יעטו חרפה וכלמה--מבקשי רעתי
14 Kasi ngai, nakozala na elikya tango nyonso mpe nakokoba kokumisa Yo.
ואני תמיד איחל והוספתי על-כל-תהלתך
15 Monoko na ngai ekosakola tango nyonso misala ya bosembo mpe ya lobiko na Yo, pamba te nayebi motango na yango te.
פי יספר צדקתך--כל-היום תשועתך כי לא ידעתי ספרות
16 Nkolo Yawe, nakoya epai na Yo mpe nakotatola misala na Yo ya nguya; nakotatola misala malamu ya bosembo na Yo, misala ya bosembo na Yo kaka.
אבוא--בגברות אדני יהוה אזכיר צדקתך לבדך
17 Nzambe, wuta bolenge na ngai, oteya ngai; mpe kino lelo, nazali kotatola bikamwa na Yo.
אלהים למדתני מנעורי ועד-הנה אגיד נפלאותיך
18 Ezala ndenge nakomi sik’oyo mobange mpe suki na ngai ekomi pembe, oh Nzambe na ngai, kotika ngai te, mpo ete natatola makasi na Yo epai ya bato ya ekeke oyo, mpe misala ya nguya na Yo epai ya bato nyonso oyo bakoya sima.
וגם עד-זקנה ושיבה-- אלהים אל-תעזבני עד-אגיד זרועך לדור לכל-יבוא גבורתך
19 Nzambe, bosembo na Yo ekenda kino na likolo, pamba te osalaka makambo minene. Oh Nzambe, nani akokani na Yo?
וצדקתך אלהים עד-מרום אשר-עשית גדלות אלהים מי כמוך
20 Atako osalaki ete tokutana na pasi mingi mpe na makambo ya bololo, kasi okotika lisusu biso kozala na bomoi, okobimisa ngai lisusu wuta na mozindo ya mabele.
אשר הראיתנו (הראיתני) צרות רבות-- ורעות תשוב תחינו (תחיני) ומתהמות הארץ תשוב תעלני
21 Okomatisa lisusu lokumu na ngai, mpe okobondisa ngai lisusu.
תרב גדלתי ותסב תנחמני
22 Nzambe na ngai, nakosanzola Yo na lindanda mpo na boyengebene na Yo; Mosantu ya Isalaele, nakobeta lindanda mpo na lokumu na Yo.
גם-אני אודך בכלי-נבל-- אמתך אלהי אזמרה לך בכנור-- קדוש ישראל
23 Nakoganga na esengo tango nakoyemba banzembo mpo na lokumu na Yo, pamba te okangoli bomoi na ngai.
תרננה שפתי כי אזמרה-לך ונפשי אשר פדית
24 Lolemo na ngai ekotatola tango nyonso misala ya bosembo na Yo, pamba te bato oyo balukaka pasi na ngai bayokisami soni mpe basambwe.
גם-לשוני-- כל-היום תהגה צדקתך כי-בשו כי-חפרו מבקשי רעתי

< Banzembo 71 >